Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kn37 nk. 1-4
  • Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!
  • Nsuka ya mangomba ya lokuta ekomi pene!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mangomba ya lokuta . . .
  • Na lingomba ya solo . . .
  • Ndenge oyo mangomba ya lokuta ekoselaka Nzambe makambo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Nzambe andimaka mangomba nyonso?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Bimá na lingomba ya lokuta!
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Boyá losambo ya lokuta!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Nsuka ya mangomba ya lokuta ekomi pene!
kn37 nk. 1-4

Nsango ya Bokonzi No. 37

Nsango oyo etali bato ya mokili mobimba

Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!

▪ Mangomba ya lokuta ezali nini?

▪ Ekosuka ndenge nini?

▪ Ntango mangomba ya lokuta ekobomama, yo okobika?

Mangomba ya lokuta ezali nini?

Makambo mabe oyo bato bazali kosala na nkombo ya mangomba etungisaka yo? Oyokaka mabe ndenge bato oyo balobaka ete basalelaka Nzambe bazali kobunda bitumba, koboma bato na nko, mpe kosala makambo mosusu ya mabe? Mpo na nini ezali komonana ete mangomba nde ezali kobimisa mikakatano mingi?

Ezali mangomba nyonso te nde ebimisaka mikakatano yango, kasi mangomba ya lokuta. Yesu Klisto, moto oyo bato mingi bapesaka limemya na makambo ya losambo, amonisaki ete mangomba ya lokuta etindaka bato básala mabe se ndenge ‘nzete oyo epɔlá ebotaka mbuma oyo ezangá ntina.’ (Matai 7:15-17) Mbuma nini mangomba ya lokuta ebotaka?

Mangomba ya lokuta . . .

◼ EMIKƆTISAKA NA BITUMBA MPE NA MAKAMBO YA POLITIKI: Zulunalo moko (Asiaweek) elobi ete: “Na Azia mpe na bisika mosusu, bakonzi ya mangomba oyo bazali na lokoso ya bokonzi bayebi ete bato balingaka makambo ya Nzambe, yango wana bakosaka bango mpo na kokokisa mikano na bango.” Na bongo, zulunalo yango ekebisi boye: “Etikali moke mobulu monene ebima na mokili.” Na États-Unis, mokonzi ya lingomba moko, oyo ayebani mingi alobaki boye: “Esengeli koboma bato oyo babomaka bato na nko mpo bátika koboma bato.” Mpo na kosilisa likambo yango, apesaki likanisi oyo: “Bóboma bango nyonso na nkombo ya Nkolo.” Nzokande, Biblia elobi boye: “Soki moto azali koloba ete: ‘Nalingaka Nzambe,’ nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta.” (1 Yoane 4:20) Kutu, Yesu alobaki ete: “Bókoba kolinga banguna na bino.” (Matai 5:44) Oyebi mangomba boni oyo bandimi na yango bakɔtaka na bitumba?

◼ ETEYAKA MATEYA YA LOKUTA: Mangomba mingi eteyaka ete molimo to elimo ezali eloko moko oyo emonanaka te, oyo ezalaka na kati ya nzoto ya moto, mpe ekufaka te ata soki moto akufi. Liteya wana esalaka ete bakonzi ya mangomba yango bályelaka bandimi na bango, na ndakisa basɛngaka bango mbongo mpo básambela mpo na milimo ya bawa. Nzokande, mateya ya Biblia ekeseni mpenza na liteya wana. ‘Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.’ (Ezekiele 18:4) “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Yesu ateyaki ete bato oyo bakufá bakosekwa. Lisekwa yango elingaki kozala na ntina te soki bato bázalaka na molimo oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa. (Yoane 11:11-25) Lingomba na yo eteyaka ete molimo ekufaka te?

◼ ETIKAKA BATO BÁSALA PITE MPE EKOBO: Na mikili mosusu ya Mpoto, mangomba endimaka ete mibali oyo basangisaka nzoto na mibali to basi oyo basangisaka nzoto na basi bákóma basango, mpe mangomba yango esɛngaka Leta endima mabala ya bato ya ndenge wana. Ata mangomba oyo emonaka ete pite to ekobo ezali mabe, esalaki bakonzi na bango eloko moko te ntango babebisaki bana mike. Kasi, Biblia eteyaka nini na likambo ya pite to ekobo? Biblia elobi polele ete: “Bómikosa te. Bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko, mpe bato ya ekobo, mpe mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Oyebi mangomba oyo etikaka bato básala pite to ekobo?

Nini ekokómela mangomba oyo ebotaka mbuma oyo epɔlá? Yesu alobaki boye: “Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te ekatamaka mpe ebwakamaka na mɔtɔ.” (Matai 7:19) Ya solo, mangomba ya lokuta ekokatama mpe ekobebisama! Kasi, likambo yango ekosalema ndenge nini mpe ntango nini? Emonaneli moko oyo ezali na Biblia na mokanda ya Emoniseli mokapo 17, mpe 18, epesi eyano.

Mangomba ya lokuta ekosuka ndenge nini?

