-
1 Mpo na nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
1 Mpo na nini?
LIBONDELI. Masolo mingi te ya Biblia ebendaka mpenza likebi ya bato koleka libondeli. Tosɛngi yo otalela mituna nsambo oyo bato mingi batunaka mpo na libondeli; na nsima, tótalela elongo biyano oyo Biblia epesi. Masolo oyo ebongisami mpo na kosalisa yo obondelaka—obanda kobondela to obongisa lisusu mabondeli na yo.
NA MOKILI mobimba, bato ya bikólo mpe mangomba nyonso babondelaka. Babondelaka ntango bazali bango moko to mpe na bato mosusu. Babondelaka na bandako-nzambe, na batempelo, na basinagoga, na bamoskɛ, mpe na bisika oyo babengaka bisika mosantu. Ntango bazali kobondela, basalelaka biloko lokola, tapis à prières, sapɛlɛ, moulins à prières, bikeko, babuku ya mabondeli, to mabondeli oyo bakomaka na mwa batablo oyo batye likoló ya mabaya to banzete.
Libondeli ekesenisaka bato na bikelamu mosusu nyonso awa na mabele. Ya solo, ezali na makambo mingi oyo bato ná banyama bakokani na yango. Lokola banyama, biso mpe tozalaka na mposa ya bilei, mopɛpɛ mpe mai. Lokola bango, tobotamaka, tozalaka na bomoi, mpe tokufaka. (Mosakoli 3:19) Kasi, kaka bato nde babondelaka. Mpo na nini?
Ntango mosusu eyano ya pɛtɛɛ ezali ete, tozalaka na mposa ya kosambela. Mpo na bato mingi, libondeli ezalaka lolenge moko oyo moto akoki kozala na boyokani na ye oyo bango bamonaka ete azali mosantu to azali seko. Biblia emonisi ete tokelamá na mposa ya makambo yango. (Mosakoli 3:11) Mokolo moko, Yesu Kristo alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—Matai 5:3.
“Bobola ya elimo”—yango nde etindaka bato bázala na ebele ya bandako-nzambe mpe biloko mosusu ya losambo mpe bálekisaka ebele ya bangonga na libondeli. Ya solo, bato mosusu balukaka bango moko kokokisa bamposa na bango ya elimo to bobola na bango ya elimo to mpe balukaka bato mosusu bákokisela bango yango. Kasi, omoni te ete bato bazali na makoki nyonso te ya kosalisa baninga na bango bato na ndenge ebongi? Moto azalaka na nguya mingi te, azali na bomoi mokuse, mpe amonaka mosika te. Kaka Ye oyo azali na bwanya koleka, aleki na nguya, mpe oyo azali na bomoi libela na libela koleka biso nde akoki kopesa biso oyo tosengeli na yango. Bamposa to bobola nini ya elimo etindaka biso tóbondela?
Tótalela likambo oyo: Ekómelá yo te ozala na mposa makasi ya litambwisi, bwanya, to kozwa biyano na mituna oyo emonanaka ete eleki boyebi ya bato? Oyoká naino te mposa makasi ya libɔndisi, ntango moto moko oyo olingaka akufi, ntango olingi kozwa ekateli moko monene, to ozali na mposa ete bálimbisa yo ntango emonani ete omemi ngambo mpo na likambo moko oyo osalaki?
Na kotalela Biblia, makambo wana nyonso esengeli mpenza kotinda biso tóbondela. Biblia ezali buku oyo elobeli mpenza likambo yango, mpe ezali na mabondeli ya mibali mpe basi mingi ya sembo. Babondelaki mpo na koluka libɔndisi, litambwisi, bolimbisi, mpe mpo na koluka biyano na mituna ya makasi koleka.—Nzembo 23:3; 71:21; Danyele 9:4, 5, 19; Habakuku 1:3.
Atako mabondeli yango ekesanaki, ekokanaki na likambo moko. Bato oyo basalaki mabondeli yango, bayebaki mpenza sekele ya kobondela na ndenge ebongi, sekele oyo bato mingi lelo oyo bayebi te mpe bakipaka yango te. Bayebaki nani basengeli kobondela.
