Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 76
  • Mpo na nini toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nini esalemaka na Ndako ya Bokonzi?
  • Mpo na nini osengeli koyanganaka na makita?
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 76
Elenge mobali moko azali kotala ndenge oyo bandeko bazali kokota na Ndako ya Bokonzi

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi?

Mbala mibale na pɔsɔ, Batatoli ya Yehova basalaka makita na bisaka na bango ya losambo, oyo babengaka Bandako ya Bokonzi. Nini esalemaka kuna, mpe ndenge nini okoki kozwa matomba soki ozali koyangana na makita yango?

  • Nini esalemaka na Ndako ya Bokonzi?

  • Mpo na nini osengeli koyanganaka na makita?

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Nini esalemaka na Ndako ya Bokonzi?

Ndako ya Bokonzi ezali esika oyo toyekolaka mateya ya Biblia oyo esalisaka biso na bomoi. Makita oyo esalemaka kuna ekoki kosalisa yo:

  • oyekola solo na ntina etali Nzambe.

  • okanga ntina ya makambo oyo ezali kosalema lelo oyo.

  • okóma moto malamu.

  • ozwa baninga ya malamu.

Oyebaki yango? Esika ya losambo ya Batatoli ya Yehova ebengamaka Ndako ya Bokonzi mpo kuna nde balobelaka mingimingi Bokonzi ya Nzambe.​—Matai 6:9, 10; 24:14; Luka 4:43.

Mpo na nini osengeli koyanganaka na makita?

Matomba oyo okozwa. Mitinda ya Biblia oyo elobelamaka na makita ya Batatoli ya Yehova ekosalisa yo ‘ozwa bwanya.’ (Masese 4:5) Yango elimboli ete Biblia ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu na bomoi na yo. Ekoki mpe kosalisa yo ozwa biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi, lokola:

  • Bomoi ezali na ntina nini?

  • Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?

  • Soki moto akufi akómaka ndenge nini?

Batitre ya badiskur oyo elandi ezali mwa ndambo ya mateya oyo epesamaka na makita na biso ya pɔsɔ:

  • Mpo na nini tosengeli kotika Biblia etambwisaka biso?

  • Epai wapi tokoki kozwa lisalisi na ntango ya mpasi?

  • Oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosala mpo na biso sikoyo.

“Moninga moko ya kelasi ayaki na makita na biso. Afandaki esika moko na libota na biso mpe napesaki ye mikanda na ngai asalela. Na nsima ayebisaki ngai ete asepelaki mingi na biyano ya bandeko na makita. Mpe alobaki ete na lingomba na bango bayekolaka Biblia te ndenge biso tosalaka.”​—Brenda.

Oyebaki yango? Bisika ya kofanda ezali ofele na Ndako ya Bokonzi mpe bakɔngɔlaka mabonza te.

Koyangana na makita ekolendisa yo. Biblia emonisi ntina oyo tosengeli koyangana na makita elongo na bandeko na biso bakristo, ezali mpo “tólendisanaka.” (Baebre 10:24, 25) Kozala na baninga malamu mpe oyo batyaka Nzambe mpe basusu na esika ya liboso, elendisaka na mokili oyo bato mingi bamilingaka bango moko.

“Nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala, nalɛmbaka mingi mpe nakómaka mawamawa, kasi bandeko na Ndako ya Bokonzi basalaka ete namiyoka malamu. Nsima ya makita nazongaka na ndako na esengo mpe namibongisaka malamu mpo na mokolo oyo elandi.”​—Elisa.

Oyebaki yango? Masanga ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ezali koleka 120 000 mpe basalaka makita na bisika koleka 60 000. Mbula na mbula bandako ya Bokonzi koleka 1 500 ezali kotongama mpe motángo na yango ezali kobakisama se kobakisama.a

Makambo bilenge mosusu balobi

Jessica

“Ntango nazalaki kotánga, nazalaki koya mbala mosusu na makita ná moninga moko ya kelasi mpe akamwaki ndenge Batatoli ya Yehova na mokili mobimba batambwisaka makita na bango mpe ndenge bayekolaka Biblia elongo. Kaka na mikolo oyo, patron na ngai ayaki na makita mpe akamwaki ndenge oyo tosalelaka Biblia na makita yango. Ndenge asepelaki na makita yango ebakisaki lisusu esengo na ngai mpo na mateya oyo tozwaka!”​—Jessica.

Timothy

“Namonaki ete makita na biso epesaka ngai makasi ya kolonga mitungisi ya mokolo na mokolo. Toyekolaka ndenge ya kozala na bomoi ya esengo, ndenge ya kozala moto malamu, mpe makambo mosusu ya ntina. Mbala nyonso oyo nautaka na makita, nazongaka na makasi oyo esengeli.”​—Timothy.

Jacob

“Moto moko oyo nabengisaki na makita alobaki boye nsima ya makita: Nayaki kaka mpo namona mabunga na bino mpe nakweisa mateya na bino. Kasi namoni ete mateya oyo nandimaka nde ezali malamu te. Akamwaki mpe na bomoko na biso Batatoli ya Yehova. Alobaki: Ata soki ezalaki mbala ya liboso naya awa, boyambaki ngai lokola nde tosí toyebaná kala!’”​—Jacob.

Madison

“Na bantango mosusu, liboso nakende makita namilobelaka ete ‘soki kaka makita esili nakozela te, nakozonga mbala moko ndako.’ Kasi, na makita makanisi wana elongwaka. Nsima ya makita, nasololaka na bandeko mpe nabosanaka likanisi ya kozonga ndako nokinoki. Nakokaki kozala na baninga ya malamu boye te soki makita ezalaka te.”​—Madison.

a Mpo na koyeba esika makita na biso esalemaka, kende na esika bakomi “Makita ya Batatoli ya Yehova” mpe finá esika bakomi “Esika oyo ezali pene na bino.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto