Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/08 lok. 1
  • ‘Tómibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tómibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Monisá ete osepelaka na bato​—Na komibongisáká
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tóbongisaka maloba na biso ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 5/08 lok. 1

‘Tómibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu’

1 Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye mpo na mbala ya liboso bákende kosakola, azwaki ntango ya kobongisa bango. (Mat. 10:​5-14) Atako biso nyonso tozalaka na makambo mingi ya kosala, soki tozali kozwa mwa miniti mpo na komibongisa liboso ya kokende kosakola ndako na ndako, tokozwa mbuma ya malamu.​—⁠2 Kol. 9:⁠6.

2 Ndenge ya komibongisa: Likambo ya liboso oyo tosengeli kosala ntango tozali komibongisa ezali koyeba malamu makambo oyo ezali na mikanda oyo tokolakisa bato. Tosengeli mpe kokanisa bato ya teritware na biso. Makambo nini etungisaka bango? Mateya nini bandimaka? Maloba ya kobanda lisolo oyo epesami lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi mpe buku Comment raisonner à partir des Écritures ekoki kosalisa biso.

3 Lisusu, kolanda na likebi bilakiseli oyo esalemaka na Likita ya Mosala ekosalisa biso. Soki tomeseni na maloba na biso ya kobanda lisolo, ekosɛnga biso lisusu ntango mingi te mpo na komibongisa. Kasi, soki tozali kotalela maloba na biso ya kobanda lisolo mbala nyonso oyo tolingi kokende kosakola, tokomona lisusu ndenge ya kobongisa yango, mpe ekobota mbuma mingi. Tosengeli mpe kotala soki sakosi na biso ezali na mikanda nyonso oyo tokosalela.

4 Nini ekosalisa biso tóbosana te maloba na biso ya kobanda lisolo? Tokobosana yango te soki tozali komekameka yango na mongongo makasi. Basusu bamonaka malamu komekameka yango na ntango ya boyekoli ya libota. Basusu bamonaka malamu kokoma mwa maloba moke na papye mpe kobwaka mwa liso na papye yango liboso ya kobɛta na porte moko.

5 Litomba na yango: Komibongisa malamu esalisaka biso tósakola lisusu malamu mpe na esengo mpenza. Esalisaka mpe biso tóbanga mingi te ntango tolingi kosolola na moto. Yango esalisaka biso tótya likebi mingi na makambo oyo moto azali koloba na esika ya komitungisa mingi na makambo oyo tokoloba. Lisusu, soki toyebi malamu makambo oyo ezali na mikanda oyo tokolakisa bato, tokolakisa yango na esengo mpenza.

6 Makomami elendisi biso ‘tómibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu.’ (Tito 3:⁠1) Ezali na mosala moko te oyo eleki mosala ya kosakola nsango malamu. Soki tomibongisi malamu, tokomonisa ete tozali na limemya mpo na bato oyo bandimi koyoka biso, mpe mpo na Yehova, Nzambe oyo tozali komonisa.​—⁠Yis. 43:⁠10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto