Nkɔngi—Ndɛkɛ oyo etambolaka mokili mobimba
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ESPAGNE
KANISÁ ete okei na nɔrdi mpenza ya mabelé kolekisa sanza mibale na eleko ya molunge, ntango oyo kuna moi elalaka te. Kasi, wana eleko ya mpiɔ ezali kobɛlɛma osali mobembo mosusu mpo na kokende na Amerika ya Sudi, na Australie, to mpe na Afrika ya Sudi. Mpe na basanza mosusu ozali kaka kotambolatambola, kokende pembenipembeni ya mbu na kɔntina mokomoko mpo na koluka bilei oyo olingaka mingi. Yango nde bomoi ya ndɛkɛ oyo babengi nkɔngi.
Nkɔngi ezali ndɛkɛ oyo elingaka mingi koluka bilei na mai oyo ezali mozindo te.a Na eleko ya mpiɔ na mikili ya nɔrdi, ndɛkɛ yango ezalaka ebele na bisika oyo mai ezali mingi te, na mabongo, na bisika ya pɔtɔpɔtɔ, to na mabanga oyo ezali pembeni ya mabongo, na bisika oyo bato bakómaka mpenza te. Na eleko ya molunge, ntango baturiste batondanaka na mabongo, nkɔngi ekimaka na mikili ya arctiques mpe mikili mosusu oyo ezali pembeni, epai eleko ya molunge oyo ezalaka mokuse epesaka bango libaku ya kozala bango moko mpe kozwa bilei mingi mpo na kobɔkɔla bana na bango.
Nsala ya nkɔngi ezalaka mpenza na langi ya kitoko te; kasi bato mingi basepelaka na ndenge oyo bandɛkɛ yango epumbwaka mpe matɔnɔ oyo ezalaka na mapapu na yango. Buku moko (Shorebirds—Beautiful Beachcombers) elobi boye: “Ndɛkɛ yango ekoki kopumbwa likolólikoló ya mai to kopumbwa likoló mpenza na kilomɛtrɛ 6 to mpe koleka.”
Liboke moko mpo na komibatela
Mbala mingi nkɔngi esanganaka ebele epai bilei ezali. Emonani ete bandɛkɛ yango balingaka kosangana mpo na komibatela. Bandɛkɛ oyo elyaka misuni, na ndakisa kombekombe oyo babengaka faucon pèlerin, elukaka kokanga ndɛkɛ oyo ezali kaka yango moko; lokola nkɔngi elingaka kozala mingi esika moko, kombekombe ebangaka. Lokola bazalaka ebele bamonaka noki ntango ndɛkɛ moko oyo elyaka misuni elingi kokanga moninga na bango. Mpo na kozala na libateli yango, nkɔngi mingi ya ndenge na ndenge esanganaka esika moko.
Na ntango bandɛkɛ yango bazali kopumbwa ebele, ezalaka kitoko mpo na kotala. Bazalaka nkama ntango mosusu mpe bankóto bakangani esika moko wana bazali kopumbwa elongo, kobalukabaluka, komata mpe kokita, ezalaka lokola nde lobɔkɔ moko ezali kotambwisa bango nyonso. Buku moko (Handbook of the Birds of the World) elobi boye: “Ezali mpenza likamwisi na komona ndenge bankóto ya bandɛkɛ yango epumbwaka elongo na mbangu makasi mpe ezalaka na likoki ya kobaluka, komata to kokita yango nyonso nzela moko.” Ntango bato ya mayele bayekolaki lolenge ya kopumbwa ya nkɔngi oyo babengi bécasseaux variables, bamonaki ete ndɛkɛ moko akoki kobanda, na ndakisa kobaluka mpe ndɛkɛ nyonso ya etuluku yango ekolanda nokinoki ndenge ndɛkɛ yango esali.
Bakoki kotambola mokili mobimba
Nkɔngi mosusu etambolaka mpenza mokili mobimba. Na ndakisa, nkɔngi oyo babengi bécasseaux maubèches mpe oyo babengi bécasseaux sanderlings, yango ebotanaka mingi na nsuka mpenza ya mikili ya nɔrdi. Nkɔngi ekoki komonana na mabongo nyonso ya mokili mpe ekoki kosala kilomɛtrɛ 32 000 na mobembo oyo basalaka mbula na mbula.
Mibembo mosusu ya nkɔngi esɛngaka kokatisa bitando minene ya mai; atako bongo, nkɔngi ebɛtaka mai te mpe etɛlɛmaka likoló ya mai te mpo na kopema. Yango wana, ndenge moko na avion ya monene oyo esɛngaka kotya yango esansi mingi (40 % ya kilo na yango nyonso), nkɔngi mpe esengelaka na “esansi” koleka kutu avion yango. Ezwaka esansi yango wapi?
David Attenborough alimboli boye na buku moko (The Life of Birds): “Esansi ya nkɔngi ezali mafuta mpe bilei oyo elyaka na lokoso na bisika ya pɔtɔpɔtɔ na mabongo; yango esalaka ete nsima ya mwa bapɔsɔ nkɔngi ekóma monene mbala mibale koleka ndenge ezalaki liboso. Mafuta yango ezalaka mingi koleka ndenge oyo tokoki kokanisa, mpo biteni mingi ya nzoto ya nkɔngi, na ndakisa bɔɔngɔ, misɔpɔ eyaka lisusu monene mpo na kokoka kokumba mafuta wana nyonso oyo nkɔngi ebombaka na nzoto.”
Nkɔngi oyo babengi pluvier fauve, ekamwisaka mpenza mpo na mobembo oyo esalaka; elongwaka na mokili ya Alaska tii na Bisanga Hawaii. Epumbwaka kilomɛtrɛ 4 500 kozanga kopema, longola yango likoki oyo ezalaka na yango ya koyeba epai Hawaii ezali ata na katikati ya mbu ezalaka mpenza likambo ya kokamwa. Bato ya mayele balandaki mobembo ya nkɔngi moko mpe bamonaki ete asalaki ata mikolo minei te mpo na kosala mobembo yango. Nkɔngi mosusu ya mobange asalaki mobembo yango ya kouta na mokili ya Alaska tii na Bisanga Hawaii, kokende kozonga, mbala koleka 20.
Ntango bandɛkɛ yango bakómi na esika bakobotana, na nɔrdi mpenza ya mabelé, bapemaka te. Na boumeli ya pɔsɔ mibale kaka basengeli koluka molongani, kozwa esika ya kofanda, mpe kotonga zala. Na nsima, bazalaka na pɔsɔ soki misato mpo na kofandela makei na bango mpe pɔsɔ mosusu misato mpo na kobɔkɔla bana na bango. Na nsuka ya sanza ya Yuli, bazongaka lisusu na mikili ya sudi.
Makama ya mobembo
Nkɔngi ekutanaka na makama mingi na mibembo milai oyo esalaka. Likama ya libosoliboso eutaka na bato. Na siɛklɛ ya 19, John Audubon, moto oyo azalaki koyekola bikelamu ya mokili, amonisaki ete etuluku moko ya babomi-ndɛkɛ babomaki nkɔngi oyo babengi pluvier fauve 48 000 na mokolo moko. Lelo oyo, ndɛkɛ yango ebotani lisusu mingi, kasi motángo na yango ezali kaka moke soki tokokanisi yango na oyo ebomamaki na mokolo wana.
Likama ya monene mpo na nkɔngi ezali kolimwa ya bisika ya pɔtɔpɔtɔ. Ndɛkɛ yango ezali kokoka komesana na likambo wana te. Buku moko (Shorebirds—An Identification Guide to the Waders of the World) elobi boye: “Esɛngaki bambula mingi mpo nkɔngi emesana na bomoi na yango ya kobotana, kosala mibembo mpe koyeba esika ya kokende na eleko ya mpiɔ, nzokande moto azali kobebisa yango kozanga mpasi.” Soki bisika mingi oyo nkɔngi ekendaka kofanda ebatelami malamu, nkɔngi mingi ekotikala na bomoi.
Esika ya liboso ezali Baie de la Delaware oyo ezali pembenipembeni ya bokula ya sudi-wɛsti ya etúká ya New Jersey, na États-Unis. Kuna, nkɔngi oyo babengi bécasseaux maubèches ekendaka mingi mpo na kolya makei ya nyama oyo babengi limules. Ndɛkɛ yango ezalaka na nzala makasi, mpamba te eutaka kosala “mobembo ya molai koleka kozanga kopema.” Na boumeli ya pɔsɔ mibale bapumbwaka kilomɛtrɛ 8 000 longwa na sudi-ɛsti ya Brésil, mpo na kokóma na esika yango; mpe na mobembo yango babungisaka katikati ya kilo oyo bazalaki na yango liboso ya mobembo.
Milende oyo bato oyo babatelaka banyama bazali kosala ekoki kosalisa mpo na kobatela ndɛkɛ yango. Ntango mosusu na mboka na bino ezali na esika moko ya bongo epai ndɛkɛ yango ezali kobatelama. Soki ozwi libaku ya kotala ntango nkɔngi ezali kopumbwa elongo, ezali kobalukabaluka na mapata to oyoki yango ntango ezali koyemba, okobosana yango te.
Ndenge Arthur Morris, moto moko oyo ayekolaka bikelamu akomaki, “bato nyonso oyo balingaka ndɛkɛ yango bazalaka na likambo moko oyo basepelaka na yango na ndɛkɛ yango: mokomoko asilá kotɛlɛma mbala mingi na libongo to na bisika oyo ezali na mwa mai mpo na kotala liboke ya nkɔngi ezali kopumbwa mpe kobalukabaluka. Mpe mbala nyonso oyo moto amonaka yango atikalaka monɔkɔ polele.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkɔngi to ndɛkɛ ya libongo ezali mitindo koleka 200.
[Etanda/Bililingi na lokasa 18]
Basali-mibembo oyo balɛmbaka te
Bécasseaux maubèches nde nkɔngi oyo asalaka mobembo molai koleka. Baoyo babotanaka na nɔrdi ya Canada, mbala mingi na ntango ya mpiɔ, bakendaka na Mpoto ya Wɛsti to na Amerika ya Sudi (kilomɛtrɛ koleka 10 000)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
KK Hui
Na Pays-Bas mpe na Mauritanie, bamonaki milio moko ya nkɔngi oyo babengi bécasseaux variables, ezali kopumbwa elongo
Nkɔngi oyo babengi barges rousses esalaka mobembo longwa na Sibérie, epai ebotanaka, tii na Angleterre, na Afrika ya Sudi, na Proche-Orient, na Australie, na Nouvelle-Zélande
Nkɔngi oyo babengi bécasseaux sanderlings emonanaka na mabongo nyonso ya mokili. Misusu ebotanaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 950 longwa na nɔrdi mpenza ya mokili
[Bililingi na lokasa 17]
Mpo na kokatisa bitando minene ya mai ya mbu, nkɔngi esengeli kozala na mafuta mingi na nzoto, mpamba te epemaka te likoló ya mai
[Elilingi na lokasa 17]
Nkɔngi ezalaka liboke moko mpo na libateli
[Elilingi na lokasa 17]
“Huîtrier pie”
[Elilingi na lokasa 17]
“Chevalier arlequin” ezali koluka bilei na esika ya pɔtɔpɔtɔ
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]
Bafɔtɔ ya bandɛkɛ ebele na likoló mpe na nse: © Richard Crossley/VIREO