Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Elikya—Ezali mpenza na ntina na bomoi ya moto?
    Lamuká!—2004 | Octobre 8
    • Elikya​—Ezali mpenza na ntina na bomoi ya moto?

      DANIEL azalaki na mbula zomi mpamba, kasi mbula mobimba azalaki kobundana na maladi ya kansɛr. Minganga na ye bazalaki lisusu na elikya te, ndenge moko mpe bandeko ná baninga na ye. Kasi Daniel azalaki kaka na elikya. Azalaki kokanisa ete akokola mpe akozala moto ya mayele oyo alukaka ndenge ya kosalisa bamaladi mpe mokolo mosusu akopesa mabɔkɔ na koluka nkisi ya kosilisa maladi ya kansɛr. Elikya na ye ekómaki lisusu makasi ntango bayebisaki ye ete monganga moko oyo ayebi kosalisa malamu motindo ya kansɛr oyo ye azalaki kobɛla, akouta mboka mosusu mpe akoya kosalisa ye. Kasi, ntango mokolo yango ekómaki, monganga yango azwaki lisusu likoki ya koya te, mpo likoló ezalaki malamu te mpo na kosala mobembo. Elikya nyonso oyo Daniel azalaki na yango ekweaki na mai. Mpo na mbala ya liboso, akómaki mawamawa. Akufaki nsima ya mwa mikolo.

      Monganga moko, oyo ayekolaki ndenge oyo elikya mpe kozanga elikya esalaka na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto nde abɛtaki lisolo ya Daniel. Ekoki kozala ete osilá koyoka masolo mosusu ya ndenge wana. Na ndakisa, moto moko akómi mobange mpe akómi pene ya kokufa, kasi azali kozela na mposa makasi likambo moko ya esengo​—ekoki kozala moto oyo ye alingaka nde akoya kotala ye to etikali moke asala anivɛrsɛrɛ ya likambo moko boye. Ntango kaka likambo oyo azalaki kozela esalemi mpe eleki, akoumela te kokufa. Nini epesaka bato yango makasi ya koumela bongo? Elikya ekoki mpenza kopesa moto makasi ndenge bato mosusu bakanisaka yango?

      Minganga mingi oyo bayekolaka likambo yango balobaka ete makanisi ya kolonga, elikya, mpe makanisi mosusu ya malamu ezalaka na ntina mingi na bomoi ya moto mpe na bokolɔngɔnɔ na ye ya nzoto. Kasi, bato mosusu bandimaka mpenza likambo yango te. Bato mosusu oyo bayekolaka likambo yango balobaka ete wana ezali kaka ndenge bato oyo bayebi siansi te bakanisaka. Bango batingamá na likanisi ete maladi nyonso oyo moto abɛlaka eutaka kaka na nzoto, kasi na makanisi te.

      Ya solo, ntembe oyo ete elikya esalaka eloko te na bomoi ya moto ebandi lelo te. Eleki sikoyo bankoto ya bambula, ntango basɛngaki Aristote, moto ya filozofi na Grèce, alimbola liloba elikya, alobaki ete: “Ezali ndɔtɔ oyo moto alɔtaka wana azali kotambola.” Mpe mwa pene na eleko na biso, Benjamin Franklin, oyo azalaki mokonzi moko monene ya Leta na États-Unis, alobaki na ndenge ya kotyola ete: “Ye oyo atyaka motema ete elikya ekoleisa ye akokufa na nzala.”

      Na yango, elikya esalaka mpenza nini na bomoi ya moto? Tokoki nde koloba ete elikya ezalaka ntango nyonso kaka makanisi mpamba ya kozwa eloko moko, mpe ete ezali kaka nzela ya koluka komibɔndisa to ezali se ndɔtɔ mpamba? To, tozali nde na bantina ya solosolo ya kotalela elikya lokola ndɔtɔ te, kasi lokola eloko oyo biso nyonso tosengeli na yango mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo, eloko oyo eutaka na makambo ya solo mpe oyo epesaka bolamu mpenza?

  • Mpo na nini tosengeli na elikya?
    Lamuká!—2004 | Octobre 8
    • Mpo na nini tosengeli na elikya?

      NINI elingaki kokómela Daniel, elenge oyo azalaki na maladi ya kansɛr, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo ya liboso, soki abatelaka kaka elikya oyo azalaki na yango? Maladi na ye ya kansɛr elingaki nde kosila? Alingaki nde kozala na bomoi tii lelo? Ata bato oyo bandimaka mpenza ete elikya ebikisaka, bakoki mbala mosusu kondima te ete ekokaki kosalema bongo. Likambo yango ezali komonisa likanisi oyo ya ntina: tosengeli te kotalela elikya na ndenge ya kolekisa ndelo. Elikya ezali nkisi te mpo na maladi nyonso.

      Ntango batunaki monganga Nathan Cherney mituna na televizyo ya CBS News, alobaki ete kolekisa ndelo na ndenge ya kotalela elikya ntango bozali kosalisa moto oyo azali kobɛla maladi ya makasi ezali likama: “Tomonaki mibali kopesa basi na bango foti ete bazalaki mpenza te kondima ete bakobika, bazalaki mpenza te na elikya makasi.” Monganga Cherney abakisaki boye: “Lolenge wana ya kokanisa nde ebimisá likanisi ya libunga oyo ete moto akoki ye moko kosilisa maladi na ye; mpe soki esili te, bakoloba ete ye moko amilɛmbisaki nzoto; nzokande koloba bongo ezali solo te.”

      Mpo na koloba solo, baoyo bazali kobundana na maladi oyo bakobika na yango te, bazali kobunda etumba moko ya makasi mpenza, oyo esilisaka makasi na bango nyonso. Bandeko mpe baninga na bango basengeli kokeba ete bápesa bango foti te, mpamba te yango ekoya kobakisa kilo na mokumba oyo bazali komema. Kasi, tosengeli nde koloba ete elikya esalaka eloko moko te?

      Ezali mpenza bongo te. Na ndakisa, monganga Cherney ayekolaki ndenge ya kokitisa mpasi ya bato ya maladi, elingi koloba kosalisa moto ya maladi mpo na kosilisa mbala moko maladi na ye te to kosalisa ye atikala lisusu na bomoi ntango molai, kasi nde kokómisa bomoi na ye malamu mpo amiyoka malamu ntango nyonso oyo azali kobundana na maladi. Ye ná minganga mosusu bandimi ete lolenge malamu ya kosalisa moto ya maladi ezali ya kosalisa ye akóma na kimya ya makanisi, ata soki azali kobɛla maladi ya makasi. Ezali na makambo mingi oyo endimisi biso ete elikya esalaka ete moto akóma na kimya ya makanisi​—esalaka mpe makambo mosusu mingi.

      Elikya ezali na motuya mingi

      Monganga Gifford Jones, oyo mpe akomaka masolo na zulunalo moko ya makambo ya monganga, alobi ete: “Elikya ezali nkisi moko ya makasi.” Atalelaki baankɛtɛ mingi oyo esalemaki mpo na koluka koyeba litomba ya kokitisa motema ya moto ya maladi oyo akobika te. Balobaka ete kozala pene na moto ya maladi ndenge wana esalisaka ye azala na elikya mpe atalela makambo na ndenge ya malamu. Ntango bayekolaki likambo yango na 1989, bamonaki ete bato ya maladi oyo bato bazalaka pene na bango baumelaka mingi liboso ya kokufa; nzokande ntango bayekoli lisusu likambo yango na mikolo oyo euti koleka, bamonaki ete ezalaki mpenza bongo te. Atako bongo, baankɛtɛ emonisi ete bato ya maladi oyo bato bazalaka pene na bango banyokwamaka mpenza te na makanisi mpe bayokaka mpasi mingi te lokola basusu.

      Tótalela ankɛtɛ mosusu oyo esalemaki mpo na koyeba soki makanisi ya kolonga mpe makanisi ya kozanga elikya esalaka nini epai ya moto oyo azali na maladi ya misisa ya motema. Balandelaki mibali koleka 1300 mpo na koyeba ndenge oyo mokomoko azalaki kotalela bomoi, soki azalaki kotalela yango na makanisi ya kolonga to ya kozanga elikya. Ntango balandelaki lisusu bango nsima ya mbula zomi, bamonaki ete bato 12 likoló na mokama kati na bango babɛlaki maladi ya misisa ya motema. Kati na baoyo babɛlaki, bato oyo bazalaki na makanisi ya kozanga elikya bazalaki mingi mbala mibale koleka baoyo bazalaki na makanisi ya kolonga. Laura Kubzansky, profesɛrɛ na makambo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpe bizaleli ya bato na École de santé publique na Iniversite ya Harvard, alobi ete: “Bilembeteli emonanaki naino mpenza te mpo na kondimisa bato ete ‘kozala na makanisi ya kolonga’ ezali malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Ankɛtɛ yango emonisi mpo na mbala ya liboso makambo oyo endimisi minganga ete likanisi yango ezali solo mpo na bamaladi ya motema.”

      Na baankɛtɛ mosusu, bamonaki ete bato oyo bakanisaka ete bazali mpenza nzoto makasi te, bazongelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango noki te soki basali bango lipaso, nzokande baoyo bakanisaka ete bazali nzoto makasi bazongelaka bokolɔngɔnɔ na bango ya nzoto nokinoki nsima ya lipaso. Kutu, bamonaki ete bato oyo bazalaka na elikya baumelaka mingi na mokili. Na ankɛtɛ mosusu balukaki koyeba soki mibange babangaka ndenge bazali kokóma mibange to basepelaka na yango. Ntango bazalaki kopesa mbala na mbala nsango moko oyo ezalaki komonisa ete moto oyo akómi mobange akómaka na bwanya mingi mpe ayebaka makambo mingi ya bomoi, mibange yango bakómaki kotambola mwa makasi mpe bazongelaki nzoto makasi. Kutu, makasi oyo bazwaki ezalaki lokola nde basalisaki bango ngalasisi bapɔsɔ 12!

      Mpo na nini makambo lokola elikya, makanisi ya kolonga mpe kozela likambo moko kozanga kobanga ekoki kozala na litomba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto? Ekoki kozala ete bato ya siansi mpe minganga bayebi naino malamumalamu te ndenge oyo nzoto ya moto mpe bɔɔngɔ na ye esalaka mpo bápesa eyano ya sikisiki na motuna yango. Atako bongo, bato ya mayele oyo bayekolaka likambo yango bakoki kopesa makanisi ya mayele. Na ndakisa, profesɛrɛ moko oyo azali monganga ya maladi ya motó alimboli boye: “Ezali malamu kozala na esengo mpe na elikya. Yango ezali ezaleli ya malamu oyo esalaka ete moto amitungisa mingi te, mpe soki moto azali na esengo mpe na elikya, nzoto na ye esalaka malamu mpenza. Wana ezali likambo mosusu oyo moto akoki kosala ye moko mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ.”

      Likanisi wana ekoki kozala ya sika mpo na minganga mosusu, mpo na bato mosusu ya pisikoloji mpe ya siansi, kasi ezali ya sika te mpo na bato oyo bayekolaka Biblia. Esili koleka mbula pene na 3000, Salomo, mokonzi ya mayele, apemamaki na Nzambe mpo na kokóma maloba oyo: “Motema na kosepela ekosalaka malamu lokola nkisi; nde molimo motutami ekokaokisa mikwa.” (Masese 17:22) Vɛrsɛ yango ezali mpenza na bokatikati. Elobi te ete motema ya kosepela ezali nkisi mpo na kobikisa maladi nyonso, kasi elobi bobele ete “ekosala malamu lokola nkisi.”

      Kutu, tokoki komituna boye: Soki elikya ezalaki nkisi, monganga nini alingaki koboya kokomela bato yango? Lisusu, matomba ya elikya esuki kaka te na kobikisa moto ya maladi.

      Makanisi ya kolonga, makanisi ya kozanga elikya mpe bomoi na yo

      Bato oyo bayekolaka likambo yango bamonaki ete bato oyo bazalaka na makanisi ya kolonga bazwaka matomba mingi ndenge bamonisaka elimo yango. Balongaka na kelasi, na mosala, mpe na masano. Na ndakisa, bayekolaki likambo yango na ekipi moko ya bana basi oyo basalaka masano ya mbangu. Balakisi na bango balobelaki makoki ya mosani mokomoko epai ya bato oyo basalaki ankɛtɛ yango. Nzokande, bato oyo basalaki ankɛtɛ balandelaki bana basi yango mpo na koyeba elikya oyo mokomoko azalaki na yango. Na nsuka, bamonaki ete bana basi oyo bazalaki na elikya mingi nde balongaki na momekano, kasi ezalaki te mpo na makoki oyo balakisi na bango balobelaki. Mpo na nini elikya ebongolaka makambo mingi bongo?

      Bayebaki makambo mingi ntango bayekolaki ezaleli oyo ekeseni na elikya​—kozanga elikya. Na bambula ya 1960, makambo oyo bayekolaki epai ya banyama ekamwisaki bato oyo bayekolaki likambo yango mpe etindaki bango na kobimisa elobeli “ezaleli ya kozanga elikya oyo bazwi yango kozwa.” Bamonaki ete bato mpe bakoki kokóma na bizaleli ya ndenge wana. Na ndakisa, batyaki bato mwa mingi na esika moko oyo ezalaki kobimisa makɛlɛlɛ makasi, mpe bayebisaki bango ete bakoki kosilisa makɛlɛlɛ yango soki bafinifini babutɔ ebele oyo ezalaki wana. Nsukansuka, bato yango basilisaki makɛlɛlɛ yango.

      Bayebisaki mpe bato mosusu básala ndenge moko, kasi na mbala oyo, bafinafinaki babutɔ kasi makɛlɛlɛ esilaki te. Ndenge okoki kokanisa yango, bato mingi na etuluku wana ya mibale bakómaki kokanisa ete ata basali nini bakolonga te. Ntango basɛngaki bango básala yango lisusu bambala ya nsima, balingaki komeka ata komeka te. Bakanisaki ete ata soki basali ndenge nini bakosilisa makɛlɛlɛ yango te. Kasi, ata kati na bato ya etuluku yango ya mibale, bato ya makanisi ya kolonga bakangaki mabɔkɔ te mpe bazalaki kaka na elikya.

      Monganga Martin Seligman, oyo azali moko na baoyo babimisaki mayele wana mpo na koyekola likambo yango, asepelaki kolekisa bomoi na ye mobimba na koyekola makanisi ya kolonga mpe makanisi ya kozanga elikya. Ayekolaki malamumalamu makanisi oyo bato bazalaka na yango ete bakokoka makambo te. Na nsuka, alobaki ete makanisi ya kozanga elikya ezongisaka bato mingi nsima na makambo mingi, mpe mbala mosusu epekisaka bango kosala ata eloko moko. Seligman ayebisi na mokuse makanisi ya kozanga elikya mpe eloko nini yango esalaka: “Nsima ya koyekola likambo yango mbula ntuku mibale na mitano, nandimi ete soki tozali na momeseno ya kokanisa lokola bato ya makanisi ya kozanga kolonga, ete soki tolongi te na likambo nyonso ezali foti na biso moko mpe ete yango ekobongwana soki moke te, makambo mingi oyo tozali kosala ekolonga te; ndenge kaka tozali kokanisa yango.”

