Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 4
  • Nzambe ya solo azali nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe ya solo azali nani?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Nkombo ya Nzambe—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 4
Liteya 04. Likoló oyo etondi na minzoto mpe na bagalaksi.

LITEYA 04

Nzambe ya solo azali nani?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Banda kala, bato basambelaka banzambe mingi, ata mpe banzambe-basi. Kasi, Biblia elobi ete ezali na Nzambe moko oyo “azali monene koleka banzambe mosusu nyonso.” (2 Ntango 2:5) Nzambe yango nde nani? Mpo na nini azali monene koleka banzambe mosusu nyonso oyo bato basambelaka? Na lisolo oyo, okoyeba makambo oyo Nzambe ya solo alingi oyeba mpo na ye.

1. Nkombo ya Nzambe nani, mpe nini emonisi ete alingi tóyeba yango?

Nzambe ayebisi biso nkombo na ye na Biblia. Alobi: “Nazali Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Tángá Yisaya 42:5, 8.) Nkombo “Yehova” euti na liloba ya Ebre oyo ekoki kolimbola “Akómisaka.” Yehova alingi ete tóyeba nkombo na ye. (Kobima 3:15) Ndenge nini toyebi yango? Biblia etángi nkombo yango mbala koleka 7000!a Yehova ezali nkombo ya Nzambe kaka moko ya solo “na likoló mpe awa na mabele.”​—Kolimbola Mibeko 4:39.

2. Biblia elobi nini mpo na Yehova?

Biblia elobi ete na banzambe nyonso oyo bato basambelaka, Yehova nde azali Nzambe ya solo. Mpo na nini? Mpo na bantina mingi. Yehova azali na bokonzi likoló ya nyonso, mpe kaka ye nde azali “Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” (Tángá Nzembo 83:18.) Biblia elobi ete azali “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpo azali na nguya ya kosala nyonso oyo alingi. Azalisá ‘biloko nyonso’, ezala na likoló mpe awa na mabele. (Emoniseli 4:8, 11) Yehova akeseni na bato nyonso, mpo ye azalaki, azali mpe akozala libela na libela.​—Nzembo 90:2.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba bokeseni oyo ezali kati na batitre ya Nzambe mpe nkombo na ye. Luká koyeba mpe ndenge oyo Nzambe alakisi yo nkombo na ye mpe mpo na nini asali yango.

Mobali moko azali kotala likoló na butu. Nkombo Yehova na likoló.

3. Nzambe azali na batitre mingi, kasi kaka na nkombo moko

Mpo na koyeba bokeseni oyo ezali kati na titre ya moto mpe nkombo na ye, talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Nzambe azali na batitre mingi, kasi kaka na nkombo moko (0:41)

  • Bokeseni nini ezali kati na titre lokola “Nkolo,” mpe nkombo?

Biblia elobi ete bato basambelaka banzambe mpe bankolo mingi. Tángá Nzembo 136:1-3, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nani nde “Nzambe ya banzambe” mpe “Nkolo ya bankolo”?

4. Yehova alingi oyeba nkombo na ye mpe obenga ye na nkombo yango

Ndenge nini oyebi ete Yehova alingi obenga ye na nkombo na ye? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Nzambe azali na nkombo?​—Video ya mokuse (3:11)

Elilingi ya video ‘Nzambe azali na nkombo?​—Video ya mokuse .’ Mobali moko azali kotánga Nzembo 83:18 na libongoli ya ‘King James Version’ ya 1611 na esika bakomi nkombo ya Nzambe Yehova.
  • Okanisi nini: Yehova alingi ete nkombo na ye eyebana? Mpo na nini?

Yehova alingi ete bato bábengaka ye na nkombo na ye. Tángá Baroma 10:13, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini ezali na ntina kobenga Nzambe na nkombo na ye, Yehova?

  • Oyokaka ndenge nini soki moto moko abengi yo na nkombo na yo?

  • Okanisi nini: Yehova akoyoka ndenge nini soki obengi ye na nkombo na ye?

5. Yehova alingi ete okóma moninga na ye

Mwasi moko na nkombo Soten oyo autá na Cambodge alobaki ete koyeba nkombo ya Nzambe epesaki ye “esengo oyo ayoká naino te.” Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Nazalaki koluka Nzambe ya solo (8:18)

Bililingi: Bililingi ya video ‘Nazalaki koluka Nzambe ya solo.’ 1. Soten afandi na nse ya nzete na zamba, azali kotala na likoló mpe kobondela Nzambe ya solo. 2. Herold azali koyebisa Soten ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova.
  • Na video yango, Soten asalaki nini ntango ayebaki nkombo ya Nzambe?

Mpo na kokóma moninga ya moto moko, olukaka liboso koyeba nkombo na ye. Tángá Yakobo 4:8a, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yehova asɛngi yo osala nini?

  • Ndenge nini koyeba nkombo ya Nzambe mpe kobenga ye na nkombo yango ekoki kosalisa yo okóma moninga na ye?

BATO MOSUSU BALOBAKA: “Nzambe azali na bankombo ebele.”

  • Ondimi ete Yehova ezali mpenza nkombo ya Nzambe?

  • Ndenge nini okoki kosalisa moto ayeba ete Nzambe alingi tóbengaka ye na nkombo na ye?

NA MOKUSE

Yehova ezali nkombo ya Nzambe kaka moko ya solo. Alingi ete tóyeba yango mpe tóbengaka ye na nkombo yango mpo tókóma baninga na ye.

Bozongeli

  • Mpo na nini Yehova akeseni na banzambe mosusu nyonso oyo bato basambelaka?

  • Mpo na nini tosengeli kobenga Nzambe na nkombo na ye?

  • Nini emonisi ete Yehova alingi okóma moninga na ye?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá makambo mitano oyo emonisi mpenza ete Nzambe azali.

“Nzambe azali?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá ntina oyo ebongi kondima ete Nzambe azali.

“Nani asalá Nzambe?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2014)

Talá ntina oyo tosengeli kobenga Nzambe na nkombo na ye, ata soki toyebi malamu te ndenge ezalaki kobengama na ebandeli.

“Yehova azali nani?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Ezali na ntina tóbenga mpenza Nzambe na nkombo na ye? Talá ntina oyo tokoki koloba ete Nzambe azali kaka na nkombo moko.

“Nzambe azalaka na bankombo boni?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

a Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndimbola ya nkombo ya Nzambe mpe ntina oyo na Babiblia mosusu balongolá nkombo yango, talá Apɛndisi A4 ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto