Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Ndenge nini nakoki kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisungi?
“Ntango nakosilisa kelasi, nakozwa mosala ya kobongisa kura. Nalingi ngai mpe nakɔta na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi.”—Tristan, mbula 14.
“Napesi dolare 20 oyo mpo na masini ya sika ya kosala mikanda. Ezali mbongo na ngai, kasi nasepeli kopesa bino yango.”—Abby, mbula 9.
LELO oyo, bato mingi bamonaka ete bilenge balukaka kaka bolamu na bango; nzokande, bilenge mingi, lokola baoyo touti kolobela, bazali bongo te. Na lisangá ya Batatoli ya Yehova, bilenge mingi basalelaka ntango na bango, makasi na bango mpe biloko mosusu oyo bazali na yango mpo na kosalisa basusu. (Nzembo 110:3) Tótalela mwa bandakisa mosusu.
Na Australie, elenge moko ya mbula nsambo nkombo na ye Jirah, akufelaki nkɔkɔ na ye ya mwasi; mwa moke na nsima, nkɔkɔ na ye ya mobali akabelaki ye dolare 50. Jirah asalaki na mbongo yango nini? Ntango bakendaki na makita na Ndako ya Bokonzi, atyaki mbongo yango nyonso na kɛsi ya makabo. Mpo na nini? Jirah ayebisaki mama na ye boye: “Nazali na bana-popi mingi, kasi nazalaki na nkɔkɔ ya mwasi kaka moko, nayebi ete soki nkɔkɔ azalaki na bomoi, alingaki koyebisa ngai natya mbongo yango na kɛsi ya makabo mpo alingaki Yehova mingi.”
Na États-Unis, elenge moko ya mbula mitano, nkombo na ye Hannah, alingaka bampunda mingi. Azalaki na mposa ya kosomba mpunda ya kopale oyo bazalaki kotɛka na dolare 75. Mpo na koteya Hannah momeseno malamu ya koyeba kobomba mbongo, baboti na ye bazalaki ntango mosusu kopesa ye mbongo mpo atyaka na mwa kɛsi na ye. Eumelaki te, Hannah akómaki na mbongo mingi na kɛsi na ye koleka kutu oyo asengelaki na yango mpo na kosomba mpunda yango.
Kasi, kaka na mikolo yango, mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki na sudi ya États-Unis mpe ebebisaki biloko mingi. Hannah ayokaki mawa mingi mpo na bato oyo bazalaki na bisika oyo mopɛpɛ yango ebebisaki biloko; na yango apesaki mbongo nyonso oyo abombaki, dolare koleka 100, mpo na kosalisa bango. Hannah akomaki boye na biro monene ya Batatoli ya Yehova: “Napesi bino mbongo oyo mpo nalingaka Yehova mpe nalingi kosalisa bandeko.” Yehova asepelaka nde na elimo wana ya kokaba? Biblia elobi boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.”—Baebele 13:16.
Na 2004, ntango mopɛpɛ makasi ebɛtaki mbala mibale na etúká ya Floride, elenge mwasi moko na États-Unis, nkombo na ye Tiffany atindaki mokanda na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Akomaki boye: “Ngai ná leki na ngai Timothy, totindi mbongo oyo, dolare 110. Mopɛpɛ ebebisi ndako na biso makasi te, kasi tomonaki ndenge bandako mosusu ebebi. Tozalaki na mposa ya kosalisa bandeko, yango wana tobandaki kobomba mbongo. Timothy asalaki mosala ya kobuka bifelo ya ndako moko mpe bafutaki ye dolare 10, mpe ngai nazalaki kobomba mbongo, tii ekokaki dolare 100.” Tiffany azali na mbula 13, mpe leki na ye Timote azali na mbula 7. Litomba nini tokozwa soki tozali koluka naino bolamu ya basusu? Masese 11:25 elobi ete: “Ye oyo akomema mai akozwa mpe mai mpo na ye moko.”
Na États-Unis, etuluku moko ya bilenge ya mbula kobanda 4 tii 15, bayokaki ete bandeko na bango Batatoli na Afrika bazali na mposa ya Bandako ya Bokonzi. Na yango, bazwaki mokano ya kosala likambo moko mpo na kotinda makabo. “Totɛkaki bagalɛti mpe mampa ya mike, mpe tozwaki dolare koleka 106. Tozalaki koyebisa bato ete mbongo yango ekosalisa mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na Afrika epai bato bakobanda koyekola Biblia. Bato mingi basombaki. Tolekisaki ngonga libwa mpo na kotɛkisa biloko yango, kasi toyebaki ete ezali mosala ya mpunda te, mpo tozalaki kosala yango mpo na Yehova!”
Yo mpe okoki kosalisa
Bilenge oyo touti kolobela bamonaki bosolo ya maloba ya Yesu ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Yo mpe okoki kozwa esengo yango. Ndenge nini?
Oyoki nsango ya bandeko oyo bazali na mposa ya lisalisi? Na ndakisa, oyoki nsango ete likama moko euti kosalema? Meká naino kokanisa mpasi oyo okoyoka na motema soki ndako na bino ebebi, biloko na yo ebebi, to mpe soki ndeko na bino akufi. Ntoma Paulo akomaki ete baklisto basengeli ‘kotya likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na bango moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’ (Bafilipi 2:4) Ata soki likama esalemi na mboka moko mosika, okoki kopesa likabo oyo ekosalelama mpo na kosalisa bato oyo bazwi likama.a
Ezali mpe na ndenge mosusu oyo okoki kosalisa bato oyo bazali na mposa ya lisungi. Na ndakisa, soki ozali Motatoli ya Yehova, meká kokanisa bandeko ya lisangá na bino. Ezali na mibange to bandeko mosusu oyo bazali na mposa ya lisungi? Okoki kosalisa bango na misala ya ndako? Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma boye: “Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino. Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Baloma 12:10) Soki omoni ete ezali na ndeko moko oyo azali na mposa ya lisalisi, sɛngá ye ete osalisa ye. Ndimá kosala ata misala ya mike. Mpe kobosana te ete kosalela basusu elimboli mpe kosalela Nzambe. Biblia elobi boye: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali [kodefisa Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.”—Masese 19:17.
Nzokande, lisalisi eleki monene oyo okoki kopesa basusu ezali ya koyebisa bango makambo oyo oyekoli na Biblia. Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Lelo oyo, koleka bileko mosusu nyonso, bato basengeli koyoka nsango ya lobiko oyo euti na Biblia. Yango wana, kobá kosakola na molende, zalá na elikya ete ‘mosala na yo ya makasi ezali mpamba te.’—1 Bakolinti 15:58.
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tozalaka na botɔndi mingi mpo na makabo oyo bandeko bapesi mpo na kosalisa bato oyo bazwi likama. Kasi, ezali malamu kotya makabo yango na kɛsi mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mpamba te ntango mposa ya lisalisi ebimaka tozwaka mbongo na kɛsi yango.
MITUNA YA KOMANYOLA
◼ Ezali na moto moko oyo okoki kosalisa?
◼ Osengeli kosala nini mpo na kosalisa bato?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]
“Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.”—Baebele 13:16
[Etanda/Bililingi na lokasa 24]
MPO NA NINI KOYEKOLA KOPESA?
“Ntango nazalaki komona baboti na ngai bazali kopesa ntango mpe makasi na bango mpo na kosalela Yehova mpe kosalisa bazalani na bango, etindaki ngai mpe nasala lokola bango. Tata na ngai ayebisaki ngai boye: ‘Nyonso oyo okosalela Yehova, ekotikala seko ata soki ezali moke ndenge nini. Yehova azali seko na seko, mpe akobosana yango te mpo na libela. Kasi, soki na bomoi na yo ozali koluka kaka bolamu na yo moko, yango ezali mosala ya mpunda. Mpo soki kaka okufi, nyonso oyo osalaki ekei na mai.’”—Kentaro, mbula 24, Japon.
“Lokuta mabe, kokende epai ya mobange moko mokolo ya pɔsɔ nsima ya midi, mpo na kosalisa ye na mwa misala ya ndako ezalaki mpenza kosepelisa ngai te. Nazalaki nde kolinga kosakana ná baninga. Nzokande, ntango nalekisaki ntango na mibange, nasepelaki mpenza. Yango esalisaki ngai nayeba ete bango mpe bazali bato lokola ngai, bango mpe bazalaká bilenge. Yango epesaki ngai mposa ya kosalisaka bango.”—John, mbula 27, Angleterre.
“Ntango nazalaki elenge, nazalaki kopesa mabɔkɔ na kosukola Ndako ya Bokonzi mpe misala mosusu. Nazalaki mpe kosepela kosalela bandeko mosusu na lisangá mwa misala. Kosalisa basusu esalaka ete básepela. Na ndakisa, mokolo moko nakendaki ná bilenge mosusu kotya bapapye oyo bakangisaka na bifelo na ndako ya ndeko mwasi moko oyo azali mobange. Asepelaki mpenza! Ntango osali likambo moko oyo esepelisi moto, ekosala ete yo moko mpe ozala na esengo.”—Hermann, mbula 23, France.
[Elilingi na lokasa 24]
Bilenge mingi bapesaka mbongo mpo na kosalisa bato oyo bazwi likama