      Likanisi oyo asukisi na yango ekoki mpe komonana lokola ya sika epai ya bato mosusu lelo oyo; kasi yango ezali ya sika te mpo na baoyo bayekolaka Biblia. Yoká ndenge lisese oyo elobi: “Olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Makasi na yo ekozala moke.” (Masese 24:10, NW) Ɛɛ, Biblia elimboli polele ete kolɛmba nzoto, oyo eutaka na makanisi ya kozanga elikya, ekoki kozangisa yo makasi ya kosala likambo oyo olingaki kosala. Kasi, okoki kosala nini mpo na kobengana makanisi ya kozanga elikya mpe kokóma na makanisi ya kolonga mpe kobakisa elikya na bomoi na yo?

      [Elilingi na lokasa 4]

      Elikya ekoki kosala malamu mingi

  • Okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya
    Lamuká!—2004 | Octobre 8
    • Okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya

      OMIYOKAKA ndenge nini soki likambo moko esalemi te ndenge okanaki? Lelo oyo, bato mingi ya mayele bakanisaka ete eyano na motuna wana nde emonisaka soki ozali moto ya makanisi ya kolonga to ya kozanga elikya. Biso nyonso tokutanaka na mikakatano ndenge na ndenge na bomoi na biso, basusu kutu ya makasi koleka. Kasi, mpo na nini emonanaka ete bato mosusu baumelaka te kozongela makasi mpe kobanda lisusu, nzokande basusu balɛmbisaka mabɔkɔ libela soki kaka bakutani na mikakatano ata ya mikemike?

      Na ndakisa, kanisá ete ozali koluka mosala. Mokonzi moko ya mosala abengi yo mpo na kosolola na yo, kasi na nsuka azwi yo na mosala te. Okomiyoka ndenge nini lokola bazwi yo na mosala te? Okoki kokanisa ete baboi nde yo mpe komona lokola ete okozwa lisusu mosala te, to komilobela ete: ‘Moto moko akosepela na ngai te. Nakozwa lisusu mosala te.’ To, oyo eleki mabe, okoki kotika ete likambo wana ezangisa yo elikya na makambo nyonso ya bomoi na yo, mpe kokanisa ete: ‘Nakoki kosala eloko moko ya malonga te. Moto moko te akomona ete nazali na ntina.’ Ezala ndenge nini, kokanisa bongo nde emonisaka makanisi ya kozanga elikya.

      Ndenge ya kobengana makanisi ya kozanga elikya

      Ndenge nini okoki kobundisa makanisi ya kozanga elikya? Likambo ya liboso mpenza ezali ya koyeba ntango makanisi yango eyeli yo. Likambo ya mibale ezali ya kobundisa makanisi yango. Luká koyeba makambo nini esali ete olonga te. Na ndakisa, ezali mpenza solo ete bazwi yo na mosala te kaka mpo balingi yo te? To ekoki kozala ete mokonzi wana ya mosala azalaki nde koluka moto oyo ayebi mosala mosusu oyo yo oyebi te?

      Ntango okotalela likambo mokomoko, okomona ete makanisi oyo ozali na yango ya kozanga elikya ezali ya koleka ndelo. Soki bazwi yo na mosala te, yango elingi nde koloba ete oyebi eloko te? Ezali te na makambo mosusu ya bomoi na yo​—na ndakisa ndenge ozali kokola na elimo, boyokani na yo ná bandeko na yo ya libota to ná baninga na yo—​oyo ezali kotambola malamu? Yebá ete komikanisela mabe ndenge wana ekokani na koloba ete ata osali ndenge nini okolonga te. Kutu, nini endimisi yo ete okozwa mosala lisusu te? Ezali na makambo mingi oyo okoki kosala mpo na kobengana makanisi ya kozanga elikya.

      Makanisi ya kolonga mpe komityela mikano

      Na bambula oyo euti koleka, bato oyo bayekolaka likambo yango balimbolaki liloba elikya na ndenge ya malamu mpenza, atako ndimbola yango elobeli makambo nyonso te. Balobi ete elikya elimboli kondima ete okolonga kokokisa mikano oyo omityeli. Ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, elikya esuki kaka te na kokokisa mikano oyo omityeli. Kasi ndimbola oyo emonani ete ebongi mpenza mpo na bantina mingi. Soki totaleli elikya na ndenge wana oyo etali bomoi na biso moko, yango ekosalisa biso tókolisa makanisi ya kolonga mikano oyo tomityeli.

      Mpo tóndima ete tokolonga kokokisa mikano oyo tomityeli, tosengeli kobanda naino na komityela mikano mpe kokokisa yango. Soki omoni ete osalá naino bongo te, ekoki kozala malamu okanisa malamumalamu mpo na mikano oyo osengeli komityela. Kasi, mikano nini ozali na yango? Ezali mpasi te ete misala oyo tosalaka mokolo na mokolo na bomoi oyo etondi na yikiyiki mpe na makambo kilikili, ezindisa biso mobimba mpe tózanga ntango ya kofanda mpo na kokanisa nini mpenza tolingi kosala na bomoi na biso, likambo nini mpenza ezali na ntina mingi mpo na biso. Mpo na etinda wana ya koyeba makambo nini esengeli kotya yango na esika ya liboso, tomoni lisusu ete banda kala Biblia esilá kolobela yango: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

      Soki toyebi makambo nini eleki ntina na bomoi na biso, ekozala mpasi te tómityela mikano ya ntina na makambo mingi, na ndakisa na makambo ya elimo, na makambo etali libota na biso, kelasi nini tokotánga to mosala nini tokosala. Kasi, ezali na ntina ete tómityela te mikano ebele na ebandeli mpe tómityela kaka mikano oyo tomoni ete tokolonga kokokisa yango. Soki tomityeli mokano oyo eleki makasi, ekoki kolɛmbisa biso mpe mbala mosusu tokokokisa yango te. Yango wana, mbala mingi ezalaka malamu soki omityeli mokano moko oyo ekosɛnga ntango mingi, okokisa yango ndambo ndambo.

      Lisese moko ya kala, oyo mpe ezali na mwa ndambo ya solo, elobaka ete: “Soki olingi likambo, okosala yango.” Soki toyebi mikano na biso oyo eleki ntina, ekosɛnga tózala na mposa ya kokokisa yango​—kolinga yango mpe kozala na ekateli—​ya kokokisa yango. Tokoki kokóma na ekateli wana makasi soki tozali komanyola likoló na ntina ya mikano yango mpe matomba oyo tokozwa soki tokokisi yango. Ya solo, tokokutana na kwɔkɔsɔ, kasi tosengeli kotalela yango lokola mikakatano oyo tokoki kolonga, na esika ya komona lokola ete ndenge mosusu ya kosala ezali te.

      Nzokande, tosengeli mpe kokanisa nini mpenza tokoki kosala mpo na kokokisa mikano na biso. Mokomi ya babuku Snyder, oyo ayekolaki na mozindo ntina ya kozala na elikya, apesi toli ete na mokano nyonso oyo tomityeli, esengeli kokanisa mayele ndenge na ndenge oyo tokosalela mpo na kokokisa yango. Na nsima, soki tosaleli mayele moko kasi ezali kolonga te, tokoki komeka ya mibale, ya misato, mpe bongo na bongo.

      Snyder apesi mpe toli ete osengeli koyeba ntango nini kotika mokano moko mpe kozwa mosusu. Soki tomoni mpenza ete tokolonga te kokokisa mokano oyo tomityelaki, komitungisa mingi mpo na yango ekoki bobele kolɛmbisa biso nzoto. Nzokande, soki totiki mokano wana mpe tozwi mokano mosusu oyo tokolonga kokokisa yango, tokozala na ntina mosusu ya kozala na elikya.

      Biblia ezali na ndakisa moko oyo ekosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango. Mokonzi Davidi asepelaki mpenza makasi na mokano oyo azalaki na yango ya kotonga tempelo mpo na Nzambe na ye, Yehova. Kasi, Nzambe ayebisaki Davidi ete mwana na ye Salomo nde akotonga yango. Na esika Davidi alɛmba nzoto to asala motó makasi, amityelaki nde mokano mosusu. Asalaki makasi mpo na kobomba mbongo mpe biloko ya mosala oyo mwana na ye akozala na yango mposa mpo na kosala mosala yango.​—1 Mikonzi 8:17-19; 1 Ntango 29:3-7.

      Ata soki tosali makasi mpo na kozala na elikya makasi mpo na bomoi na biso moko, na kobengana makanisi ya kozanga elikya, kokolisa makanisi ya kolonga mpe komityelaka mikano, ekoki kozala ete tokozala kaka na mokakatano makasi mpo na kozala na elikya. Mpo na nini? Pamba te makambo mingi oyo esalaka ete tózanga elikya na mokili oyo eutaka na bantina oyo biso moko tokoki kopekisa yango te. Ntango tozali komona mikakatano oyo ezali konyokola bato​—bobola, bitumba, kozanga bosembo, maladi mpe liwa—​ndenge nini tokoki kaka kobatela elikya na biso?

      [Elilingi na lokasa 7]

      Soki bazwi yo te na mosala oyo olingaki, okanisi ete okozwa lisusu mosala te?

      [Elilingi na lokasa 8]

      Mokonzi Davidi ayebaki kobongola mikano na ye

  • Epai wapi okoki kozwa elikya ya solosolo?
    Lamuká!—2004 | Octobre 8
    • Epai wapi okoki kozwa elikya ya solosolo?