-
-
2 Epai ya nani?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
2 Epai ya nani?
MABONDELI nyonso ekendaka esika moko, ata soki moto azali kobondela nani? Lelo oyo, bato mingi bakanisaka bongo. Bato oyo basangisaka mangomba basepelaka na likambo yango mpe balingaka ete Nzambe andima mangomba nyonso ata soki ekeseni. Kasi, likanisi yango ekoki kozala lokuta?
Biblia eteyaka ete mabondeli mingi ekendaka te na esika oyo ebongi. Banda ntango Biblia ezalaki kokomama, bato mingi bazalaki kobondela bililingi. Kasi, mbala na mbala Nzambe akebisaki mpo na likambo yango. Na ndakisa, Nzembo 115:4-6 elobi na ntina na bikeko ete: “Ezali na matoi, kasi eyokaka te.” Vɛrsɛ yango ezali polele. Mpo na nini kosambela nzambe oyo akoyoka yo ata moke te?
Lisolo moko ya Biblia emonisi polele likambo yango. Eliya, mosakoli ya solo asɛngaki basakoli ya Baala básambela nzambe na bango, nsima ye mpe akosambela Nzambe na ye. Eliya alobaki ete Nzambe ya solo akoyanola, mpe oyo ya lokuta akoyanola te. Basakoli ya Baala bandimaki likambo yango mpe babondelaki ntango molai; babondelaki kutu na mongongo makasi—kasi, nzambe na bango ayanolaki bango te! Lisolo yango elobi ete: “Moto moko ayanolaki te, mpe moto moko te atyaki likebi.” (1 Bakonzi 18:29) Kasi, nini esalemaki ntango Eliya abondelaki?
Ntango Eliya asilisaki kobondela, Nzambe na ye ayanolaki mbala moko, atindaki mɔtɔ uta na likoló mpe ezikisaki mbeka oyo Eliya abongisaki. Bokeseni ezalaki wapi? Likambo moko ya ntina mingi ezali na libondeli oyo Eliya asalaki, oyo ezali na 1 Bakonzi 18:36, 37. Ezali libondeli moko ya mokuse—na monɔkɔ ya Ebre ya ebandeli, ezali na maloba soki 30 mpamba. Kasi, kaka na mwa maloba wana, Eliya abengaki Nzambe mbala misato na nkombo na ye Yehova.
Baala, oyo elimboli “nkolo,” azalaki nzambe ya Bakanana, mpe ezalaki na balolenge mingi ya nzambe yango. Nzokande, Yehova ezali nkombo kaka moko oyo esalelamaka mpo na kolobela Ye oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́. Nzambe yango ayebisaki bato na ye boye: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te.”—Yisaya 42:8.
Libondeli ya Eliya mpe ya basakoli wana ya Baala ekendaki esika moko? Losambo ya Baala ebebisaki bizaleli ya bato na milulu na yango ya bondumba ata mpe kopesa bambeka ya bato. Nzokande, losambo ya Yehova ezalaki kopesa Bayisraele, bato na ye lokumu, ezalaki kosikola bango na misala wana ya mabe. Na yango kanisá na likambo oyo: Soki okomeli moninga na yo moko oyo omemyaka, okolinga ete mokanda yango ekende epai ya moto mosusu oyo azali na nkombo ya moninga na yo te, oyo bizaleli na ye ekeseni mpenza na oyo ya moninga na yo? Soki moke te!
Likambo oyo Eliya asɛngaki basakoli ya Baala emonisi ete mabondeli nyonso ekendaka esika moko te
Soki obondeli Yehova, ozali kobondela Mozalisi, Tata ya bato nyonso.a Mosakoli Yisaya abondelaki boye: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso.” (Yisaya 63:16) Ezali Ye nde Yesu Kristo alobelaki ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:17) Yehova azali Tata ya Yesu. Azali Nzambe oyo Yesu azalaki kobondela mpe oyo alakisaki bayekoli na ye bábondelaka.—Matai 6:9.
Biblia eteyaka biso tóbondelaka Yesu, Maria, basantu to baanzelu? Te—kaka Yehova. Tótalela bantina mibale oyo emonisi likambo yango. Ya liboso, libondeli ezali losambo, mpe Biblia elobi ete losambo esengeli kopesama kaka epai ya Yehova. (Kobima 20:5) Ya mibale, Biblia emonisi ete abengami “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Atako Yehova atikelá bikelamu na ye mikumba mosusu, kasi apesá moko te mokumba ya koyokaka mabondeli. Azali Nzambe oyo alaki koyoka mabondeli na biso ye moko.
Na yango, soki olingi ete Nzambe ayoka mabondeli na yo, kobosana te toli oyo: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Misala 2:21) Kasi, Yehova ayokaka mabondeli nyonso, kozanga kosɛnga likambo moko? To ezali na likambo mosusu oyo tosengeli koyeba soki tolingi Yehova ayoka mabondeli na biso?
a Mangomba mosusu elobaka ete ezali mabe kotánga nkombo mpenza ya Nzambe ata na libondeli. Nzokande, nkombo yango ezali mbala soki 7 000 na minɔkɔ oyo bakomaki Biblia, mpe ezali mbala mingi na mabondeli mpe banzembo ya basaleli ya sembo ya Yehova.
-
-
3 Ndenge nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
3 Ndenge nini?
NA LIKAMBO etali libondeli, mangomba mingi etyaka likebi na makambo lokola ndenge oyo moto azali ntango azali kobondela, maloba oyo azali kobimisa, mpe milulu mosusu. Nzokande, Biblia esalisaka biso tótya likebi te na makambo wana kasi nde na makambo ya ntina mingi na ndakisa, “ndenge nini tosengeli kobondela?”
Biblia elobeli basaleli ya Nzambe ya sembo ete bazalaki kobondela na bisika ndenge na ndenge mpe na bandenge mingi. Bazalaki kobondela na mongongo ya nse to na mongongo makasi na kotalela ntango mpe esika oyo bazalaki. Ntango bazalaki kobondela, bazalaki kotala likoló to mpe kogumbama. Na esika ya kosalela bililingi, basapɛlɛ, to babuku ya mabondeli, libondeli na bango ezalaki kouta nde na motema, ezalaki maloba na bango moko. Mpo na nini Nzambe azalaki koyoka mabondeli na bango?
Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, bazalaki kotinda mabondeli na bango kaka epai ya Nzambe moko—Yehova. Ezali na likambo mosusu ya ntina mingi. Na 1 Yoane 5:14, Biblia elobi boye: “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” Mabondeli na biso esengeli koyokana na mokano ya Nzambe. Yango elimboli nini?
Mpo na kobondela na kolanda mokano ya Nzambe, tosengeli koyeba soki mokano na ye ezali nini. Koyekola Biblia ezali likambo ya ntina mingi mpo na libondeli. Yango elingi nde koloba ete Nzambe akoyoka biso te soki totángi te bakelasi ya teoloji? Te, Nzambe azali kosɛnga biso tóyekola mokano na ye, tóluka koyeba yango mpe tósala na boyokani na mokano yango. (Matai 7:21-23) Tosengeli kobondela na kolanda makambo oyo tozali koyekola.
Mpo mabondeli endimama, esengeli koyokana na mokano ya Nzambe, kosalema na kondima, mpe kosalema na nkombo ya Yesu
Ntango tozali koyekola makambo ya Yehova mpe mokano na ye, kondima na biso ekokóma makasi—yango mpe ezali na ntina mpo na libondeli. Yesu alobaki boye: “Makambo nyonso oyo bozali kosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.” (Matai 21:22) Kozala na kondima elimboli te kozala bindimandima. Elimboli nde kondima eloko moko oyo atako emonanaka te, ezali na bilembeteli oyo emonisi ete eloko yango ezali mpenza. (Baebre 11:1) Biblia etondi na makambo oyo emonisi ete Yehova, oyo tokoki te komona ye, azalaka mpenza, abongi kotyelama motema, mpe alingaka koyanola mabondeli ya baoyo bazali na kondima epai na ye. Lisusu, tokoki ntango nyonso kosɛnga ye apesa biso kondima makasi, mpe Yehova asepelaka kopesa biso oyo tosengeli na yango.—Luka 17:5; Yakobo 1:17.
Kasi, ezali mpe na likambo mosusu ya ntina mingi mpo na koyeba ndenge ya kobondela. Yesu alobaki boye: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Na yango, Yesu azali nzela oyo tokoki kopusana penepene na Yehova, Tata. Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka na nkombo na ye. (Yoane 14:13; 15:16) Yango elimboli te ete tosengeli kobondela Yesu. Tobondelaka na nkombo ya Yesu, toyebaka ete mpo na Yesu nde tozali na likoki ya kopusana penepene na Tata na biso ya kokoka oyo azali mosantu.
Bayekoli ya Yesu batunaki ye mokolo moko boye: “Nkolo, teyá biso kobondela.” (Luka 11:1) Emonani ete bazalaki te kosɛnga makambo lokola oyo touti kolobela. Balingaki nde koyeba makambo nini bakoloba—na maloba mosusu, ‘tosengeli kobondela mpo na makambo nini?’
-
-
4 Mpo na makambo nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
4 Mpo na makambo nini?
BALOBAKA ete ezali libondeli oyo bakristo na mokili mobimba bazongelaka mingi mbala na mbala. Ata soki ezali solo to lokuta, libondeli oyo Yesu apesaki lokola ndakisa—oyo mbala mosusu babengaka yango libondeli ya Tata wa biso—bato mingi bakangaka mpenza ntina na yango te. Ebele ya bato bazongelaka maloba wana oyo bakangá na motó, mikolo nyonso, ntango mosusu mbala ebele na mokolo. Kasi, na makanisi ya Yesu libondeli yango esengelaki te kosalemaka ndenge wana. Ndenge nini toyebi yango?
Mwa moke liboso ya kolakisa libondeli yango, Yesu alobaki boye: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te.” (Matai 6:7) Yesu azalaki nde bongolabongola, ye moko apekisi kozongela maloba na libondeli mpe apesi lisusu libondeli oyo bato basengelaki kokanga na motó mpe kozongelaka yango? Te! Kutu, Yesu azalaki nde kolakisa makambo oyo esengeli kobondela mpo na yango, mpe alakisaki biso makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na makanisi na biso ntango tozali kobondela. Tótalela naino malamumalamu makambo oyo alobaki. Libondeli yango ezali na Matai 6:9-13.
“Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.”
Na yango, Yesu akundwelaki bayekoli na ye ete mabondeli nyonso esengeli kotindama epai ya Tata na ye, Yehova. Kasi, oyebi mpo na nini nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpe mpo na nini esengeli kosantisama, to kokómisama mosantu?
Banda na ebandeli, nkombo mosantu ya Nzambe esambwisamaki. Satana, monguna ya Nzambe abengaki Yehova mobuki ya lokuta, Mokonzi moko ya moimi oyo azali na lotomo te ya koyangela bikelamu na ye. (Ebandeli 3:1-6) Bato mingi bamityá na ngámbo ya Satana, bateyaka ete Nzambe atyelaka bato likebi te, azali makambo mabe, azali boboto te mpe baboyaka kondima ete azali Mozalisi. Basusu kutu balongoli nkombo Yehova na mabongoli ya Biblia mpe bapekisi kosalela nkombo yango.
Biblia emonisi ete Nzambe akobongisa makambo nyonso wana ya kozanga bosembo. (Ezekiele 39:7) Ntango akosala yango, akokokisa bamposa na yo nyonso mpe akobongisa makambo na yo nyonso. Ndenge nini? Maloba oyo elandi na libondeli ya Yesu epesi eyano.
“Bokonzi na yo eya.”
Lelo oyo, bateyi mingi ya mangomba bazalaka na mobulungano na likambo etali Bokonzi ya Nzambe. Kasi, ndenge bato oyo bazalaki koyoka Yesu bayebaki yango, basakoli ya Nzambe basakolaki ete Masiya, Mobikisi oyo Nzambe aponi akoyangela na bokonzi oyo ekokɔtisa mbongwana na mokili. (Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44) Ekosantisa nkombo ya Nzambe na ndenge ekomonisa polele lokuta ya Satana mpe ekokweisa Satana mpe misala na ye nyonso. Bokonzi ya Nzambe ekosukisa bitumba, maladi, nzala—ata mpe liwa. (Nzembo 46:9; 72:12-16; Yisaya 25:8; 33:24) Ntango ozali kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya, ozali kobondela mpo bilaka wana nyonso ekokisama.
“Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”
Maloba wana ya Yesu emonisi ete mokano ya Nzambe ekokokisama mpenza na mabele ndenge ezali kokokisama na likoló, epai Nzambe afandaka. Eloko moko te epekisaki mokano ya Nzambe esalema na likoló; kuna, Mwana ya Nzambe abundaki etumba na Satana mpe baanzelu na ye, abwakaki bango na mabele. (Emoniseli 12:9-12) Ndenge moko na makambo mibale ya liboso ya libondeli ya ndakisa, oyo ya misato mpe ezali kosalisa biso tótya likebi na makambo oyo eleki ntina—mokano na biso moko te, kasi nde oyo ya Nzambe. Ezali mokano na ye nde ememaka ntango nyonso bolamu koleka epai ya bikelamu na ye nyonso. Kutu, ata Yesu moto ya kokoka alobaki na Tata na ye boye: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.”—Luka 22:42.
“Pesá biso lelo bilei na biso.”
Yesu amonisaki ete tokoki mpe kobondelaka mpo na bamposa na biso. Ezali mabe te kobondela Nzambe mpo na makambo oyo tozali na yango mposa mokolo na mokolo. Kutu, kosala bongo ekundwelaka biso ete Yehova azali ye oyo “apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:25) Biblia emonisi ete azali Tata ya bolingo oyo asepelaka kopesa bana na ye biloko oyo basengeli na yango. Kasi, lokola azali Tata ya malamu akondima te kopesa bana na ye eloko oyo ayebi ete ekozala na litomba te mpo na bango.
“Limbisá biso banyongo na biso.”
Ozalaka mpenza na nyongo ya Nzambe? Ozalaka na mposa alimbisa yo? Lelo oyo, bato mingi bayebaka te soki lisumu ezali nini, mpe bamonaka te ete ezali likambo monene. Kasi, Biblia eteyaka ete lisumu ezali mosisa ya makambo nyonso ya mabe mpo yango nde esalaka ete bato bákufaka. Lokola tobotamá bato ya masumu, biso nyonso tosumukaka mbala na mbala, elikya kaka moko oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya etaleli ndenge oyo Nzambe alimbisaka biso. (Baroma 3:23; 5:12; 6:23) Ezali kobɔndisa koyeba oyo Biblia elobi ete: “Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.”—Nzembo 86:5.
“Bikisá biso na moto mabe.”
Omoni te ete ozali mpenza na mposa makasi ya libateli ya Nzambe? Bato mingi baboyaka kondima ete “moto mabe,” Satana, azalaka mpenza. Nzokande, Yesu ateyaki ete Satana azalaka mpenza, kutu abengaki ye “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 16:11) Satana abebisi mokili oyo ye azali kotambwisa, mpe akolinga mpenza kobungisa yo nzela, kopekisa yo okolisa boyokani na Tata na yo, Yehova. (1 Petro 5:8) Kasi, Yehova azali mpenza makasi koleka Satana mpe asepelaka kobatela baoyo balingaka ye.
Makambo ya ntina ya libondeli ya ndakisa oyo Yesu apesaki, oyo touti kolobela na mokuse, esukisi te makambo oyo tokoki kobondela mpo na yango. Kobosana te ete 1 Yoane 5:14 eyebisi biso boye na ntina na Nzambe: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” Na yango, komitungisa te ete bampasi na yo ezali mpenza na ntina te mpo oyebisa yango epai ya Nzambe.—1 Petro 5:7.
Kasi, ezali boni mpo na ntango mpe esika? Ntango mpe esika ya kobondela ezali mpenza na ntina?
-
-
5 Esika mpe ntango ezali na ntina?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
5 Esika mpe ntango ezali na ntina?
NA NTEMBE te, omonaka ndenge mangomba mingi etongaka bandako ya mineneminene mpo na losambo mpe etyaka bangonga ya sikisiki oyo bato basengeli kobondelaka na mokolo. Biblia elobi ete tosengeli kobondelaka kaka na bisika moko boye mpe na bangonga oyo eponami?
Biblia emonisi ete ezali na mabaku oyo ebongi mpo na libondeli. Na ndakisa, liboso ya kolya na bayekoli na ye, Yesu apesaki Nzambe mersi na libondeli. (Luka 22:17) Mpe ntango bayekoli na ye bayanganaki mpo na kosambela, babondelaki elongo. Na yango, bakobaki na momeseno oyo banda kala Bayuda bazalaki kosala na basinagoga mpe na tempelo na Yerusaleme. Mokano ya Nzambe ezalaki ete tempelo ezala “ndako ya mabondeli mpo na bikólo nyonso.”—Marko 11:17.
Ntango basaleli ya Nzambe basangani mpe babondeli elongo, malɔmbɔ na bango ekoki kobimisa matomba. Soki bato oyo basangani mpo na kobondela bazali na bomoko ya makanisi, mpe libondeli oyo esalemi mpo na bango eyokani na mitinda ya Biblia, Nzambe akosepela. Kutu, libondeli ekoki kotinda ye asala likambo mosusu oyo akokaki kosala te. (Baebre 13:18, 19) Batatoli ya Yehova babondelaka mbala na mbala na makita na bango. Tobengi yo okende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali mosika te na esika oyo ofandi mpo yo moko oyoka mabondeli yango.
Kasi, Biblia elobi te ete esengeli kobondela kaka na ngonga boye to na esika boye. Na Biblia, tozali kokuta masolo ya basaleli ya Nzambe oyo babondelaki na ngonga ndenge na ndenge, mpe bisika ndenge na ndenge. Yesu alobaki ete: “Ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana; bongo Tata na yo oyo atalaka uta na esika ya kobombana akofuta yo.”—Matai 6:6.
Tokoki kobondela ntango nyonso mpe esika nyonso
Oyo libyangi ya malamu mpenza! Okoki kopusana penepene na Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ ntango nyonso, ata ntango ozali mpenza yo moko, mpe zalá na elikya ete akoyoka yo. Tokoki kokamwa te ete mbala mingi Yesu azalaki koluka esika na ye moko mpo na kobondela! Mokolo moko, alekisaki butu mobimba kobondela Nzambe, na ntembe te mpo na koluka litambwisi mpo na ekateli moko ya ntina mingi.—Luka 6:12, 13.
Biblia elobeli masolo ya mibali mpe basi mosusu oyo babondelaki ntango esengelaki bázwa bikateli ya minene to ntango bakutanaki na mikakatano minene. Ntango mosusu bazalaki kobondela na mongongo makasi mpe ntango mosusu na nse ya motema; babondelaki ntango bazalaki na bato mosusu mpe ntango bazalaki kaka bango moko. Likambo eleki ntina ezali ete babondelaki. Kutu, Nzambe azali kosɛnga na basaleli na ye ete: “Bóbondelaka ntango nyonso.” (1 Batesaloniki 5:17) Asepelaka koyoka ntango nyonso baoyo basalaka mokano na ye. Libyangi oyo emonisi mpenza bolingo ya Yehova!
Na ntembe te, na mokili oyo mabe, bato mingi batunaka soki libondeli ezali mpenza na ntina. Okoki komituna: ‘Ekosalisa ngai mpenza?’
