Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/06 nk. 6-9
  • Mokili oyo ezali kokende wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili oyo ezali kokende wapi?
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Kalati” mpo na kolakisa biso nzela
  • Ndenge mabe ebandaki
  • Esika mokili ekómi lelo oyo
  • Oyo ezali kozela biso na mikolo ezali koya
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Lisumu ya ebandeli ezalaki nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Yesu azali mobikisi​—Na ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mpo na nini tokufaka?
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
Makambo mosusu
Lamuká!—2006
g 1/06 nk. 6-9

Mokili oyo ezali kokende wapi?

MAKAMBO ekozala ndenge nini nsima ya mbula 10, 20 to 30? Soki totali makambo oyo bateroriste bakómi kosala, tokoki kobanga mpo na mikolo ezali koya. Mayele ya tekiniki ezali kokola se kokola. Lokola lelo oyo mokili ekómi lokola kaka mboka moko, bikólo mingi ezali na mposa ya bikólo mosusu. Bakonzi ya mokili bakolonga kosangana mpe kobongisa makambo mpo na mikolo ezali koya? Bato mosusu bandimaka ete bakolonga, bakanisaka ete tii na mobu 2015, bakonzi ya mokili bakolonga kosilisa bobola mpe nzala, bakosala ete sida epalangana lisusu te, bato oyo bazali na likoki ya kozwa mai ya pɛto te ya komɛla mpe batwalɛti ya malamu te bázala lisusu mingi te.​—⁠Talá etanda “Mikano yango ekolonga?”

Kasi, mbala mingi makambo oyo moto akanisaka ete ekosalema na mikolo ezali koya ekokisamaka te. Na ndakisa, bambula mingi liboso, moto moko ya mayele alobaki ete tii na mobu 1984, basali-bilanga bakobanda kobalola mabelé na nse ya mbu na batraktɛrɛ oyo ekobanda kozinda na mai; mosusu alobaki ete tii na mobu 1995, bakotya baordinatɛrɛ na mituka mpo na kobatela yango etutana na mituka mosusu te; mpe mosusu alobaki ete tii na mobu 2000, bato pene na 50 000 bakokende kofanda na likoló mpe kosala misala kuna. Na ntembe te, bato oyo balobaki makambo ya ndenge wana, bakoki lelo koloba eloko te. Mopanzi-nsango moko akomaki ete: “Nsima ya bambula, eumelaka te komona ete bato ya mayele ya mokili oyo bazali bazoba.”

“Kalati” mpo na kolakisa biso nzela

Bato batikaka te komituna soki mikolo ezali koya ekozala ndenge nini; kasi na bantango mosusu, na esika bátalela makambo ndenge yango ezali, bazalaka nde komikosa na makanisi na bango. Epai wapi tokoki koluka makanisi oyo tokoki kotyela motema mpo na koyeba ndenge mikolo ezali koya ekozala?

Tózwa ndakisa moko. Kanisá ete ozali kosala mobembo na bisi na mboka mopaya. Lokola oyebi mboka yango te, obandi komitungisa. Obandi komituna ‘Nakómi esika nini? Bisi oyo ezali mpenza komema ngai na nzela ya malamu? Etikali bakilomɛtrɛ boni mpo nakóma esika nazali kokende?’ Soki otali kalati ya malamu mpe otali bilembo ya nzela na lininisa ya bisi, okoki kozwa biyano na mituna na yo.

Ezali mpe ndenge moko lelo oyo mpo na bato mingi ntango bazali komitungisa soki bakanisi mikolo oyo ezali koya. Bazali komituna, ‘Tozali kokende wapi? Tozali mpenza na nzela oyo ekomema biso na kimya ya mokili mobimba? Soki ezali bongo, ntango nini tokokóma na kimya yango? Biblia ezali lokola kalati oyo ekoki kosalisa biso tózwa biyano na mituna wana. Soki tozali kotánga yango malamumalamu​—⁠mpe soki tozali kotala na likebi mpenza ‘na lininisa,’ elingi koloba makambo oyo ezali koleka na mokili​—⁠tokoki koyeba malamu esika nini tokómi mpe epai wapi tozali kokende. Kasi liboso, tosengeli koluka koyeba ndenge mikakatano na biso ebandaki.

Ndenge mabe ebandaki

Biblia eyebisi biso ete ntango Nzambe asalaki mobali mpe mwasi ya liboso, bazalaki bato ya kokoka mpe atyaki bango na paladiso. Adama na Eva basalemaki mpo bázala na bomoi libela na libela​—⁠kasi kaka mbula 70 to 80 te. Nzambe alobaki na bango ete: “Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botya yango na nse na bino.” Mokano ya Nzambe mpo na Adama na Eva, mpe bana na bango, ezalaki ete bákómisa mabelé mobimba Paladiso.​—⁠Genese 1:28; 2:​8, 15, 22.

Adama na Eva batombokelaki Nzambe. Yango wana, babungisaki Paladiso, esika oyo bazalaki kofanda. Esukaki wana te; mokemoke babandaki konuna mpe mayele na bango ebandaki kosila. Mokolo mokomoko, Adama na Eva bazalaki kopusana mokemoke pene na liwa. Mpo na nini? Mpamba te, lokola baboyaki kotosa Mozalisi na bango, basalaki lisumu, mpe “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.”​—⁠Baloma 6:​23.

Nsukansuka, Adama na Eva bakufaki; kasi liboso bákufa babotaki bana mingi ya mibali mpe ya basi. Bana wana bakokaki nde kokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli? Te, mpamba te basangolaki kozanga kokoka ya baboti na bango. Kutu, kobanda na bana na bango tii bana oyo babotamaki nsima, bana nyonso ya Adama basangolaki lisumu mpe liwa. Biso mpe tosangolá yango. Biblia elobi ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”​—⁠Baloma 3:​23; 5:​12.

Esika mokili ekómi lelo oyo

Botomboki ya Adama na Eva ezalaki ebandeli ya mobembo moko molai mpe ya mpasi mpo na bato, mobembo oyo ezali kokoba tii na mikolo na biso. Ndenge mokomi moko ya Biblia akomaki yango, bato ‘batyamaki na kati ya kozanga ntina.’ (Baloma 8:​20) Oyo mpenza ndenge ya kolimbola etumba oyo bato bazali kobunda! Ya solo, kati na bana ya Adama, ezali na mibali mpe basi oyo bazali bato ya siansi, bato ya mayele na mosala ya monganga mpe na misala ya tekiniki. Atako bongo, moko te kati na bango alongi kotya kimya na mokili mobimba mpe kosalisa bato bázala nzoto kolɔngɔnɔ ndenge Nzambe alingaki bato bázala.

Botomboki ya Adama na Eva ebimiselaka mokomoko na biso mikakatano. Na ndakisa, nani kati na biso ayokaka mpasi te ntango basaleli ye makambo na kozanga bosembo, nani abangaka mobulu te, nani ayokaka mpasi te ntango abɛli maladi oyo ezali kosila te, to ayokaka mawa te ntango ndeko to moninga moko akufi? Ntango tofandi mwa kimya na bomoi na biso, eumelaka te likambo moko ya mpasi eyaka kolongola kimya yango. Ata na bantango oyo tozalaka malamu, bomoi na biso ezali kaka ndenge Yobo amonisaki yango, ntango alobaki ete: “Moto . . . azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.”​—⁠Yobo 14:⁠1.

Soki tokanisi epai touti mpe totaleli ndenge makambo ebebi lelo oyo na mokili, tokoki kozala ata na elikya moko te mpo na mikolo ezali koya. Kasi Biblia esalisi biso tóyeba ete Nzambe akotika te makambo ya ndenge wana ekoba libela na libela. Mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bato ekokokisama. (Yisaya 55:​10, 11) Mpo na nini tokoki kondima ete yango ekosalema mosika te?

Biblia emonisi ete lelo oyo tozali na eleko moko ya mpasi oyo ebengami “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:⁠1) Maloba wana elimboli te nsuka ya mabelé mpe ya bomoi nyonso oyo ezali kati na yango. Elimboli nde “bosukisi ya ebongiseli ya makambo,” na maloba mosusu, makambo nyonso oyo ezali konyokola biso ekosuka. (Matai 24:⁠3) Biblia eyebisi makambo mpe bizaleli oyo bato bakokóma na yango na mikolo ya nsuka. Okokuta mwa ndambo na yango na etanda oyo ezali na lokasa 8, mpe na nsima talá ‘na lininisa,’ elingi koloba makambo oyo ezali koleka na mokili. Biblia, oyo ezali lokola kalati na biso, ezali kosalisa biso tóyeba ete mokili na biso ekómi mpenza pene na nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo. Kasi nini ekosalema na nsima?

Oyo ezali kozela biso na mikolo ezali koya

Ntango kaka Adama na Eva batombokaki, Nzambe abandaki komonisa mokano na ye mpo na ebongiseli oyo azwaki ya kotya Bokonzi “oyo ekobebisama soki moke te.” (Danyele 2:​44) Bokonzi yango, oyo bateyá bato mingi bábondelaka mpo na yango na libondeli oyo babengaka Tata na Biso, ekomemela bato mapamboli oyo ezangi nsuka.​—⁠Matai 6:​9, 10.

Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto te. Ezali guvɛrnema ya solo oyo ezali na likoló, oyo ekotambwisa makambo nyonso awa na mabelé. Kanisá naino makambo oyo Nzambe alaki ete akosala mpo na bato na nzela ya Bokonzi na ye. Biblia elobi ete Nzambe akobanda liboso “kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.” (Emoniseli 11:​18) Akosala nini na bato oyo bamonisaka ete batosaka ye? Liloba na ye elobi ete “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:⁠4) Moto nani akoki kosala makambo wana? Kaka Nzambe moto akoki kozongisa biso na bomoi oyo akanaki mpo na bato na ebandeli.

Ndenge nini okoki kozwa matomba oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema? Yoane 17:3 elobi ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala ya koteya na mokili mobimba, mosala oyo ezali kosalisa bato báyekola koyeba Nzambe mpe Yesu Klisto. Bazali kosala mosala na bango na mikili koleka 230, mpe bazali kobimisa mikanda na bango na minɔkɔ koleka 400. Soki olingi koyeba makambo mingi, luká Batatoli ya Yehova na esika ofandi to tindá mokanda na adrɛsi oyo ebongi na yo na lokasa 5.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

“Bato mosusu na kati na bino balobaka: ‘Lelo to lobi tokokende na mboka boye, tokofanda kuna mbula moko pe tokosala mombongo, bongo tokozwa mbongo mingi.’ Nzokande boyebi té ndenge nini bokozala lobi.”​—⁠Yakobo 4:​13, 14, Bible na lingala ya lelo oyo

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Biblia elobeli bomoi ya bato banda Nzambe asalá mobali mpe mwasi ya liboso. Eyebisi mpe biso epai wapi toutá. Emonisi lisusu epai wapi tozali kokende. Kasi mpo tókanga ntina ya makambo oyo Biblia ezali koyebisa biso, tosengeli koyekola yango malamumalamu ndenge totalaka kalati

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

“Lisumu” ekoki kolimbola kosala likambo ya mabe to kozala na makanisi to na mposa ya kosala mabe. Tobotamá bato ya masumu, yango wana tosalaka mabe. “Mpo ete moyengebene azali kati na mokili te oyo akosala bobele malamu mpe akobunga te.”​—⁠Mosakoli 7:​20

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Soki osali fotokopi na papye oyo ezali na mwa elembo ya moindo, bapapye nyonso ya fotokopi ekobima na mwa elembo yango ya moindo. Lokola tozali bana ya Adama​—⁠tozali lokola bapapye ya fotokopi​—⁠tozali na elembo ya lisumu kati na biso. Ezali mpe elembo ya ndenge wana Adama, “papye oyo basali fotokopi,” azalaki na yango

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Biblia elobi ete: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” ( Yilimia 10:​23) Ezali mpo na yango nde milende oyo bato basalaka mpo na kotya kimya na mokili elongaka te. Moto asalemá te mpo na “kotambolisa makolo na ye” kozanga lisalisi ya Nzambe

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Mokomi ya Nzembo moko ya Biblia alobaki mpo na Nzambe ete: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka na ngai mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:⁠105) Biblia esalisaka biso lokola mwinda, mpo tótya makolo na bisika ya malamu ntango tozali kozwa bikateli. Biblia ezali lokola ‘pole na nzela na biso,’ ezali kongɛngisa nzela liboso na biso mpo tóyeba nini ezali kozela bato na mikolo ezali koya

[Etanda na lokasa 7]

MIKANO YANGO EKOLONGA?

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2000, bikólo nyonso oyo ezali na ONU emityelaki mwa mikano oyo basengeli kokokisa tii na mobu 2015. Ezali mikano lokola oyo:

◼ Kokitisa na katikati (50 %) motango ya bato oyo babikelaka na mbongo oyo ekoki ata dolare moko te na mokolo, mpe baoyo bamonaka mpasi na nzala.

◼ Kosala ete bana nyonso básilisa eteyelo ya ebandeli.

◼ Kosala ete bana basi ná bana mibali bátánga kelasi ndenge moko.

◼ Kokitisa mbala mibale likoló ya misato (66 %) motango ya bana oyo bazali kokufa liboso ya kokokisa mbula mitano.

◼ Kokitisa mingi (75 %) motango ya basi oyo bakufaka na ntango ya kobota.

◼ Kosala ete sida epalangana lisusu mingi te, mpe bamaladi ya minene lokola malaria.

◼ Kokitisa na katikati (50 %) motango ya bato oyo bazali na likoki te ya kozwa mai ya komɛla ya pɛto.

Mikano yango ekokokisama? Nsima ya kotalela lisusu likambo yango na mobu 2004, mwa ndambo ya basali ya Leta oyo batalelaka makambo ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto na mokili mobimba bamonaki ete, na kotalela ndenge makambo ezali kokende, esengeli mpenza te kotya motema ete mikano yango ekokokisama ndenge bakanaki. Maloba ya ebandeli ya buku moko (State of the World 2005) elobi ete: “Bobola ezali kaka kopalangana na bisika mingi. Bamaladi lokola sida ezali kaka kopalangana, mpe ezali kotya na likama bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato na bikólo mingi. Na mbula mitano oyo euti koleka, bana soki milio 20 bakufaki mpo na bamaladi oyo eutaka na mai, maladi oyo bakokaki kokima, mpe bankama ya bamilio ya bato bazali kaka kobika mokolo na mokolo na bobola mpe na bisika ya salite, bazangi mai ya pɛto ná batwalɛti ya malamu.”

[Etanda/Bililingi na lokasa 8, 9]

MWA BILEMBO YA “MIKOLO YA NSUKA”

Bitumba ndenge naino emonana te.​—⁠Matai 24:⁠7; Emoniseli 6:4.

Nzala.​—⁠Matai 24:⁠7; Emoniseli 6:​5, 6, 8.

Maladi mabe.​—⁠Luka 21:​11; Emoniseli 6:8.

Ezaleli ya kotyola mibeko ekómi mingi.​—⁠Matai 24:⁠12.

Kobebisama ya mabelé.​—⁠Emoniseli 11:⁠18.

Koningana minene ya mabelé.​—⁠Luka 21:⁠11.

Bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.​—⁠2 Timote 3:1.

Kolinga mbongo mingi.​—⁠2 Timote 3:2.

Kozanga botosi epai ya baboti.​—⁠2 Timote 3:2.

Kozanga bolingo ya libota.​—⁠2 Timote 3:3.

Kolinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe.​—⁠2 Timote 3:4.

Kozanga komipekisa.​—⁠2 Timote 3:3.

Kozanga kolinga makambo ya malamu.​—⁠2 Timote 3:3.

Kozanga kotya likebi na likama oyo ekómi pene.​—⁠Matai 24:⁠39.

Basɛki bazali koboya kondima bilembeteli ya mikolo ya nsuka.​—⁠2 Petelo 3:​3, 4.

Kosakolama ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba.​—⁠Matai 24:14.

[Eutelo ya bililingi]

© G.M.B. Akash/Panos Pictures

© Paul Lowe/Panos Pictures

[Elilingi na lokasa 9]

Batatoli ya Yehova bayebani ete basakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto