Bozalisi ezali koteya biso nini?
Nabondeli yo, tuná banyama ya mboka, mpe ekolakisa yo; ná bandɛkɛ ya likoló, mpe ekoyebisa yo. To monisá lobanzo na yo epai ya mabele, mpe ekolakisa yo; mpe bambisi ya mbu ekosakola yango epai na yo.—YOBO 12:7, 8.
ESALI sikoyo mwa bambula, bato ya mayele bazali kozwa mateya na milona ná banyama. Bazali koyekola mpe komekola motindo biloko ndenge na ndenge esalemá (babengaka mayele yango na Français bionique) mpo bábimisa biloko ya sika mpe bábongisa bamasini oyo basilá kosala. Wana ozali kotala bandakisa oyo elandi, omituna boye: ‘Nani asengeli kozwa lokumu mpo na biloko yango?’’
Bayekoli binyanyeli (nageoires) ya balene
Liteya nini bato oyo basalaka bampepɔ bazwi na esika mokɔngɔ ya balene egumbamá? Bayekoli makambo ebele. Esika mokɔngɔ ya balene ya mokóló engumbaná ezali na tɔni 30 (kilo ndenge moko na motuka ya monene oyo etondi na biloko) mpe nzoto na yango ezali pepele, esuki na enyanyeli (nageoires) oyo ezali lokola lipapu. Atako molai ya mbisi yango eleki metre zomi, eyokaka nzoto na yango kilo na mai te. Na ndakisa, ntango balene ezali koluka biloko ya kolya, ekoki komata semba wana bambisi ya mikemike ezali likoló na yango, esalaka lokola serkle, mpe ebimisaka fulufulu. Fulufulu yango ekosala lokola monyámá, oyo monene na yango ekoki kozala metre moko na ndambo (1,5 m), esangisaka biloko oyo elingi elya na likoló. Mpe na nsima, elyaka yango.
Likambo oyo ekamwisaki mpenza bato ya mayele ezali ete bazalaki koyeba te ndenge mbisi monene yango ezalaki kobaluka noki na bisika ata ya mike. Na nsima, bayaki koyeba ete esalaka bongo mpo na ndenge oyo binyanyeli (nageoires) na yango esalemá. Ngámbo ya liboso ya binyanyeli ya liboso ezali seliseli te lokola mapapu ya mpepo, kasi ezali nde minomino, esali molɔngɔ, misusu minene, misusu mike, babengaka yango tubercule.
Ntango balene ezali kobaluka na mai, ba-tubercule yango ezali kobakisela yango makasi mpe ezali kolεmbisa mai. Esalaka yango ndenge nini? Zulunalo moko (Natural History) elimboli ete, ba-tubercule elekisaka mai nokinoki likoló ya binyanyeli, wana ezali kosala serkle mbala na mbala, ata soki balene etelemi semba. Soki ngámbo ya liboso ya binyanyeli ya balene ezalaka seliseli, mbele esalaka baserkle ya mikemike boye te, mpo mai ekokaki kobaluka na nsima na yango mpe ekokaki kotika kobimisa makasi.
Makambo oyo bamoni ekotinda bango básala mpenza nini? Soki basali mapapu ya mpepɔ na ndenge binyanyeli ya balene ezali, ekozala mpenza na mposa te ya mwa biloko oyo ebalukaka nsima na yango, mpe biloko mosusu oyo esalaka ete elekisa mopepe. Mapapu ya ndenge wana ekobimisa makama mpenza te mpe kobongisa yango ekozala mpasi te. John Long, moto ya mayele na biomécanique, alobi ete, mosika te, mokolo mosusu, tokomona “mpepɔ nyonso ya monene na mapapu makasi lokola ya balene, oyo mokɔngɔ na yango egumbamá.”
Bamekoli mapapu ya ndeke babengi mouette
Na ntembe te, mapapu ya mpepɔ emekolá mapapu ya ndeke. Kasi, kala mingi te awa, bato ya mayele bamekolaki mapapu ya ndeke na ndenge mosusu. Zulunalo moko (New Scientist) elobi ete “bato oyo basalaka bolukiluki na Iniversite ya Floride basalaki mwa mpepɔ moko oyo ezalaka na moto te na kati (drone) na likoki ya kotelema esika moko, kokita semba, mpe kopumbwa alima na mbangu makasi.”