-
-
6 Ekoki kosalisa?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
6 Ekoki kosalisa?
KOBONDELA esalisaka biso? Biblia emonisi ete ezali bongo, mabondeli ya basaleli ya sembo ya Nzambe ememelaka bango mpenza matomba. (Luka 22:40; Yakobo 5:13) Kutu, kobondela ekoki kosala ete tózala malamu na elimo, na makanisi, ata mpe na nzoto. Ndenge nini?
Tózwa ndakisa moko, bakabeli mwana na yo eloko. Okoteya ye ete asepela kaka na motema? To okolakisa ye ete aloba mpo na komonisa ete asepeli? Ntango tolobi ndenge oyo tozali koyoka na motema, tokotyela makambo yango likebi mpe ekokóma na ntina mingi. Ezali mpe bongo na oyo etali kosolola na Nzambe? Ɛɛ! Tótalela mwa bandakisa.
Mabondeli ya kopesa mersi. Ntango topesi Tata na biso ya likoló mersi mpo na makambo kitoko oyo asaleli biso, tokotya likebi na mapamboli oyo tozwi. Mpo na yango, tokozala na botɔndi mingi lisusu, tokozala na esengo mingi, mpe tokozala na elikya.—Bafilipi 4:6.
Ndakisa: Yesu amonisaki bɔtɔndi mpo na ndenge Tata na ye ayokaki mpe ayanolaki na mabondeli na ye.—Yoane 11:41.
Mabondeli mpo na kosɛnga bolimbisi. Ntango tobondeli Nzambe mpo na kosɛnga bolimbisi, lisosoli na biso ekómaka malamu, tomonisaka mpenza ete tobongoli motema, mpe toyebaka mpenza ete lisumu ezali likambo ya lisɛki te. Tobɔndisamaka mpe na ndenge tomonaka ete tozwi kimya na motema.
Ndakisa: Davidi abondelaki mpo na komonisa ete abongoli motema mpe ayoki mawa.—Nzembo 51.
Mabondeli mpo na koluka litambwisi mpe bwanya. Kosɛnga Yehova atambwisa to apesa biso bwanya oyo tozali na yango mposa mpo na kozwa bikateli ya malamu ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa ya solosolo. Ekoki kosalisa biso tóyeba bandelo na biso mpe kosalisa biso tótyelaka Tata na biso ya likoló motema.—Masese 3:5, 6.
Ndakisa: Na komikitisa nyonso, Salomo asɛngaki litambwisi mpe bwanya mpo na kokamba Yisraele.—1 Bakonzi 3:5-12.
Mabondeli na ntango ya mpasi. Soki tofungoleli Yehova motema na biso ntango totungisami na makanisi, tokozwa kimya ya motema mpe tokotyela Yehova motema na esika ya komityela motema.—Nzembo 62:8.
Ndakisa: Mokonzi Asa abondelaki ntango banguna bayaki kobundisa bango.—2 Ntango 14:11.
Mabondeli mpo na baoyo bazali na bosɛnga. Mabondeli ya ndenge wana esalisaka biso tólonga ezaleli ya moimi mpe tókóma koyokela bato mawa mpe komitya na esika na bango.
Ndakisa: Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye.—Yoane 17:9-17.
Mabondeli ya masanzoli. Ntango tozali kosanzola Yehova mpo na misala na ye ya kokamwa mpe bizaleli na ye, tokokóma na limemya makasi mpo na ye mpe tokosepela na ye mingi lisusu. Mabondeli ya ndenge wana ekoki mpe kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe mpe Tata na biso.
Ndakisa: Na esengo nyonso, Davidi asanzolaki Nzambe mpo na biloko oyo akelá.—Nzembo 8.
Lipamboli mosusu oyo ezwamaka na nzela ya libondeli ezali “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:7) Kozala na kimya na mokili oyo mabe ezali mpenza lipamboli oyo bato mingi bazalaka na yango te. Esalaka kutu ete moto azala nzoto kolɔngɔnɔ. (Masese 14:30) Kasi, tozwaka kimya yango kaka na milende na biso moko? To esɛngaka likambo mosusu?