      MONTRE na yo etiki kosala mpe ezali komonana lokola ekufi. Ntango ozali koluka moto ya kobongisa yango, makanisi kilikili eyeli yo na motó. Bazali kosala bapiblisite ebele ya bato oyo babongisaka bamontre, nyonso ezali kokumisa bato yango, oyo alobi boye, oyo kuna alobi ndenge mosusu. Kasi, okosala nini soki oyei koyeba ete moto moko ya mayele afandaka pembeni na bino, ye nde asalá montre wana ya kitoko eleki sikoyo bambula mingi? Longola yango, oyoki ete moto yango akobongisela yo montre yango ofele. Okokakatana lisusu te; ezali bongo te?

      Sikoyo, kokanisá montre ná likoki na yo moko ya kozala na elikya. Soki omoni ete elikya na yo ebandi kosila​—lokola ekómelaka bato mingi na mikolo oyo etondi na yikiyiki—​epai ya nani okoki koluka lisalisi? Ebele ya bato bazali komikumisa ete bakoki kosilisa mokakatano yango, kasi batoli kilikili oyo bazali kopesa ekoki kobungisa yo mpe ezali bongolabongola. Na yango, mpo na nini te kokenda epai na ye oyo banda ebandeli akelá bato na likoki ya kozala na elikya? Biblia elobi ete “azali mosika te na mokomoko na biso” mpe ete azali na mposa makasi ya kosalisa biso.​—Misala 17:27; 1 Petelo 5:7.

      Ndimbola ya mozindo ya liloba elikya

      Ndenge oyo Biblia esalelaka liloba elikya ezali na ndimbola ya mozindo koleka ndenge oyo minganga, bato ya siansi, mpe bato ya mayele ya pisikoloji bazali kosalela yango lelo. Na minɔkɔ ya kala oyo bakomaki na yango Biblia, maloba oyo babongoli na “elikya” elimbolaka kozela na mposa nyonso mpe kozela likambo ya malamu. Na kotalela ndimbola wana, elikya ezali na makambo mibale. Esɛngaka kozala na mposa ya kozwa eloko moko ya malamu mpe kozala na ntina oyo ezali kondimisa ete tokozwa eloko yango. Elikya oyo Biblia epesi ezali kaka mposa mpamba te oyo ezali na makanisi ya moto. Elikya yango etongami likoló ya makambo mpe bilembeteli ya solosolo.

      Na likambo yango, elikya ezali ndeko ya kondima, oyo esengeli kotongama likoló ya makambo ya solo​—kasi likoló ya makanisi mpamba te. (Baebele 11:1) Kasi, Biblia ekesenisi kondima ná elikya.​—1 Bakolinti 13:13.

      Tópesa ndakisa: Ntango osɛngi moninga moko ya motema eloko to likambo moko, okoki kozala na elikya ete akosalisa yo. Elikya na yo etongami likoló ya likambo ya solo, mpamba te ozali kotyela moninga na yo motema​—oyebi ye malamu, mpe asilá kosalela yo makambo na boboto mpe kokabela yo. Kondima na yo mpe elikya ekei nzela moko; kutu mokomoko ezali na mposa ya mosusu; kasi ezali biloko mibale ekeseni. Ndenge nini okoki kozala na elikya ya ndenge wana epai ya Nzambe?

      Elikya etongami likoló ya nini?

      Nzambe azali liziba ya elikya ya solosolo. Na ntango ya kala, Yehova abengamaki “elikya na Yisalaele.” (Yilimia 14:8) Elikya nyonso ya solosolo oyo basaleli na ye bazalaki na yango ezalaki kouta epai na ye; ezali na lolenge wana nde azalaki elikya na bango. Elikya yango esukaki kaka te na kolinga ete asalela bango likambo moko. Nzambe asalelaki bango makambo oyo ezalaki kotinda mpenza bango bázala na elikya. Na boumeli ya bankama ya bambula oyo azalaki elongo na bango, ayebanaki lokola moto oyo akokisaka bilaka na ye nyonso. Mokambi na bango Yosua alobaki na Yisalaele ete: “Bino boyebi . . . ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”​—Yosua 23:14.

      Bankóto ya bambula na nsima, ayebani kaka bongo. Biblia etondi na makambo ya kokamwa oyo Nzambe alakaki mpe na masolo ya solo ya makambo ya kala oyo emonisi ndenge akokisaki makambo yango. Makambo oyo ye alaki ebongi mpenza kotyelama motema, yango wana mbala mosusu balobelaka yango lokola nde esilá kosalema na ntango oyo ye alakaki yango.

      Ezali mpo na yango nde tokoki kobenga Biblia buku ya elikya. Soki ozali koyekola masolo oyo elobelaka makambo oyo Nzambe asalelá bato, okomona ete okozala na bantina ya kotya elikya epai na ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.”​—Baloma 15:4.

      Elikya nini Nzambe apesi biso?

      Ntango nini mpenza tozalaka na mposa makasi ya elikya? Ezali te na ntango ya liwa? Kasi mpo na bato mingi, ezali na ntango wana​—na ndakisa ntango ndeko to moninga oyo tolingaka akufi—​nde emonanaka lokola ete elikya nyonso esili. Kutu, eloko nini mosusu ekoki kosilisa bato elikya lokola liwa? Liwa ezali kolanda mokomoko na biso tii ekozwa ye. Tokoki kokima yango kaka mpo na mwa ntango, kasi tokoki te kopekisa yango. Biblia elobi mpenza solo ndenge ebengi liwa “monguna ya nsuka.”​—1 Bakolinti 15:26.

      Kasi, ndenge nini tokoki kozwa elikya na ntango ya liwa? Vɛrsɛ ya Biblia oyo ebengi liwa monguna ya nsuka elobi mpe ete monguna yango “akobebisama nyɛɛ.” Yehova Nzambe aleki liwa na makasi. Amonisaki yango mbala mingi. Ndenge nini? Na ndenge asekwisaki bato oyo bakufaki. Biblia elobeli mbala libwa oyo Nzambe asalelaki nguya na ye mpo na kozongisa na bomoi bato oyo basilaki kokufa.

      Ndakisa moko oyo eyebani mingi ezalaki na mokolo oyo Yehova apesaki Mwana na ye Yesu nguya mpo na kosekwisa Lazare, moninga na ye ya motema, oyo akufaki esilaki koleka mikolo minei. Yesu asalaki yango, na kobombana te, kasi na miso ya bato nyonso, ebele ya bato oyo bayaki kotala.​—Yoane 11:38-48, 53; 12:9, 10.

      Mbala mosusu okoki komituna, ‘Mpo na nini bato yango basekwisamaki? Na nsima, bakómaki mibange te mpe nsukansuka bakufaki lisusu te?’ Bakómaki mibange mpe bakufaki lisusu. Kasi, masolo oyo elobeli lisekwa ezali masolo ya kotyela motema, lokola lisolo ya Lazare, ezali te kaka kobakisa lisusu mposa na biso ya komona bandeko to baninga na biso oyo bakufá kozonga lisusu na bomoi; tozali na bantina ya kondima ete bakosekwa. Na maloba mosusu, tozali na elikya ya solosolo.

      Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.” (Yoane 11:25) Ezali ye nde Yehova akopesa nguya ya kosekwisa bato na mokili mobimba. Yesu alobaki ete: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na [Klisto] mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Ɛɛ, baoyo nyonso balali na kati ya malita bazali na likoki ya kosekwa mpo na kozala na bomoi na paladiso awa na mabelé.

      Mosakoli Yisaya asaleli maloba oyo ya kitoko mpe ya kosimba mitema mpo na kolobela lisekwa: “Bato na yo oyo bakufá bakosekwa, bibembe ya bandeko na ngai ekozonga na bomoi. Bato oyo balalá na mabelé bakolamuka, pe bakoyemba na esengo. Yawe, okotinda londende ndenge ezalaka na tongo, pe mabelé ekobimisa bato oyo bakufá.”​—Yisaya 26:19, Bible na lingala ya lelo oyo.

      Yango ezali kobɔndisa biso te? Bato oyo bakufá balali na kimya mpenza na esika moko ya libateli ya ndenge oyo okoki kokanisa te, ndenge mwana abatelamaka kati ya libumu ya mama na ye. Ya solo, baoyo balali na kati ya malita babatelami malamumalamu na makanisi ya Nzambe Mozwi-na-nguya-nyonso oyo abosanaka likambo te. (Luka 20:37, 38) Mpe etikali moke, bakozongisama na bomoi mpo na kokɔta na mokili moko ya esengo, oyo ekoyamba bango ndenge libota eyambaka mwana oyo abotami sika oyo bazelaki na motema mobimba! Na yango, elikya ezali ata na ntango ya liwa.

      Elikya ekoki kosala yo nini?

      Paulo ateyi biso makambo mingi mpo na komonisa ete elikya ezali na motuya mingi. Alobeli elikya lokola eloko moko ya ntina mingi ya molato ya etumba ya elimo: ekɔti. (1 Batesaloniki 5:8) Alingaki mpenza koloba nini? Na ntango ya kala, soda azalaki kolata ekɔti ya ebende ntango akei etumba, mbala mingi ezalaki na elamba to na mposo ya nyama na kati. Lokola alati ekɔti, mbanzi nyonso oyo ekokwela ye na motó ekotuta ekɔti mpe ekokwea, na esika ezokisa ye. Liteya nini Paulo alingaki kobimisa wana? Ndenge ekɔti ebatelaka motó, ndenge moko mpe elikya ebatelaka makanisi, makoki ya kokanisa. Soki ozali na elikya makasi oyo eyokani na mikano ya Nzambe, ntango okutani na mikakatano, okobungisa te kimya na yo ya makanisi mpe okozanga elikya te. Nani kati na biso asengeli te na ekɔti ya ndenge wana?