Soki mouette ezali kopumbwa esalaka bajeste na yango ntango engumbi mapapu na milɔku (coude) to na mapeka. Na kolanda ndakisa ya mapapu yango, basalaki “mwa mpepɔ oyo ezalaka na moto te, na molai ya santimetre 60, batyaki yango mwa motɛrɛ oyo ezali kotambwisa mwa mabende oyo ezalaki kobendabenda mapapu.” Na lisalisi ya mapapu yango, mwa mpepɔ yango ezalaki na likoki ya kotelema esika moko ntango ezali kopumbwa, mpe kokita semba na katikati ya bandako ya milai. Mampinga ya basoda ya États-Unis oyo babundaka na mpepɔ bazali kozela mwa mpepɔ yango na esengo mpenza mpo esalisa bango na koluka mindoki ya mabe (armes chimiques et biologiques) na bingumba ya minene.
Bamekoli makolo ya jeko
Ezali mpe na makambo mingi oyo bato bakoki koyekola epai ya banyama ya mabele. Na ndakisa, mwa monselekete ya moke oyo babengi jeko ezali na likoki ya komata na efelo to kotelema na plafɔ semba motó na nse. Ata na ntango ya kala, bayebaki ete ekelamu yango ezalaki na makoki ya kokamwisa mpenza. (Masese 30:28) Likoki ya jeko ya kotɛlɛma ndenge wana kokwea te eutaka wapi?
Likoki ya jeko ya kotɛlɛma ngwi ata na talatala euti na mwa nsuki ya mikemike oyo ezali na makolo na yango. Makolo na yango ebimisaka kɔle te. Kasi, esalelaka nde mwa makasi moko boye oyo euti na molekile. Bamolekile ya bitando mibale ekanganaka na mwa makasi ya moke oyo babengi makasi ya van der Waals. Na bosolo boye, nguya oyo ebendaka biloko na nse eleki nguya ya molekile yango na makasi, yango wana, tomataka efelo na mabɔkɔ mpamba te. Kasi, ntango mabɔkɔ ya jeko etuti efelo, mwa nsuki yango ya mabɔkɔ na ye ekómisaka esika monene. Ntango makasi ya van der Waals ekutani na ebele ya mwa nsuki wana, ebimisaka nguya oyo ekoki mpo na kosimba jeko ekwea te.
Lokola bamoni mayele wana, ntina na yango ezali nini? Biloko oyo bakosala mpo na komekola makolo ya jeko, bakoki kosalela yango na esika ya velcro—eloko mosusu oyo bamekolá na bozalisi.a Zulunalo moko (The Economist) elobi ete moto moko ya mayele alobaki ete biloko oyo basali mpo na komekola “nsuki ya makolo ya jeko” ekozala na ntina mingi “na mosala ya monganga na esika oyo bakoki kosalela bakɔle te.”
Nani asengeli kozwa lokumu?
Na ntango oyo NASA (National Aeronautics and Space Administration) ezali kosala robo ya makolo ebele oyo ezali kotambola lokola nkotó (scorpion), bato ya mayele ya Finlande basili kosala traktɛrɛ oyo ekoki komata na bangomba ndenge nyama-nkɛkɛ (insecte) ya monene emataka. Bato mosusu oyo basalaka bolukiluki basali elamba moko ya mposo ya mikemike mpo na komekola ndenge mposo ya mbuma babengi pomme de pin efumgwamaka mpe ekangamaka. Moto moko oyo asalaka mituka azali kosala motuka moko ezala na makasi lokola oyo ya mbubu (poisson-coffre). Bato mosusu oyo basalaka bolukiluki mpe bazali komeka makasi ya mposo ya mbɛmbɛ moko nkombo na yango ormeau, mpo báyeba ndenge ya kosala antibalɛ moko ya pɛlɛlɛ kasi makasi.
Bozalisi ezali kopesa makanisi ebele ya malamu oyo esalisi bato oyo basalaka bolukiluki bátya esika moko ebele ya ba-système biologique. Zulunalo moko (The Economist) elobi ete bato ya mayele bakoki kotala na esika yango mpo na “koyeba ndenge ya kosala to kobongisa biloko.” Biloko oyo ezali na esika yango bazali kobenga yango “brevets biologiques.” Soki totali malamu, bapesaka brevet na moto to na kompanyi oyo ekei kokomisa likanisi ya sika to masini ya sika esika bakomisaka yango. Ntango bazali kolobela esika oyo batye biloko yango, zulunalo moko (The Economist) elobi boye: “Lokola bato oyo basalaka bolukiluki babengi biloko yango ya bionique ete “brevets biologiques,” bazali nde kobɛta nsɛtɛ likoló ya moto oyo azali na ba-brevet yango: bozalisi.”
Makambo ya kokamwa oyo ezali na bozalisi, euti wapi? Bato ebele oyo basalaka bolukiluki balobi ete, yango ezali mbuma ya bamilio ya bambula ya kolukaluka ya evolisoyo. Kasi, bato mosusu oyo basalaka mpe bolukiluki balobi eloko mosusu. Moto ya mayele moko (microbiologiste) na nkombo Michael Behe akomaki na zulunalo moko (The New York Times) na mobu 2005 ete: “[Bozalisi] ezali elembo ya polele oyo etindi biso tókanisa mpenza boye, soki moto alobi: eloko oyo ezali lokola libata, ezali kotambola lokola libata, mpe ezali kolela lokola libata. Soki moto apesi elembeteli mosusu te, tokoloba ete ezali mpenza libata.” Mpe asukisaki na maloba oyo: “Elembeteli ete esalemaki ezali mpenza polele na ndenge oyo tokoki koboya kondima yango te.”
Ya solo, soki moto moko ya mayele asali lipapu ya mpɛpɔ ya malamu mpe ya makasi, esengeli kopesa ye lokumu. Ndenge moko mpe, esengeli kopesa lokumu na moto oyo asali, na ndakisa, bandɛ moko oyo bakoki kosala na yango makambo mingi, elamba ya kolata ya malamu, to motɛrɛ moko ya makasi. Yango wana, soki moto azwi mayele oyo moto mosusu asalaki na yango eloko moko mpe asali oyo ya ye kasi ayebisi te ete azwaki yango epai ya moto yango, bakoloba ete ayibi.
Na yango, ebongi ete bato ya mayele oyo basalaka bolukiluki, oyo bazali komekola mpenza biloko ya bozalisi mpo na kobongisa to kosala biloko na bango, báloba ete biloko wana ebimá nde kaka yango moko? Soki esengeli ete moto azala na mayele mpo akoka komekola eloko, bongo moto oyo asalaki yango azangi nde mayele? Na yango, esengeli kopesa lokumu na nani, na mwana-kelasi to nde na molakisi, moto oyo mwana-kelasi azali komekola mayele na ye?
Tokoki koloba nini mpo na kosukisa?
Nsima ya kotalela bilembeteli oyo emonisi ete bozalisi esalemaki mpenza, bato ebele ya mayele balobi ndenge mokomi ya nzembo akomaki ete: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya. Mabele etondi na biloko oyo obimisaki.” (Nzembo 104:24) Ntoma Paulo, moko ya bato oyo bakomaki Biblia alobaki mpe lokola ye, na maloba oyo: “Mpo bizaleli ya [Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele na nzela ya kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.”—Baroma 1:19, 20.
Kasi, bato ebele ya mayele mpe ya mitema sembo, oyo bamemyaka Biblia mpe bandimelaka Nzambe, bakoki koloba ete, ntango mosusu Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kozalisa biloko ya kitokokitoko oyo ezali na mokili. Bongo Biblia ezali koteya nini?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Velcro ezali lokola tirɛti (epai mosusu minomino, epai mosusu eloko lokola nsukinsuki), moto azwaki mayele ya kosala yango na mbuma babengi bardane.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Bozalisi ezwaki makanisi ya malamu boye wapi?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Nani azali na brevet ya bozalisi?
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
Soki esengeli ete moto azala na mayele mpo akoka komekola eloko, bongo moto oyo asalaki yango azangi nde mayele?
Kotambwisa mpɛpɔ oyo ezali mpasi te, bamekoli mapapu ya “mouette”
Makolo ya jeko ezwaka salite te, etikaka mpe bilembo te, elekaka na bisika nyonso longola kaka “téflon,” ekangamaka mpe etikaka na bolɛmbu mpenza. Bato oyo basalaka bolukiluki balingi komekola bango
Bato ya mayele bamekoli makasi ya mbubu (poisson-coffre) mpo na kosala motuka oyo
[Credit Lines]
Airplane: Kristen Bartlett/University of Florida; gecko foot: Breck P. Kent; box fish and car: Mercedes-Benz USA
[Etanda/Bililingi na lokasa 8]
BATAMBOLAKA NA BWANYA YA LƆƆMBI
Bikelamu ebele awa na mokili eyebaka nzela na yango nde na “bwanya ya lɔɔmbi.” (Masese 30:24, 25) Tótala ndakisa mibale.
◼ Furmi ebungaka nzela te Ndenge nini bafurmi oyo ekendeke koluka biloko ya kolya ebungaka nzela ya ndako na yango te? Bato ya Royaume-Uni oyo basalaka bolukiluki balobi ete, longola nsolo oyo batikaka na nzela, bafurmi mosusu esalelaka mayele ya géométrie mpo na kosala nzela oyo esalisaka yango ekóma na ndako na mpasi te. Na ndakisa, zulunalo moko (New Scientist) elobi ete, bafurmi ya Farao “ezalaki kosala nzela oyo ezalaki kokɔtisa kongɛnga ya moi tii na kati ya ndako na yango, ezalaki kosala matumu (angles) ya degre 50 to 60.” Mpo na nini ezali likambo ya kokamwa? Ntango furmi ekómi esika nzela ekabwani, ekozwa mbala moko oyo ebaluki makasi te, mpo yango ekoki komema ye mbala moko na ndako. Lisolo yango ebakisi boye: “Lokola nzela ezali mibalemibale, yango ezali kosala ete bafurmi etambolaka mingi na kati ya bandako na yango, mingi mpenza soki bafurmi ezali kotambola na nzela moko, mosusu ezali kokende mpe mosusu ezali kozonga, ekosala ete ebungisa makasi mingi te mpo elekaki na nzela mosusu.”
◼ Busɔle ya bandɛkɛ Bandɛkɛ oyo esalaka mibembo ekendaka mosika kasi ebungaka nzela ata moke te, ezala na eleko ya mbula to ya moi. Na ndenge nini? Bato oyo basalaka bolukiluki bamoni ete bandɛkɛ bayokaka nguya oyo ebatelaka mabele (champ magnétique). Nzokande, zulunalo moko (Science) elobi ete “milɔngɔ ya nguya oyo ebatelaka mabele ebongwanaka na kolanda esika na esika, mpe elakisaka nɔrdi ntango nyonso te.” Nini esalaka ete bandɛkɛ oyo esalaka mibembo ebunga nzela te? Emonani ete, na mpokwa nyonso, bandɛkɛ batyaka makɔnga ya busɔle na bango epai moi elali. Lokola esika moi elalaka ebongwanaka na kolanda esika na esika to eleko, bato yango oyo basalaka bolukiluki bakanisi ete bandɛkɛ ebongisaka mbongwana yango na nzela ya “montre moko oyo ezali na kati ya nzoto na yango, oyo eyebisaka yango eleko ya mobu” ndenge zulunalo moko (Science) elobi.
Nani apesa furmi mayele ya géometrie? Nani asalá bandɛkɛ na busɔle, na montre na kati ya nzoto, mpe na bɔɔngɔ mpo esalisaka yango eyeba ndimbola ya makambo oyo ezali na kati ya biloko yango? Ezali evolisyo? To nde Mozalisi moko ya mayele?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© E.J.H. Robinson 2004