Libondeli ememaka matomba mingi—na nzoto, na motema mpe koleka nyonso na elimo
-
-
7 Nzambe akoyoka mpe akoyanola?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Octobre 1
-
-
7 Nzambe akoyoka mpe akoyanola?
MOTUNA wana ebendaka likebi ya bato mingi mpe balukaka kozwa eyano na motuna yango. Biblia emonisi ete Yehova ayokaka mpenza mabondeli lelo oyo. Biso moko nde tokosala ete Nzambe ayoka to aboya mabondeli na biso.
Yesu atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye, baoyo bazalaki kobondela na bokosi; bazalaki kaka koluka komonisa ete bazali bato malamu. Alobaki ete bato yango bazwaki “mbano na bango mobimba,” yango elimbolaki ete bazwaki kaka likambo oyo bango balingaki mingi; bato bátyela bango likebi, kasi te likambo oyo basengelaki na yango, Nzambe ayoka bango. (Matai 6:5) Lelo oyo mpe bato mingi babondelaka kaka na kolanda mokano na bango moko, kasi oyo ya Nzambe te. Lokola balandaka te mitinda ya Biblia oyo touti kolobela, Nzambe ayokaka bango te.
Ezali boni mpo na yo? Nzambe akoyoka mpe akoyanola na mabondeli na yo? Eyano etaleli te soki ozali na mposo nini, ekólo nini, to ozali mobola to mozwi. Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Maloba wana emonisi ndenge yo ozalaka? Soki obangaka Nzambe, okotya ye na esika ya liboso, okobanga kosala makambo oyo ye aboyaka. Kosala makambo ya boyengebene elakisi, koluka kosala makambo oyo Nzambe atalelaka ete ezali sembo na esika ya kolanda mokano na yo moko to ya bato mosusu. Olingi mpenza Nzambe ayoka mabondeli na yo? Biblia elakisi yo oyo osengeli kosala.a
Ya solo, bato mingi balingaka Nzambe ayanola mabondeli na bango na makamwisi. Kasi, ata na ntango ya kala, Nzambe azalaki kosala makamwisi yango mingi te. Na bantango mosusu bikeke mingi ezalaki koleka liboso asala likamwisi moko. Lisusu, Biblia emonisi ete ntango ya makamwisi esukaki nsima ya ntango ya bantoma. (1 Bakorinti 13:8-10) Kasi, yango elingi nde koloba ete Nzambe ayanolaka te na mabondeli lelo oyo? Ezali bongo te! Tótalela mabondeli mosusu oyo ayanolaka.
Nzambe apesaka bwanya. Yehova azali liziba ya bwanya nyonso ya solosolo. Apesaka yango na moto nyonso, na baoyo nyonso balukaka litambwisi na ye mpe balukaka koyokanisa bomoi na bango na litambwisi yango.—Yakobo 1:5.
Nzambe apesaka elimo santu na ye mpe mapamboli na yango nyonso. Elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo asalaka na yango mosala. Ezali na nguya moko te oyo eleki yango. Ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na minyoko. Ekoki kopesa biso kimya ntango totungisami. Ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli mosusu ya kitoko. (Bagalatia 5:22, 23) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Nzambe apesaka likabo yango na boboto nyonso.—Luka 11:13.
Nzambe apesaka boyebi epai ya baoyo balukaka ye mpenza. (Misala 17:26, 27) Na mokili mobimba, ezali na bato oyo balukaka mpenza koyeba solo. Balingaka koyeba Nzambe—nkombo na ye, mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato, mpe ndenge oyo bakoki kopusana penepene na ye. (Yakobo 4:8) Mbala mingi, Batatoli ya Yehova bakutanaka na bato ya ndenge wana mpe basepelaka kolakisa bango biyano oyo Biblia epesi na mituna yango.
Ezali mpo na yango nde ozwi zulunalo oyo? Ozali koluka koyeba Nzambe? Ntango mosusu azali koyanola na libondeli na yo na nzela ya zulunalo oyo.
-