“Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka”
1. Ndenge nini bato mosusu batalelaka mosala na biso?
1 Ntango mosusu bato bakoki koboya koyamba biso mpo bayebi Batatoli ya Yehova malamu te to mpo bayebisaki bango makambo ya lokuta na ntina na biso. Ekoki kozala ete makambo oyo bakoselaka biso na radio, na televizyo to na bazulunalo nde etindaka bango báboya koyamba biso. Kutu, na bisika mosusu babengaka biso “mwa lingomba ya mabe.” Tosengeli kosala nini soki bato bakaniseli biso mabe ndenge wana?
2. Nini ekosalisa biso tólɛmba nzoto te atako bato bazali koloba mabe na ntina na biso?
2 Tókoba kozala na makanisi ya malamu: Na ekeke ya liboso, bato mingi bazalaki koloba mabe mpo na Yesu mpe basaleli mosusu ya Yehova. (Mis. 28:22) Atako bongo, batikaki te maloba wana ya mabe epekisa bango kosakola nsango malamu. Yesu alobaki: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Mat. 11:18, 19) Akobaki kosala mokano ya Tata na ye na molende mpo ayebaki ete bato oyo balukaka solo bakoyeba ete nsango malamu ezali na ntina mingi. Soki tomikundoli ndenge bato baboyaki koyoka Yesu, Mwana ya Nzambe, tokolɛmba nzoto te.
3. Mpo na nini maloba mabe mpe botɛmɛli esengeli kokamwisa biso te?
3 Yesu alobaki ete mokili ekoyina bayekoli na ye kaka ndenge eyinaki ye. (Yoa. 15:18-20) Yango wana, maloba mabe mpe botɛmɛli oyo bato babimisaka lelo esengeli te kokamwisa biso. Kutu, tosengeli komizela ete tokokutana na makambo ya ndenge wana mingi lisusu koleka lokola tokómi mpenza na mikolo ya nsuka mpe nkanda ya Satana ekómi lisusu makasi. (Em. 12:12) Tokoki kosepela mpo toyebi ete makambo wana ezali komonisa ete etikali moke mokili ya Satana ebebisama.
4. Tosengeli kosala nini soki bato baboyi koyamba nsango malamu?
4 Monisaká boboto: Soki moto aboyi koyamba biso, tosengeli ntango nyonso komonisa boboto. (Mas. 15:1; Kol. 4:5, 6) Soki likoki ezali, tokoki koyebisa moto yango ete bato balobaka makambo mingi ya lokuta na ntina na Batatoli ya Yehova to tokoki kotuna ye ayebisa biso likambo oyo epekisaka ye ayamba biso. Boboto na biso ekoki kotinda ye aboya kondima makambo oyo bayebisaki ye mpo na Batatoli ya Yehova mpe ayamba bango mbala ya nsima. Nzokande, soki moto yango asiliki makasi, ekozala malamu tókende. Tóyeba ete ata soki bato mosusu baboyi koyoka biso, Yehova asepelaka na mosala na biso.—Yis. 52:7.