Maloba na nse ya lokasa
b Na ndakisa, na mobu soki 785 ya ntango na biso, Charlemagne abimisaki mobeko ete moto nyonso na engumba Saxe oyo aboyi kozwa batisimo lokola mokristo asengeli kozwa etumbu ya liwa. Ndakisa mosusu: mokanda moko (Traité de Paix d’Augsbourg) oyo mampinga ya basoda ya Ampire ya Roma batyaki sinyatire na mobu 1555 elobaki ete mokonzi nyonso ya etúká asengeli kozala na Lingomba ya Katolike to ya Protesta mpe bana-mboka basengeli kolanda lingomba na ye. Bazalaki kosɛnga na baoyo baboyi kokɔta na lingomba yango bálongwa mboka.