Makambo mazali koleka na mokili
◼ Mbula oyo eleki ezalaki “mbula oyo molunge elekaki makasi na mikili ya nɔrdi ya mabelé” mpe “mbula ya mibale oyo molunge elekaki makasi na mokili mobimba.” “Na kati ya mbula 10 oyo molunge elekaki makasi, mwambe ezalaki na kati ya mbula zomi oyo eleki.”—BBC NEWS, GRANDE-BRETAGNE.
◼ Mipɛpɛ makasi oyo ebɛtaki na mbu ya Atlantique na mobu 2005 ezalaki mipɛpɛ “oyo elekaki makasi” mpe “oyo ebebisaki biloko mingi koleka.” Soki tokamati mbala 14 oyo mopɛpɛ ebɛtaki makasi, mbala 7 mipɛpɛ yango ezalaki na mbangu ya kilomɛtrɛ 177 na ngonga moko.—U.S. NATIONAL OCEANIC AND ATMOSPHERIC ADMINISTRATION.
◼ “Na 1850, na Glacier National Park, na etúká ya Montana, na États-Unis, maboke minene ya ngalasi ezalaki 150. Lelo oyo etikali kaka maboke 27.”—THE WALL STREET JOURNAL, ÉTATS-UNIS.
◼ “Ezali na ekólo moko te oyo ekondima kobebisa nkita na yango mpo na koluka kosilisa mokakatano ya kobakisama ya molunge na mokili.”—TONY BLAIR, MINISTRE-MOKONZI YA ANGLETERRE.
Bakatolike bakokende “ndako na ndako”?
Cláudio Hummes, episkɔpɔ-mokonzi ya São Paulo, alobaki ete motángo ya Bakatolike ekiti mpenza na Brésil na boumeli ya bambula koleka 14 oyo eleki. Episkɔpɔ-mokonzi yango amonisi ete yango ezali mpo lingomba “ezali kokoka te koteya malamumalamu nsango malamu epai ya bandimi na yango.” Alobi lisusu boye: “Tosengeli kozela te ete bandimi báya na baparwasi, biso nde tosengeli kokende ndako na ndako, na biteyelo, na balopitalo, to mpe na ba iniversite mpe bongo na bongo.” Zulunalo moko (Folha Online), elobi ete ezali bandimi oyo bazali kozwa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ nde bakosala mosala yango. Mokakatano monene oyo Lingomba ya Katolike ezali na yango na Brésil mpe na mikili mosusu ya Amérique latine ezali ete basango bazali lisusu mingi te.
Lingomba ya Batatoli endimami na mibeko ya Leta na Allemagne
Na mokolo ya 10 Febwali 2006, tribinale moko (cour administrative fédérale) ya engumba Leipzig, na Allemagne, ekataki ete etúká ya Berlin esengeli kondima Lingomba ya Batatoli ya Yehova. Ekateli yango esukisaki kosamba oyo eumelaki mbula 15 liboso ya batribinale ndenge na ndenge ya Allemagne ata mpe tribinale monene (cour constitutionelle fédérale). Ekateli yango esali ete Lingomba ya Batatoli ya Yehova na Allemagne etalelama lokola mangomba mosusu nyonso ya minene na makambo etali kofuta mpako mpe matomba mosusu oyo Leta apesaka mangomba.
Bilenge ya chine bakómi baombo ya masano ya Internet
Zulunalo moko ya Hong Kong (South China Morning Post) elobi boye: “Bilenge mingi ya Chine bakómi baombo ya masano na Internet.” Likambo yango ezali mpe komonana epai ya bilenge ya mikili mosusu ya Azia, na ndakisa, na Hong Kong, na Japon, mpe na Corée. Zulunalo yango elobi boye: “Mposa oyo bilenge bakómi na yango ya kokɔta na Internet mpe kobɛta masano yango mpo na kobosana makambo mosusu nyonso ezali komonisa ete bazali kokima makambo nyonso oyo mokili ezali kopusa bango básala; na ndakisa baboti bazali kosɛnga bango makambo mingi mpe kowelana na biteyelo mpo na kokɔta na iniversite.” Na Chine, pene na bilenge milio motoba bazali na mposa ya lisalisi mpo na kolonga ezaleli yango.