Salá lokola ozali mpenza komona emonaneli yango: Mwasi moko ya ndumba afandi na mokɔngɔ ya nyama moko ya nsɔmɔ. Nyama yango ezali na mitó nsambo mpe na maseke zomi. (Emoniseli 17:1-4) Mwasi yango nani? Azali na bokonzi “likoló ya bakonzi ya mabelé.” Alati bilamba ya motane-moindo, azali kosalela mpaka-ya-malasi, mpe azali na bozwi mingi mpenza. Lisusu, azali ‘kobungisa bikólo nyonso nzela’ na misala na ye ya bilimo mabe. (Emoniseli 17:18; 18:12, 13, 23) Biblia esalisi biso tóyeba ete mwasi yango ya ndumba ezali lisangá ya mangomba na mokili mobimba. Mwasi yango ezali lingomba moko te, kasi mangomba nyonso oyo ebotaka mbuma oyo epɔlá.

Nyama oyo mwasi yango ya ndumba afandeli ezali komonisa biyangeli ya politiki na mokili mobimba.a (Emoniseli 17:10-13) Lokola mwasi yango afandi na mokɔngɔ ya nyama yango, yango emonisi ete mangomba ya lokuta elukaka kotinda biyangeli yango ezwa bikateli oyo mangomba yango elingi mpe elukaka kotambwisa biyangeli yango.

Kasi, mosika te, likambo moko ya nsɔmɔ ekosalema. “Maseke zomi oyo omonaki, ná nyama mabe, bango bakoyina mwasi wana ya ndumba mpe bakopanza ye mpe bakotika ye bolumbu, mpe bakolya misuni na ye mpe bakozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.” (Emoniseli 17:16) Na mbala moko, biyangeli ya politiki na mokili mobimba ekobalukela mangomba ya lokuta mpe ekoboma yango nyonso! Eloko nini ekotinda biyangeli yango esala bongo? Mokanda ya Emoniseli epesi eyano ete: “Nzambe atye yango na mitema na bango mpo na kokokisa likanisi na ye.” (Emoniseli 17:17) Nzambe akosambisa mangomba ya lokuta mpo na mabe monene oyo bazali kosala na nkombo na ye. Na bosembo mpenza, akosalela biyangeli ya politiki oyo esalaki boninga na mangomba ya lokuta mpo eboma yango.

Osengeli kosala nini mpo okufa te ntango mangomba nyonso ya lokuta ekobomama? Momemi-nsango ya Nzambe alendisi ete: “Bóbima na kati na ye, bato ya ekólo na ngai.” (Emoniseli 18:4) Na ntembe te, oyo nde ntango mpenza ya kobima na mangomba ya lokuta! Kasi, okokende wapi? Osengeli te kokende na ngámbo ya bato oyo baboyaka kondima ete Nzambe azali, mpamba te bango mpe bakobomama. (2 Batesaloniki 1:6-9) Esika ya malamu ya kokima ezali kaka na lingomba ya solo. Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?

Ndenge ya koyeba lingomba ya solo

Wapi mbuma ya malamu oyo lingomba ya solo esengeli kobota?—Matai 7:17.

Na lingomba ya solo . . .

◼ BALINGANAKA: Bato oyo basambelaka na lingomba ya solo bazali “bato ya mokili te,” loposo to ekólo ekabolaka bango te, mpe ‘balinganaka.’ (Yoane 13:35; 17:16; Misala 10:34, 35) Babomanaka te, bandimaka nde kokufa na esika ya bandeko na bango.—1 Yoane 3:16.

◼ BANDIMAKA MPENZA LILOBA YA NZAMBE: Lingomba ya solo eteyaka “mimeseno” mpe ‘mibeko ya bato’ te, kasi makambo oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Matai 15:6-9) Mpo na nini? Mpamba te “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.”—2 Timote 3:16.

◼ BASALISAKA MABOTA EZALA MALAMU MPE BATOSAKA MIBEKO YA NZAMBE: Lingomba ya solo eteyaka mibali ‘bálinga basi na bango lokola nzoto na bango moko,’ esalisaka basi ‘bázala na limemya makasi epai ya mibali na bango,’ mpe eteyaka bana ‘bátosaka baboti na bango.’ (Baefese 5:28, 33; 6:1) Longola yango, baoyo bazali na mikumba ya minene na lingomba yango basengeli kozala na bizaleli malamu mpenza.—1 Timote 3:1-10.

Ezali na lingomba moko oyo bandimi na yango basalaka makambo oyo touti kolobela? Buku moko (Holocaust Politics) oyo ebimaki na mobu 2001 elobi ete: “Soki bato mingi básalelaka makambo oyo Batatoli ya Yehova bateyaka mpe basalaka, mbɛlɛ Banazi babomaki Bayuda te ndenge babomaki bango na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe mbɛlɛ bato ya bikólo ndenge na ndenge bazali kobomana te na mokano ya kosilisana.”

Na bikólo 235, Batatoli ya Yehova bazali kosuka kaka te na koteya mibeko ya Biblia oyo etali bizaleli malamu, kasi bango moko bazali mpenza kotosa yango. Tolendisi yo osɛnga Batatoli ya Yehova básalisa yo oyeba makambo oyo Nzambe azali kosɛnga yo mpo osambela ye na ndenge oyo andimaka. Sikoyo nde ntango ya kosala yango. Kozela te. Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!—Sefania 2:2, 3.

Soki olingi koyeba makambo mingi mpo na nsango ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova basakolaka, komelá bango na adrɛsi oyo ezali awa na nse.

□ Bótindela ngai mwa buku Bókɛngɛlaka!

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba likambo yango malamumalamu, tángá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

Mangomba ya lokuta ezali na bokonzi “likoló ya bakonzi ya mabelé”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

“Bóbima na kati na ye, bato ya ekólo na ngai”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto