Liteya 7
Bolamu bozali kozwama na boyekoli
1. Boyekoli ezali kobongisa biso na nini?
1 Olingi kokola kati na kondima na yo? Olingi ete bolingo na yo mpo na Nzambe eya mozindo koleka? Olingi ete bososoli na yo epela koleka? Olingi kobota mbuma mingi kati na mosala na yo ya kosakola? Kokola na makambo oyo nyonso etali mingimingi boyekoli na biso moko mpe boyekoli ya libota. Boyekoli ezali eteni ya ntina kati na bomoi ya moklisto. Ezali kobongisa biso mpo na kosalela Nzambe sikawa mpe mpo na kozala na bomoi kati na mokili ya sika elakami na Nzambe. Oyekolaka lokola esengeli?—Mat. 4:4.
2, 3. Ndenge nini tokoki kozwa ntango ya koyekola?
2 Ndenge nini tokoki kozwa ntango ya koyekola? Ezalaka mwa matata, kasi nzela ezali mpo na yango. Soki omoni ete programme na yo ya boyekoli ezali kosimba te, fanda mpe talela malamu ndenge ozali kosalela ntango na yo poso na poso. Ya solo, ntango oyo ezangi mosala ezali mpenza mingi te, kasi Biblia elobi na biso ete ‘tosomba ntango’ oyo tozali kolekisa yango na misala misusu. (Baef. 5:15-17) Soki ozali na televizió, meka naino kokoma ngonga oyo olekisaka poso nyonso mpo na kotala yango. Mbala mosusu okokamwa na yango. Ntango boni olekisaka na masolo ya bongo na bongo elongo na baninga to na bato ya pembeni? Otangaka bazulunalo mingi ya mokili? Na ngonga nyonso epesami na makambo oyo, okoki kokamata ata moko ata mibale to misato mpo na boyekoli te? Boyekoli nde ekoki kopesa yo bolamu ya seko. Tokoki koyekola na moi, na mpokwa to na ntango mosusu oyo ebongi malamu. Mpo na makambo nyonso oyo toyebi ete ezali makambo ya ntina, tozwaka ntango ya kosala yango; nzokande, ntembe ezali te ete boyekoli ya Liloba na Nzambe ezali moko na “makambo maleki ntina” na miso na ye oyo azali koluka kobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah.—Bafil. 1:9-11; Mas. 2:1-5.
3 Na ebandeli, okomona ete ezali mpasi mpo na kofanda mpe kotya makanisi nyonso bobele na likambo oyo ozali koyekola; nzokande, nsima na mikolo okomesena mpe ekokoma elengi. Nzokande esengeli na yo kondima ntina ya boyekoli, kopesa yango ntango poso na poso mpe kotya milende misengeli.
4, 5. Boyekoli ezali kosenga nini, mpe mpo na nini ebongi kosambela liboso ya koyekola?
4 Ntina ya boyekoli ezali ete osimba makanisi mpe okoka kolimbola yango polele. Ya solo, kotanga mpamba esengeli kozala na esika kati na bomoi na biso, kasi ezali boyekoli te. Boyekoli ezali kosenga kolukaluka makambo na mikanda, kokanisa mpe kotalela ndenge ya kosalela makambo oyekoli. Koluka te ete osilisa nkasa mingi na mbala moko, soki te boyekoli na yo ekozala likolólikoló mpe na litomba te. Kamata ntango nyonso esengeli mpo na kolukaluka ndimbola ya makambo mpe kokanisa na mozindo. Nzokande, koumela esika moko ntango molai mingi te, soki te okomona te ete ozali kosala eloko.
5 Moyekoli moklisto akotyaka motema na makoki na ye moko te mpo na kokotela makambo mozindo na Liloba na solo na Nzambe. Ayebi ete azali na mposa na lisalisi na elimo santu, lisalisi na lisangá na Nzambe esalemi na basaleli bamipesi epai na ye, mpe lisalisi na Liloba na ye. Yango wana ebongi kosambela liboso na kobanda koyekola, mpo na kosenga lipamboli na Nzambe.—Yak. 1:5; Luka 11:9-13.
6, 7. Toli nini epesameli biso mpo tokoka kozwa litomba mpenza na botangi ya Biblia kati na libota?
6 Boyekoli ya Biblia. Programme ya Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekozalaka na botangi ya Biblia poso na poso. Mbala mingi, botangi yango ekoki kosalema kati na libota, kotangaka mokapo moko to mikapo mibale mpokwa nyonso. Mpo ete botangi yango ekoka kobimisa litomba, motangi to moyoki mosusu asengeli kolimbola eteni mokomoko mpo na kopesa likanisi ya ntina. Soki ozali kotanga kozanga kobimisa mongongo, zwa ntango ya kokanisa na mozindo likoló na makanisi oyo omoni kati na botangi, likoló na boyokani na yango elongo na mokapo mobimba mpe komona ndenge nini makambo otangi etali yo mpenza.
7 Nsima na botangi nyonso na Biblia, soki makambo mosusu ezali naino molili mpo na yo, zwa ntango ya koluka bandimbola kati na mikanda. Okoki kobosana ndimbola ya verset moko. Ndenge nini okoki koluka ndimbola na yango? Ya liboso, okoki kotala index ya mikapo ya Biblia kati na mokanda Publications de la Société Watch Tower Index, kuna bakomonisa yo na page nini bapesi ndimbola ya verset wana. Soki motuna na yo ezali mpo na motó ya likambo moko na Biblia, na ndakisa “Kobulisama” to “Babilone Monene”, wana tala na eteni ya mitó ya makambo kati na mokanda Publications de la Société Watch Tower Index oyo ozali na yango kati na Biblioteke na yo. Okosalela mpe metode oyo moko mpo na koluka ndimbola na ntina na moto moko to mboka moko oyo elobelami kati na Biblia. Nzela mosusu mpo na kozwa ndimbola oyo nyonso ezali ya kotala kati na mokanda Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible mpe na nsima koluka kati na Biblia na yo baversets oyo epesami.
8, 9. Ndenge nini tokoki kozwa eyano na motuna moko etali Biblia, kasi longola eyano, eloko nini lisusu tosengeli koluka?
8 Koluka bandimbola mpo na koyanola na mituna. Na ntango tozali kozongela bato to na litatoli ya libaku malamu, mbala mosusu moto akoki kotuna biso motuna mpe toyebi eyano na yango malamu te. Salela ntango oyo omibongiselaki mpo na boyekoli, ete oluka eyano epai na yo na ndako. Na motindo yango, okoyeba “kosembola liloba na solo”. (2 Tim. 2:15) Tya mwa molende mpe okozwa eyano oyo ekosepelisa moto. Soki motuna etali verset moko kati na Biblia, tanga naino makambo mazali liboso mpe makambo mazali nsima na yango; ezali kolobela nini? Ndimbola na yango ezali sikawa polele? Na nsima, okoki kotala eteni ya mikapo ya Biblia kati na mokanda Publications de la Société Watch Tower Index mpo na kozwa ndimbola mosusu. Soki motuna etali liteya to esakweli, to mpe ndenge ya kosalela lilako moko ya Biblia kati na bomoi ya moto oyo atuni yango, wana tala eteni ya mitó na makambo kati na mokanda Publications de la Société Watch Tower Index; yango ekosalisa yo ete ozwa eyano oyo ozali koluka.
9 Nsima na komona eyano, omituna soki okokoka kondimisa yango epai na moto. Ekozala bobele endimeli ezangi moboko ete moto andima yango se bongo? Osimbi ntina ya bandimbola oyo epesami na mikanda ya la Société? Okokoka komonisa ete ezali solo? Moto akoki kosenga yo ete olongisa makanisi yango to omonisa bosolo na yango na nzela na mikapo ya Biblia. Okokoka kolimbola yango na kosalelaka bandakisa to bililingi? Osili kokanisa mpo na mituna oyo okoki kotuna mpo na kopusa moto na kokanisa mpe kokoma na esukeli moko na yo? Soki oyekoli likambo yango, okokoka kopesa eyano moko malamu.
10, 11. Toli nini epesameli biso mpo na lolenge malamu ya kobongisa boyekoli ya Mosenzeli mpe boyekoli ya mokanda?
