-
Lisolo moko ya ntina mingiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2016 | No. 4
-
-
ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA—NDENGE OYO EBATELAMAKI
Lisolo moko ya ntina mingi
Biblia ekeseni na babuku nyonso ya mangomba mpe ezali na buku mosusu te oyo mateya na yango esalisá bato mingi na boumeli ya ebele ya bambula lokola Biblia. Ata bongo, ezali na buku moko te oyo bato batyolaka mpe balandelaka yango lokola Biblia.
Na ndakisa, bato mosusu ya mayele bandimaka te ete Babiblia ya lelo ezali mpenza ndenge ekomamaki na ebandeli. Profesɛrɛ moko ya makambo ya lingomba alobi boye: “Tokoki kondima te ete makambo oyo ezali na Biblia ya lelo ezali ndenge ezalaki na makomi ya ebandeli. Mpo bakopi ya bamaniskri oyo tozali na yango etondi na mabunga mpe mingi na yango ekomamaki basiɛklɛ ebele na nsima mpe ekokani te na makomi ya ebandeli na makambo mingi.”
Bato mosusu batyelaka Biblia ntembe mpo na mateya oyo bateyá bango na mangomba na bango. Na ndakisa, bateyaki Faizal epai ya bato ya libota na ye oyo bazali bakristo te ete Biblia ezali buku moko mosantu, kasi babakisá mpe balongolá makambo mosusu. Alobi boye: “Yango wana soki moto alingi kosolola na ngai makambo ya Biblia nazalaki kolinga mpenza te. Kutu bazalaki na Biblia ya solosolo te. Babakisá mpe balongolá makambo mosusu na kati.”
Ezali na ntina tóyeba soki Biblia ezali kaka ndenge ekomamaki na ebandeli to babakisá makambo mosusu? Tótalela naino mituna oyo: Soki oyebi mpenza te ete bilaka ya Biblia oyo elobeli mikolo ezali koya ezalaki bongo na makomi ya ebandeli, okotyela yango motema? (Baroma 15:4) Olingaki kosalela batoli ya Biblia mpo na kozwa bikateli ya minene na likambo etali mosala, libota to losambo soki Babiblia ya lelo ezalaki kaka bakopi oyo bato basalaki, oyo etondi na mabunga?
Atako makomi ya libosoliboso ya Biblia ezalaka lisusu te, tokoki kotala bakopi ya kala ata mpe ebele ya bamaniskri ya Biblia. Ndenge nini bamaniskri yango ebatelamaki mpe ebebaki te atako bato batɛmɛlaki mpe balukaki kobakisa makambo mosusu? Ndenge nini kobatelama na yango ekoki kotinda yo ondima mpenza ete Biblia oyo ozali na yango ezali kaka ndenge ekomamaki na ebandeli? Tótalela biyano na mituna wana na lisolo oyo elandi, oyo emonisi ndenge Biblia ebatelamaki.
-
-
Biblia ezali tii lelo atako ekomamaki na biloko oyo ebebakaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2016 | No. 4
-
-
ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA—NDENGE OYO EBATELAMAKI
Biblia ezali tii lelo atako ekomamaki na biloko oyo ebebaka
LIKAMA: Bato oyo bakomaki Biblia mpe baoyo basalaki bakopi na yango basalelaki libosoliboso papirisi mpe mposo ya nyama mpo na kokoma.a (2 Timote 4:13) Ndenge nini yango ezalaki likama mpo na Biblia?
Papirisi epasukaka, elongwaka langi, mpe elɛmbaka na pɛtɛɛ nyonso. Richard Parkinson ná Stephen Quirke, oyo bayekolaka makambo ya Ezipito balobi boye: “Eteni ya Papirisi ekoki kobeba, kotikala nsingansinga mpe kokóma putulu. Soki babombi yango, rulo ekoki kobeba to kopɔla na mai mpe banyama ya mikemike to mpoko ekoki kolya yango mpe soki bakundi yango, mingimingi bafurmi ya mpɛmbɛ elyaka yango.” Bapapirisi mosusu oyo batyaki yango na esika ya pole to malili makasi ebebaki noki.
Mposo ya nyama eumelaka koleka papirisi, kasi yango mpe soki ebombami malamu te to etyami na esika ya molunge, malili to pole ekoki kobeba.b Banyama mikemike mpe balyaka mposo ya nyama. Mpo na mikanda mosusu ya kala, buku moko (Everyday Writing in the Graeco-Roman East) elobi boye: “Esalemaka mingi te ete mokanda eumela mingi mpenza.” Soki Biblia ebebaka, nsango na yango mpe elingaki kolimwa.
NDENGE OYO BIBLIA EBATELAMAKI: Mobeko ya Bayuda esɛngaki mokonzi nyonso ‘akoma mpo na ye moko na buku mosusu mobeko oyo’ ezali na mikanda mitano ya liboso ya Biblia. (Kolimbola Mibeko 17:18) Lisusu, bato oyo bayebaki mpenza kosala bakopi babimisaki bamaniskri ebele yango wana tii na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso bakopi yango ezalaki na basinagoga ya Yisraele mobimba ata mpe mosika na Masedonia! (Luka 4:16, 17; Misala 17:11) Ndenge nini bamaniskri mosusu ya kala mpenza ebatelamaki tii lelo oyo?
Bamaniskri oyo babengaka Barulo ya Mbu Ekufá ebatelamaki na boumeli ya basiɛklɛ na kati ya bambɛki oyo babombá na mabulu na bisika oyo ekauká
Philip Comfort, moto ya mayele na makambo etali Testama ya sika alobi boye: “Bayuda bazalaki kotya barulo ya Makomami na bilokó to bambɛki mpo ebeba te.” Bakristo mpe bakobaki kosala kaka bongo. Yango wana bamaniskri mosusu ya libosoliboso ya Biblia bamonaki yango na kati ya bambɛki, na nse ya mabulu mpe na bisika oyo ekauká.
NA NSUKA: Ebele ya biteni ya bamaniskri ya Biblia; oyo mosusu na yango eumeli mbula koleka 2 000 ezali tii lelo. Ezali ata na makomi mosusu te ya kala oyo bamaniskri na yango eumelá bongo.
a Bazalaki kosala papirisi na molona moko ya mai oyo babengaka yango mpe papirisi. Mposo ya nyama bazalaki kosala yango kaka na mposo ya nyama.
b Na ndakisa, mokanda oyo emonisaka ete États-Unis ezwaki lipanda, ekomamaki na mposo ya nyama. Kutu, ekokisi naino mbula 250 te, kasi kotánga makomi na yango ekómi mpasi.
-
-
Biblia ezali tii lelo atako batɛmɛlaki yangoLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2016 | No. 4
-
-
ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA—NDENGE OYO EBATELAMAKI
Biblia ezali tii lelo atako batɛmɛlaki yango
LIKAMA: Bakonzi mingi ya mangomba mpe ya politiki batɛmɛlaki mateya ya Biblia. Mbala mingi, basalelaki bokonzi na bango mpo na kopekisa bato bázala na Biblia, bábimisa yango to bábongola yango. Tótalela ndakisa mibale oyo:
Na mobu soki 167 liboso ya ntango na biso, Mokonzi Antiochus Épiphane, oyo alukaki Bayuda bakóma bandimi ya lingomba ya bagrɛki na makasi, apesaki mitindo bábebisa bakopi nyonso ya Makomami ya Ebre. Heinrich Graetz, moto ya istware akomaki ete basaleli ya mokonzi “bapasolaki mpe batumbaki barulo ya mobeko bisika nyonso oyo bakutaki yango mpe babomaki baoyo bazalaki kotánga yango mpo na kozwa libɔndisi mpe makasi.”
Moyen Âge: Bakonzi mosusu ya Katolike bazalaki kosepela te moto ateya mateya ya Biblia, kasi kaka mateya ya Katolike. Moto asengelaki kozala kaka na mokanda ya Nzembo na Latin, soki azali na mikanda mosusu ya Biblia bazalaki kobenga ye mopɛngwi. Likita moko ya eglize eyeisaki likambo yango ndongo ndenge epesaki mitindo ete bato na bango “bákende mbala na mbala koluka bapɛngwi . . . na bandako nyonso mpe bashambre ya nse ya mabele epai bakanisi ete moto moko akoki kozala na mikanda ya Biblia. . . . Ndako nyonso oyo bakokuta mopɛngwi, esengelaki kobebisama.”
Soki banguna ya Biblia balongaki kobebisa yango, nsango na yango elingaki kolimwa.
Libongoli ya Biblia ya William Tyndale na Lingelisi ebatelamaki atako bapekisaki yango, batumbaki yango mpe babomaki Tyndale na mobu 1536
NDENGE OYO BIBLIA EBATELAMAKI: Mokano oyo Mokonzi Antiochus azwelaki Bayuda na Yisraele esukaki na nzela mpo Bayuda bakendaki kofanda na mikili mosusu. Kutu, bato ya mayele bamoni ete na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Bayuda mingi (60 %) bakómaki kofanda na bikólo mosusu. Bayuda babombaki bakopi ya Makomami na basinagoga na bango; bana ya bana na bango basalelaki bakopi yango na nsima ata mpe bakristo.—Misala 15:21.
Na Moyen Áge, bato oyo balingaki Biblia babangaki minyoko te mpe bakobaki kobongola mpe kosala bakopi ya Makomami. Kutu liboso bato bábimisa masini ya konyata mikanda na katikati ya siɛklɛ ya 15, mwa ndambo ya mikanda ya Biblia ezalaki na minɔkɔ soki 33. Na nsima, Biblia ebongolamaki mpe ebimisamaki mingi mpenza.
NA NSUKA: Atako bakonzi ya nguya mpe bakonzi ya mangomba ya motema mabe batɛmɛlaki Biblia, kasi Biblia ezali buku oyo ebongolami mpe ekabolami koleka babuku nyonso. Mateya na yango ekɔtá na mibeko mpe minɔkɔ ya bato ya bikólo mosusu, esalisá mpe bamilio ya bato.
-
-
Biblia ezali tii lelo atako bato balukaki kokɔtisa makambo mosusuLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2016 | No. 4
-
-
Bamasorete basalaki malamumalamu bakopi ya Makomami
ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA—NDENGE OYO EBATELAMAKI
Biblia ezali tii lelo atako bato balukaki kobakisa makambo mosusu
LIKAMA: Atako bakomaki yango na biloko oyo ebebaka mpe bato batɛmɛlaki yango, Biblia ezali tii lelo. Kasi, babongoli mpe bato mosusu oyo basalaki bakopi balukaki kobakisa makambo mosusu na nsango ya Biblia. Bazalaki kolinga mateya ya Biblia elanda oyo ya bango na esika mateya na bango elanda oyo ya Biblia. Tótalela bandakisa oyo:
Esika ya losambo: Na katikati ya siɛklɛ ya minei mpe ya mibale liboso ya ntango na biso, bato oyo bakomaki Pantatɛkɛ ya Basamaria babakisaki na nsuka ya Kobima 20:17 maloba “na Aargaareezem. Mpe kuna osengeli kotonga etumbelo.” Basamaria balingaki ete Makomami endimisa likanisi na bango ya kotonga tempelo na “Aargaareezem,” to Ngomba Gerizime.
Liteya ya bosato: Ntango basilisaki kokoma Biblia, ekokisaki naino mbula 300 te mokomi moko oyo andimaka liteya ya bosato abakisaki na 1 Yoane 5:7 maloba “na likoló, Tata, Liloba mpe Elimo santu: bango misato bazali moto moko.” Maloba yango ezalaki te na makomi ya ebandeli. Bruce Metzger, moto ya mayele na makambo ya Biblia alobi: “Kobanda siɛklɛ ya motoba maloba wana ekómaki komonana mingi na bamaniskri ya Latin ya kala mpe na Vulgate ya Latin.”
Nkombo ya Nzambe: Babongoli mingi ya Biblia balongolaki nkombo ya Nzambe na Makomami mpo Bayuda bazalaki kobanga kotánga nkombo ya Nzambe. Mpe na esika na yango batyaki batitre lokola “Nzambe” to “Nkolo,” batitre oyo Biblia esalelaka kaka te mpo na Mozalisi kasi mpe mpo na bato, biloko ya losambo ya lokuta ata mpe mpo na Zabolo.—Yoane 10:34, 35; 1 Bakorinti 8:5, 6; 2 Bakorinti 4:4.a
NDENGE OYO BIBLIA EBATELAMAKI: Ya liboso, atako bato mosusu basalaki bakopi ya Biblia likolólikoló to bazalaki na bokosi, kasi basusu bayebaki mpenza mosala yango mpe balandelaki makambo malamumalamu. Na katikati ya siɛklɛ ya motoba mpe ya zomi ya ntango na biso, Bamasorete basalaki kopi ya Makomami ya Ebre mpe babimisaki makomi ya Bamasorete ndenge ebengamaka lelo. Balobaka ete batángaki maloba mpe balɛtrɛ mpo libunga ekɔta te. Esika bamoni ete libunga ezali na makomi oyo bazali kosala kopi na yango, bazalaki kotya nɔti mopanzi. Bamasorete baboyaki kobakisa to kolongola makambo mosusu na makomi ya Biblia. Profesɛrɛ moko na nkombo Moshe Goshen-Gottstein akomaki boye: “Mpo na bango kobakisa to kolongola na nko makambo na Biblia ezalaki mabe mpenza.”
Ya mibale, bamaniskri mingi lelo esalisaka bato ya mayele na makambo ya Biblia bámona mabunga. Na ndakisa, basiɛklɛ mingi bakonzi ya mangomba bateyaki ete Babiblia na bango ya Latin ezali na makomi ya ebandeli ya Biblia. Kasi, na 1 Yoane 5:7, bakɔtisaki maloba ya libunga oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo. Libunga yango ekɔtaki mpe na King James Version, Biblia ya Lingelesi oyo eyebani mingi! Kasi, ntango bamaniskri mosusu emonanaki, emonisaki nini? Bruce Metzger akomaki boye: “Maloba wana [ya 1 Yoane 5:7] ezali te na bamaniskri nyonso ya mabongoli ya kala (Syriaque, Copte, Armenien, Ethiopien, Arabe, Slavon), longola kaka ya Latin.” Yango esalaki ete ntango babimisaki lisusu Biblia King James Version mpe Babiblia mosusu, balongolaki maloba wana ya libunga.
Chester Beatty P46, papirisi ya maniskri ya Biblia oyo ekomamaki na mobu soki 200 ya ntango na biso
Bamaniskri ya kala emonisi mpe ete nsango ya Biblia ebongwanaki te? Ntango bamonaki Barulo ya Mbu Ekufá na 1947, esalisaki bato ya mayele bákokanisa makomami ya Ebre ya Bamasorete mpe makomi oyo ezalaki na barulo yango ya Biblia oyo ekomamaki mbula koleka 1 000 liboso. Moko ya bato oyo babimisaki zulunalo oyo elobelaki barulo ya Mbu ekufá alobaki ete rulo moko mpamba “endimisi mpenza ete Bayuda oyo basalaki bakopi ya makomi ya Biblia na boumeli ya mbula koleka 1 000 basalaki yango na bosembo mpe malamu mpenza.”
Bibliotɛkɛ ya Chester Beatty na Dublin, na Irlande, ezali na liboke ya bapapirisi oyo emonisi mokanda mokomoko ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, ezali mpe na bamaniskri ya siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso; mbula soki 100 nsima ya kokomama ya Biblia. Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Atako bapapirisi yango epesi bansango mingi ya sika oyo etali makambo mikemike ya makomi yango, kasi emonisi mpe ete makomi ya Biblia ebongwanaki te.”
“Tokoki koloba mpenza ete ezali na buku mosusu te ya kala oyo nsango na yango ebatelamaki malamumalamu lokola Biblia”
NA NSUKA: Na esika ebebisa makomi ya Biblia, ebele ya bamaniskri wana mpe mbula oyo yango esali ebongisi nde Biblia. Sir Frederic Kenyon, akomaki boye mpo na Makomami ya Grɛki ya Bokristo: “Ezali na buku mosusu te ya kala oyo ezali na ebele ya makambo ya kala oyo emonisi ete makomi na yango ebongwanaki te mpe moto moko te ya mayele oyo azali sembo akowangana ete Biblia oyo tozali na yango lelo ezali ndenge ezalaki na ebandeli.” William Henry Green alobaki boye mpo na Makomami ya Ebre: “Tokoki koloba mpenza ete ezali na buku mosusu te ya kala oyo nsango na yango ebatelamaki malamumalamu lokola Biblia.”
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá apɛndisi A4 mpe A5 na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi, ezali mpe na www.pr418.com to talá Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe nkasa 1-13, ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali mpe na www.pr418.com.
-
-
Mpo na nini Biblia ebatelamaki?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2016 | No. 4
-
-
ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA—NDENGE OYO EBATELAMAKI
Mpo na nini Biblia ebatelamaki?
Biblia ebatelamaki. Yango wana lelo oyo okoki kozwa mpe kotánga yango. Mpe soki ozwi libongoli ya malamu ya Biblia, yebá ete ozali kotánga kopi ya Biblia ndenge ekomamaki na ebandeli.a Kasi mpo na nini Biblia ebatelamaki atako ekokaki kobeba, batɛmɛlaki yango mpe balukaki kobebisa mateya na yango? Nini ekesenisi yango na babuku mosusu?
“Nandimi sikoyo ete Biblia oyo nazali na yango ezali likabo oyo euti na Nzambe”
Bayekoli mingi ya Biblia bamoni ete maloba oyo ya ntoma Paulo ezali solo; akomaki boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Bandimaka ete Biblia ebatelamaki mpo ezali Liloba ya Nzambe mpe Nzambe nde abateli yango tii lelo. Faizal, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli azwaki ekateli ya koyekola Biblia mpo na koyeba soki ezali mpenza bongo. Makambo amonaki ekamwisaki ye. Amonaki ete mateya mingi oyo mangomba ya bokristo eteyaka ezali na Biblia te. Lisusu, ndenge Biblia emonisi mokano ya Nzambe mpo na mabele, esimbaki motema na ye.
Alobi boye: “Nandimi sikoyo ete Biblia oyo nazali na yango ezali likabo oyo euti na Nzambe. Kutu, soki Nzambe asalá mokili akoki nde kozanga nguya ya kokomisa buku moko mpe abatela yango mpo na biso? Kokanisa bongo ezali lokola komona ete nguya ya Nzambe ezali na ndelo. Nani akoki kotya ndelo na nguya ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?”—Yisaya 40:8.
a Talá lisolo “Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2008.
-