-
Mpo na nini tosengeli kotánga Biblia?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2017 | No. 1
-
-
LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOZWA MATOMBA NA BOTÁNGI YA BIBLIA
Mpo na nini tosengeli kotánga Biblia?
“Nakanisaki ete ekozala mpasi mpenza koyeba mateya ya Biblia.”—Jovy
“Namonaki lokola ekolɛmbisa ngai.”—Queennie
“Komona kaka ndenge Biblia ezalaka monene, esilisaki ngai mposa ya kotánga yango.”—Ezekiel
Ekómelá yo naino te oyoka mposa ya kotánga Biblia kasi otiki mpo ozali na makanisi ndenge moko na bato oyo tolobeli awa likoló? Bato mingi babangaka kotánga Biblia. Kasi okosala nini soki bayebisi yo ete Biblia ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo? Bongo soki oyebi ete ezali na mayele oyo okoki kosalela mpo osepela lisusu mingi kotánga Biblia? Okosepela koyeba matomba Biblia ekoki komemela yo?
Tótalela naino maloba ya bato oyo bamonaki ete Biblia epesaka matomba ntango bakómaki kotánga yango.
Ezekiel oyo azali na mbula mwa moke koleka 20, alobi: “Liboso, nazalaki lokola moto oyo azali kokumba motuka kasi ayebi te esika azali kokende. Kasi kotánga Biblia esalisá ngai nazala na bomoi ya malamu. Ezali na batoli ya ntina oyo nakoki kosalela mokolo na mokolo.”
Frieda oyo azali mpe na mbula mwa moke koleka 20, alobi: “Nazalaki kosilika mingi. Kasi kotánga Biblia esalisaki ngai nayeba komipekisa. Yango esalaki ete nayokanaka na basusu mpe sikoyo nakóma na baninga ebele.”
Eunice, mwasi moko oyo azali na mbula mwa moke koleka 50, alobi boye mpo na Biblia: “Esalisaka ngai nakóma moto malamu, natika bizaleli na ngai ya mabe.”
Ndenge bato yango mpe bamilio mosusu ya bato bamoni, kotánga Biblia ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu. (Yisaya 48:17, 18) Biblia ekoki mpe kosalisa yo (1) ozwa bikateli ya malamu, (2) ozwa baninga ya solosolo, (3) olonga mitungisi mpe oyo eleki ntina (4) oyeba solo na ntina etali Nzambe. Batoli ya Biblia eutá na Nzambe, soki olandi yango okobunga nzela te. Nzambe apesaka batoli ya mabe te.
Likambo ya ntina ezali nde kobanda naino kotánga. Makambo nini ekoki kosalisa yo mpo ozala na mokakatano te ya kobanda mpe osepela na botángi yango?
-
-
Nakobanda ndenge nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2017 | No. 1
-
-
LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOZWA MATOMBA NA BOTÁNGI YA BIBLIA
Nakobanda ndenge nini?
Nini ekoki kosalisa yo osepela na botángi ya Biblia mpe ozwela yango matomba? Talá makambo mitano oyo esalisaki bato mingi.
Koluka esika ya malamu. Luká esika oyo makelele ezali te. Salá ete makambo mosusu oyo ekoki kolongola likebi na botángi na yo ezala mpenza te. Pole mpe mopɛpɛ ya malamu na esika oyo ozali kotánga ekoki kosalisa yo ozwela botángi na yo litomba.
Kobongisa makanisi. Lokola Biblia eutá epai ya Tata na biso ya likoló, okozwela yango matomba soki omekoli ezaleli oyo bana mike bazalaka na yango ya koyekola epai ya baboti na bango. Soki ozalaka na makanisi mabe mpo na Biblia, longolá yango mpo Nzambe ateya yo.—Nzembo 25:4.
Kobondela liboso ya kotánga. Biblia ezali na makanisi ya Nzambe, yango wana tokoki kokamwa te soki esɛngi asalisa biso mpo tóyeba Biblia malamu. Nzambe alaki ‘kopesa elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’ (Luka 11:13) Elimo santu ekoki kosalisa yo oyeba makanisi ya Nzambe. Nsima ya mikolo, ekofungola makanisi na yo mpo okanga ntina “ata na makambo mozindo ya Nzambe.”—1 Bakorinti 2:10.
Kotánga na ndenge oyo okokanga ntina. Kotánga kaka te mpo osilisa noki. Kanisá mpenza na makambo oyo ozali kotánga. Omituna boye: ‘Bizaleli nini ya malamu namoni epai ya moto oyo natángi lisolo na ye? Ndenge nini nakoki komonisa yango na bomoi na ngai?’
Komityela mikano ya sikisiki. Mpo ozwa matomba na makambo oyo ozali kotánga, luká koyekola likambo moko oyo ekosalisa yo mpenza na bomoi. Okoki komityela mikano oyo elandi: ‘Nalingi koyeba makambo mingi etali kaka Nzambe.’ ‘Nalingi kokóma moto malamu; mobali to mwasi malamu.’ Na nsima, poná mikanda ya Biblia oyo ekosalisa yo okokisa mikano yango.a
Makambo mitano oyo ekoki kosalisa yo obanda kotánga Biblia. Kasi ndenge nini okoki kosala mpo botángi yango esepelisa yo mingi lisusu? Lisolo oyo elandi epesi mwa makanisi.
a Soki oyebi mpenza te mikanda nini ya Biblia ekosalisa yo okokisa mikano yango, Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa yo.
-
-
Nini ekosala ete osepela na botángi yango?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2017 | No. 1
-
-
LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOZWA MATOMBA NA BOTÁNGI YA BIBLIA
Nini ekosala ete osepela na botángi yango?
Kotánga Biblia esepelisaka yo to elɛmbisaka nde yo? Yango etaleli ndenge osalaka ntango ozali kotánga. Tótala naino makambo oyo okoki kosala mpo osepela lisusu mingi na botángi yango.
Poná libongoli ya Biblia oyo ebongi. Soki ozali kotánga buku oyo ezali na maloba mingi oyo oyebi te mpe oyo bato basalelaka lisusu te, ekozala mpasi osepela na botángi yango. Yango wana, luká Biblia oyo ezali na maloba ya pɛtɛɛ oyo ekosimba motema na yo. Ata bongo, esengeli kozala Biblia oyo ebongolami malamu mpe balongolá to babakisá makambo te.a
Salelá baaparɛyi ya mikolo oyo. Lelo oyo okoki kozala na Biblia ata na baaparɛyi. Okoki kotánga Babiblia mosusu na Internet to kotya yango na ordinatɛrɛ, na tablɛti to na telefone. Babiblia mosusu ezalaka na mwa makambo oyo ekoki kotinda yo mbala moko na bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli kaka likambo wana ata mpe kokokanisa yango na Babiblia mosusu. Soki osepeli nde oyoka botángi ya Biblia, yango mpe ezali. Bato mingi basepelaka koyoka botángi yango ntango bazali na kati ya bisi, bazali kosokola bilamba to bazali kosala mosala moko boye oyo ezali kopesa bango nzela ya koyoka. Mpo na nini te kosalela mayele oyo ekosimba mpo na yo?
Salelá mikanda oyo esalisaka mpo na koyekola Biblia. Mikanda yango ekoki kosalisa yo oyeba makambo mingi na botángi na yo. Ezali na bakarte ya mikili oyo Biblia elobeli mpe ekosalisa yo oyeba soki bisika yango ezalaki wapi mpe oyeba esika oyo likambo yango esalemaki. Masolo lokola oyo ezali na zulunalo oyo to oyo ezalaka na esika bakomi “Mateya ya Biblia” na site Internet jw.org, ekoki kosalisa yo oyeba ndimbola ya makambo mingi oyo ezali na Biblia.
Salelá mayele ndenge na ndenge. Soki kotánga Biblia banda ebandeli tii nsuka ebangisaka yo, mpo na nini te obanda na eteni oyo esepelisaka yo mingi mpo epesa yo mposa ya kotánga? Soki olingi oyeba makambo etali bato oyo Biblia elobeli, okoki kopona kotánga masolo ya mokomoko na bango. Ndenge ya kosala yango ezali na etanda oyo elobi “Kɔtá na mozindo ya Biblia mpo oyeba bato oyo elobeli.” To okoki mpe kotánga Biblia na kolanda ndenge masolo elandani to ndenge makambo esalemaki. Mpo na nini te omeka moko?
a Bato mingi bamoni ete Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ekokisi masɛngami wana mpe ezali pɛtɛɛ na kotánga. Batatoli ya Yehova nde babimisá Biblia yango mpe ezali sikoyo na minɔkɔ koleka 130. Okoki kozwa yango na site Internet na biso jw.org to na programɛ JW Library. To soki olingi, Motatoli ya Yehova moko akoki komemela yo Biblia na ndako.
-
-
Ndenge nini Biblia ekoki kobongisa bomoi na ngai?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2017 | No. 1
-
-
LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOZWA MATOMBA NA BOTÁNGI YA BIBLIA
Ndenge nini Biblia ekoki kobongisa bomoi na ngai?
Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso. Ezali na batoli oyo euti epai ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Nsango na yango ekoki kobongola bomoi na biso mpenza. Kutu Biblia elobi: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebre 4:12) Ezali na nguya ya kobongisa bomoi na biso na makambo mibale—esalisaka biso tóyeba ndenge ya kotambwisa bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe tóyeba Nzambe ná bilaka na ye.—1 Timote 4:8; Yakobo 4:8.
Ekoki kobongisa bomoi na yo sikoyo. Biblia ekoki kosalisa yo na makambo nyonso ya bomoi na yo. Epesaka batoli oyo ebongi na makambo oyo elandi
Kofanda malamu na bato.—Baefese 4:31, 32; 5:22, 25, 28, 33.
Kozala na nzoto mpe makanisi malamu.—Nzembo 37:8; Masese 17:22.
Kozala na bizaleli malamu.—1 Bakorinti 6:9, 10.
Ndenge ya kobikela.—Masese 10:4; 28:19; Baefese 4:28.a
Na Asie, Vicent ná Annalou oyo babalanaki sika basepelaki mpenza na batoli ya Biblia. Ndenge kaka ezalaka na mabala ya sika, mokomoko azalaki na mokakatano ya komesana na bizaleli ya moninga mpe kosolola makambo polele. Kasi bakómaki kosalela batoli ya Biblia oyo bazalaki kotánga. Matomba nini bazwaki? Mobali alobi boye: “Makambo oyo natángaki na Biblia esalisaki ngai nayeba ndenge malamu ya kosala na mikakatano ya libala na biso. Kosalela batoli ya Biblia esalisi biso tózala na bomoi ya esengo.” Mwasi na ye andimi yango; alobi boye: “Kotánga bandakisa oyo Biblia elobeli esalisaki biso. Sikoyo nasepelaka mpenza na libala na biso mpe na mikano oyo tozali na yango.”
Ekoki kosalisa yo oyeba Nzambe. Longola makambo etali libala, Vicent alobi lisusu boye: “Kotánga Biblia esalisi ngai nalinga lisusu Yehova mingi.” Vicent amoni ete likambo eleki ntina, Biblia ekoki kosalisa yo oyeba Nzambe malamu. Soki otángaka yango, batoli na yango ekosalisa yo mpe okokóma moninga ya Nzambe. Okomona ete Nzambe alobeli makambo ya mikemike etali avenire ya malamu, ntango oyo okozala na “bomoi ya solosolo,” oyo ezangi nsuka. (1 Timote 6:19) Ezali na buku mosusu te oyo ekoki kopesa yo elaka ya ndenge wana.
Soki obandi kotánga Biblia mpe okobi kosala bongo, yo mpe okoki kozwa bolamu yango—okobongisa bomoi na yo sikoyo mpe okoyeba Nzambe. Kasi, ntango ozali kotánga Biblia mituna ebele ekoki koyela yo na makanisi. Soki mituna eyeli yo, kobosana te ndakisa ya moto monene moko ya Etiopi oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo mbula 2000. Azalaki na mituna mingi etali Biblia. Ntango batunaki ye soki azali koyeba makambo azali kotánga, alobaki boye: “Kutu, ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?”b Na nsima, andimaki ete Filipi, moyekoli moko ya Yesu oyo ayebaki koteya makambo ya Biblia malamu asalisa ye. (Misala 8:30, 31, 34) Yo mpe soki olingi koyeba makambo mingi ya Biblia, tosɛngi yo okomela biso na site Internet www.pr418.com to na moko ya baadrɛsi oyo ezali na zulunalo oyo. Okoki mpe koluka Motatoli moko ya Yehova to kokende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika ofandi. Mpo na nini te obanda kotánga Biblia kaka lelo mpe otika batoli na yango etambwisa yo mpo ozwa bomoi oyo eleki malamu?
Soki ozali komituna soki ebongi kotyela Biblia motema, tosɛngi yo otala video ya mokuse oyo elobi Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo? Okoki komona yango soki okɔti na site Internet jw.org, finá esika bakomi Recherche mpe komá titre ya video yango.
a Mpo na komona batoli ya Biblia na makambo mosusu, kɔtá na site Internet jw.org. Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.
b Talá mpe lisolo “Ezali kaka komikosa mpamba?” na zulunalo oyo.
-