10 Ndenge nini kobongisa boyekoli ya Mosenzeli. Na mikili misusu, na ntina na botemeli to mpo ete bakonzi bapekisi mosala ya ba Témoins de Jéhovah, Misenzeli nyonso mizali kokomela bango te. Na mikili yango, bandeko bazali kozongela banimero ya kala to bazali bobele komikundola makambo bayekolaka kala. Ozali komikundola makambo ya ntina na banimero ya nsuka ya Mosenzeli oyo boyekolaki? Tosengeli koyekola na mokano ete tosimba makanisi toyekoli, mpo tokoka kosalela yango kati na bomoi na biso to kati na mosala ya kosakola.
11 Ezali litomba na kotanga zulunalo mobimba uta ozwi yango, mpo okoka koyeba makambo nini bazali kolobela kuna na kati. Na nsima, soki etikali bobele mwa mikolo mpo ete boyekola lisolo moko kati na lisangá, ebongi malamu kotanga yango lisusu yo moko to elongo na libota na yo. Na botangi wana ya mibale, simba motó ya likambo monene, mokapo ya Biblia epai yango ezwami mpe mitó ya makambo mikemike. Wana okoyeba eloko nini lisolo ezali koluka koteya mpe ekosalisa yo omona boyokani nini ezali na makambo ndenge na ndenge oyo malobelami kati na baparagrafe. Nsima na kosala bongo, okoki kobanda kotanga paragrafe mokomoko, koluka biyano na mituna mpe kotya mokoloto na nse na maloba ya ntina mpo na kosalisa boongó na yo. Soki nsima na koyekola paragrafe moko okoki koyanola na maloba na yo moko te, tanga yango lisusu mpe meka lisusu. Tya bilembo na makanisi ya ntina mauti na Biblia, luka kati na Biblia mikapo oyo maloba na yango mapesami te, mpe tya bilembo na mikapo oyo okolinga kolimbola yango na likita. Nsima na koyekola baparagrafe nyonso na nse ya motó ya likambo moko moke, telema naino mwa moke mpe luka komona boyokani kati na makanisi mapesami mpe likanisi ya motó ya likambo monene. Sala se ndenge moko na nsuka ya lisolo mobimba. Kanisa mpo na ndenge okoki kosalela makanisi oyo oyekoli; omituna ndenge nini etali bomoi na yo mpe ndenge nini okoki kolimbola yango na moto mosusu. Na motindo yango, boyekoli na yo ekozala bobele mpo na koluka biyano te, kasi mpo na kozwa mayele mpe bososoli. (Masese 4:7) Epai mosusu, okozala na esengo mingi ya koyangana na boyekoli ya Mosenzeli elongo na lisangá mobimba. Landa se metode oyo moko mpo na kobongisa boyekoli ya mokanda.
12-14. Mpo na nini boyekoli ya libota ezali na ntina mingi, mpe makambo nini makoki koyekolama?
12 Boyekoli kati na libota. Esengeli ete libota na yo balanda programme ya boyekoli oyo osali mpe mosangani mokomoko azwela yango matomba mingi. Mbele ekozala kozanga bolingo soko tata azali koyekola se ye moko, nzokande atiki mwasi na ye mpe bana na ye na nzala na elimo. Ezala na mosuni, ezala na elimo, tata azali na mokumba ya “koleisa bato na ye mpe koleka bato kati na ndako na ye mpenza”. (1 Tim. 5:8) Toli elandi ezwami kati na Masese 22:6 emonisi ete ezali likambo ya mayele koteya bana kati na Biblia uta bomwana na bango: “Bokola mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokoma ye [mokóló] akopengwa na yango te.” Okanisa te ete mwana na yo azali naino moke. Bana bakoki koyekola uta bomwana mpenza. (2 Tim. 3:15) Mabota oyo ekolaka noki ezali oyo bazali na programme ya botangi mpe boyekoli. Kosala yango poso na poso ezali na ntina monene.
13 Otangaka texte ya mokolo na mokolo elongo na libota na yo, koyokaka bakomantere na bango mpe kotunaka bango mituna mpo na koluka koyeba soko basimbi ntina? Yango ezali liziba na bilei mingi na elimo. Mabota mingi batangaka texte na ntango ya kolya. Longola wana, libota moko na moko esengeli komiponela mokolo mpe ngonga mpo na boyekoli moko mozindo. Ekoki kozala mpokwa moko boye to ngonga mosusu oyo ebongi na bango. Esengeli ntango mpo na kosimba ntina na makambo mosusu kati na Biblia, kotalela yango epai na epai mpe kokoma yango kati na motema na biso. Boyekoli ya libota poso na poso ekopesa nzela na libota mobimba ete bazwela yango litomba. Libota na yo ezali na boyekoli ya boye poso na poso? Soki te, banda lelo, bolobana mpo na yango elongo mpe bokamata bibongiseli ya sikisiki mpo ete boyekoli ekota kati na bomoi ya libota na bino.—Baef. 6:4; Deter. 6:4-7.
14 Soki bana na yo bazali naino mike, ezali malamu koyekola elongo na bango makambo oyo bakokoka kosimba yango mpe oyo ekosalisa bango. Nzokande, ata makambo oyo maleki makasi makoki kolakisama na lolenge oyo ekoki kosepelisa bana soki bakotuna bango mituna ya petee na makambo mosusu oyo bango bakoki koyeba yango. Mabota mingi babongisaka elongo boyekoli ya Mosenzeli. Kasi boyekoli ya libota ekoki kosalema ata na mokanda nini oyo ebongi malamu, engebene bamposa ya libota. Boyekoli kati na libota ezali kokolisa bomoko ya libota mpe bososoli ya elimo ya basangani na yango nyonso.
15-17. Koyekola ntango nyonso ekopesa biso bolamu nini?
15 Bolamu bozali kozwama na koyekola ntango nyonso. Kati na bolamu oyo tokoki kozwa nokinoki, koyekola ntango nyonso ezali kosalisa biso na kosimba makambo mingi, mpamba te tozali kosalela boongó na biso mpe yango elamuki mpe ezali komesena na kosimba makambo. Na mosala ya kosakola mpe na makita ya lisangá, tokobanda komikundola noki mpe kobimisa bakomantere na makambo oyo tosili koyekola. Tokokoka mpe koyanola kozanga kotala na mokanda, na mituna mingi oyo bato basepeli sika na nsango malamu bazali kotuna yango, mpe tozali komikundola nokinoki mikapo ya Biblia mpo na kolongisa biyano na biso. Kasi eloko eleki lisusu ntina, ezali oyo ete boyekoli ezali kopesa biso boyebi ya Liloba na Nzambe na makambo mingi. Ezali kolendisa kondima na biso, ezali kokolisa bososoli na biso ya mitinda ya Biblia mpe ezali kobakisa esengo na biso kati na mosala ya Jéhovah.—Baeb. 5:14.
16 Moto na mayele apesaka esika ya liboso na makambo matali bomoi na ye ya elimo. Soki ntango ekomi kozanga ye, mbala mosusu akotika pembeni makambo mosusu oyo mazali bobele na ntina moke, nzokande akoki kotika soki moke te boyekoli ya Liloba ya bomoi. Epai na ye oyo azali kosala boye, Jéhovah apesi elaka oyo: ‘Soko okoluka ngai okozwana na ngai.’ (1 Ntango 28:9) Yango ekozala solo koleka soki ozali koyekola bobele mpo na kotondisa boyebi na motó na yo te, kasi mpo na koleisa motema na yo. Tika ete bolingo na yo mpe botondi na yo epai na Jéhovah na ntina na misala na ye kitoko ekola wana ezali yo koyekola Liloba na ye!
17 Ntina mpenza na boyekoli oyo baministre na Nzambe bazali koyekola emonisami polele kati na libondeli oyo ya ntoma Paulo ekomami kati na Bakolose 1:9, 10: “Tokolombaka ete botonda na boyebi na mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli na elimo. Na bongo, botambola na sembo na Jéhovah mpe bosepelisa ye na makambo nyonso. Bobota mbuma na misala nyonso malamu, bokóla mpe na boyebi koyeba Nzambe.”