      Paulo asalelaki ndakisa mosusu ya kosimba motema mpo na kolobela elikya oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Akomaki boye: “Elikya yango ezali epai na biso lokola longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi.” (Baebele 6:19) Lokola Paulo abikaki na makama mingi ya masuwa, ayebaki malamu ete longo ezalaka na ntina mingi. Ntango mopɛpɛ ya makasi ekómi komema masuwa epai na epai, basali ya masuwa bazalaki kobwaka longo na mai. Soki longo ekei kokangama makasi na zelo, masuwa ezalaki lisusu na likama mpenza te ete mopɛpɛ emema yango na bokula mpe ekende kotutana na mabanga.

      Ndenge moko mpe, soki elikya na biso na bilaka ya Nzambe ezali “makasi mpe ngwi,” yango ekoki kosalisa biso tótɛngatɛnga te na mopɛpɛ makasi ya ntango na biso oyo etondi na yikiyiki. Yehova alaki ete etikali moke, na mikolo ezali koya, bato bakonyokwama lisusu te na bitumba, mobulu, mpasi, to ata mpe na liwa. (Talá etanda na lokasa 10.) Soki tokangami makasi na elikya wana, yango ekosalisa biso tózala mosika na likama mpe tózwa makasi oyo tosengeli na yango mpo na kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko ya Nzambe, na esika ya kolanda elimo ya mobulu mpe ya mbindo oyo etondi na mokili ya lelo.

      Elikya oyo Yehova azali kopesa etaleli mpe yo moko mpenza. Alingi ete ozala na bomoi ndenge ye alingaka bomoi ezala. Mposa na ye ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika.” Ndenge nini? Liboso mpenza, moto mokomoko asengeli ‘kokóma na boyebi ya sikisiki ya solo.’ (1 Timote 2:4) Bato oyo babimisaka zulunalo oyo balendisi yo oluka kozwa boyebi yango ya solo ya Liloba ya Nzambe, boyebi oyo epesaka bomoi. Elikya oyo Nzambe akopesa yo na nzela ya boyebi yango eleki mosika elikya nyonso oyo mokili oyo ekoki kopesa yo.

      Soki ozali na elikya wana, okoki soki moke te koyoka lokola ozangi lisalisi, mpamba te Nzambe akoki kopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na kokokisa mikano nyonso oyo okoki komityela, oyo eyokani na mokano na ye. (2 Bakolinti 4:7; Bafilipi 4:13) Omoni te ete yango nde elikya oyo osengeli na yango? Na yango, soki olingi kokóma na elikya, soki olukaka yango banda kala, kolɛmba te. Elikya ezali mosika te. Okoki kozwa yango!

      [Etanda/Elilingi na lokasa 10]

      Ntina ya kozala na elikya

      Makanisi oyo euti na Makomami ekoki kosalisa yo okóma na elikya makasi:

      ◼ Nzambe alaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.

      Liloba na ye elobi ete mabelé mobimba ekokóma paladiso epai bato bakofanda na esengo mpe bakokóma bango nyonso na bomoko.​—Nzembo 37:11, 29; Yisaya 25:8; Emoniseli 21:3, 4.

      ◼ Nzambe akoki kobuka lokuta te.

      Ayini lokuta ya lolenge nyonso. Yehova aleki mpenza na bosantu to bopɛto, yango wana akoki kobuka lokuta te.​—Masese 6:16-19; Yisaya 6:2, 3; Tito 1:2; Baebele 6:18.

      ◼ Nzambe azali na nguya ezangi nsuka.

      Kaka Yehova nde azali mozwi-ya-nguya-nyonso. Eloko moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba ekoki kopekisa ye akokisa makambo oyo alaki.​—Exode 15:11; Yisaya 40:25, 26.

      ◼ Nzambe alingi ete ozala na bomoi ya seko.

      ​—Yoane 3:16; 1 Timote 2:3, 4.

      ◼ Nzambe azalaka na elikya ete tokosala malamu.

      Atyaka miso na ye na mabunga mpe bolɛmbu na biso te, kasi na bizaleli na biso ya malamu mpe na milende oyo tosalaka. (Nzembo 103:12-14; 130:3; Baebele 6:10) Azalaka na elikya ete mokolo mosusu, tokosala oyo ezali malamu mpe asepelaka ntango tosali yango.​—Masese 27:11.

      ◼ Nzambe alaki ete akosalisa yo okokisa makambo oyo eyokani na mokano na ye.

      Basaleli na ye basengeli soki moke te komiyoka lokola bazangi lisalisi. Nzambe aboyaka te kopesa elimo santu na ye, nguya oyo eleki makasi, mpo esalisa biso.​—Bafilipi 4:13.

      ◼ Kotyela Nzambe elikya ezali komikosa te.

      Azali moto oyo osengeli kotyela motema mobimba mpe akoyokisa yo nsɔni soki moke te.​—Nzembo 25:3.

      [Elilingi na lokasa 12]

      Ndenge ekɔti ebatelaka motó, elikya ebatelaka makanisi

      [Elilingi na lokasa 12]

      Elikya oyo epikami makasi lokola longo ekoki kobatela yo otɛngatɛnga te

      [Eutelo ya bafɔtɔ]

      Na ndingisa ya René Seindal/Su concessione del Museo Archeologico Regionale A. Salinas di Palermo

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto