Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/07 nk. 26-27
  • Kondima ya mwana moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima ya mwana moko
  • Lamuká!—2007
  • Masolo mosusu
  • Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Mexique
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mpo na nini nasengeli kobɛla boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Tiká “akokisa mokano na yo mobimba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Nazali na bomoi ya mpasi
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 1/07 nk. 26-27

Kondima ya mwana moko

MWASI moko akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova; mikolo mosusu, mwana na ye Dustin azalaki mpe kofanda mpo na koyoka. Atako Dustin azalaki kaka na mbula 11 na ntango wana, azalaki na mayele mingi mpe azalaki kotuna mituna mingi. Mwa moke na nsima, asɛngaki abanda koyekola ná ndeko oyo ayekolaki Biblia ná mama na ye. Akómaki mpe koyebisa baninga na ye ya kelasi makambo oyo azalaki koyekola na Biblia.

Dustin akómaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi mpe kopesa biyano. Soki ye ná baleki na ye bakei kotala tata na bango, tata na bango azalaki koyebisa bango bákende na ndako-nzambe. Dustin alimbwelaki ye ntina oyo ye azalaki kosepela kokende na Ndako ya Bokonzi. Tata na ye andimaki mpe apesaki ye nzela akendaka makita na Ndako ya Bokonzi.

Mokolo moko, nsima ya makita, mama ya Dustin azalaki komona ye te; nzokande, kozanga ete ayebisa ye, Dustin akendaki kosolola na mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ayebisaki ye ete alingi kokomisa nkombo na Eteyelo. Ntango mokɛngɛli asololaki na mama ya Dustin, andimaki ete mwana na ye akomisa nkombo. Dustin azalaki kozela na mposa makasi mokolo oyo akosala lisolo na ye ya liboso. Kasi, kaka na mikolo yango, akómaki koyoka mpasi makasi na loketo, mpe bamemaki ye epai ya minganga ndenge na ndenge. Nsukansuka, mokolo oyo Dustin asengelaki kosala lisolo na ye ya liboso na Ndako ya Bokonzi ekokaki. Na ntango wana, akómaki kotambola na banzete. Moto nyonso akokaki komona ete Dustin azali koyoka mpasi makasi; atako bongo, aboyaki komata na banzete yango na estrade.

Mwa moke na nsima, minganga bayaki komona ete Dustin azalaki na maladi ya kanser ya mikuwa. Na mbula oyo elandaki, alekisaki basanza mingi na lopitalo ya bana na engumba San Diego, na etúká ya Californie, na États-Unis. Kuna, minganga bapesaki ye bankisi mpe basalelaki batekiniki ndenge na ndenge mpo na kosalisa ye, kasi esimbaki te, mpe nsukansuka bakataki ye lokolo ya mobali mpe mokuwa ya loketo; atako bongo, kondima na ye mpe bolingo na ye mpo na Yehova ekitaki te. Ntango azalaki lisusu na makasi ya kotánga ye moko te, mama na ye, oyo azalaki ntango nyonso pene na ye, azalaki kotángela ye na mongongo makasi.

Atako maladi na ye ezalaki se kokóma makasi, Dustin azalaki komilelalela te. Azalaki kozanga likambo ya kosala te; azalaki kotambola na velo na ye ya bibɔsɔnɔ mpo na kolendisa bana mosusu ya maladi ná baboti na bango, ata mpe Motatoli moko oyo azalaki maladi. Basali nyonso ya lopitalo yango bamonaki ete bilenge yango mibale bakesanaki na bato mosusu ya maladi mpamba te kondima na bango ezalaki kopesa bango makasi.

Dustin alingaki kozwa batisimo. Lokola azalaki na makasi ya kofanda te, alalaki na kiti ntango bankulutu batalelaki na ye mituna mpo na kozwa batisimo. Na mokolo ya 16 Ɔkɔtɔbɛ 2004, Dustin azwaki batisimo na liyangani moko ya zongazonga, wana azalaki na mbula 12 na ndambo.

Liboso lisukulu ya batisimo ebanda, bapusaki velo ya Dustin na esika oyo bakandida mosusu ya batisimo bafandaki. Ntango basɛngaki na bakandida bátɛlɛma, Dustin atɛlɛmaki na lokolo moko, mpe asimbaki kiti na ye mpo akwea te. Alataki kazaka na ye ya kitoko, ayanolaki na mongongo makasi mpe na maloba ya polele na mituna ya batisimo. Libota mobimba ya Dustin bazalaki wana, ata mpe tata na ye ná mwasi ya tata na ye. Minganga mpe baboti ya bana mosusu oyo bazalaki kobɛla kanser na lopitalo yango bazalaki mpe wana.

Na mokolo oyo elandaki, Dustin azongaki na lopitalo. Maladi yango ya kanser epanzanaki na mikuwa nyonso ya nzoto na ye. Ntango makasi na ye ekómaki kosila mpe amonaki ete akobika te, atunaki mama na ye soki akokufa. Mama na ye alobaki na ye, “Mpo na nini otuni bongo, ozali kobanga kokufa?”

Alobaki na mama na ye ete: “Nazali kobanga te. Nakokanga kaka miso, mpe na lisekwa ntango nakofungola yango ekozala lokola nde nauti kokanga yango kaka sikoyo. Nakoyoka lisusu mpasi te.” Na nsima, ayebisaki mama na ye ete “Nazali nde koyokela bino mawa.”

Dustin akufaki na sanza oyo elandaki. Minganga mpe bato mosusu oyo basalaka na lopitalo yango ná mabota na bango, balakisi, baninga ya kartye mpe bandeko nyonso ya Dustin, ezala baoyo bazali Batatoli ya Yehova to te, bango nyonso bayaki na ebembe na ye. Ntango Dustin azalaki naino na bomoi, asɛngaki ete bato nyonso oyo bakoya na liwa na ye báyoka mateya oyo ye azalaki kondima. Mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo azwaki libaku ya kopesa Dustin lisolo kaka moko, asalaki lisukulu moko oyo elendisaki mpenza kondima ya ebele ya bato oyo bazalaki wana; mpe bato mingi balandaki lisukulu yango ya kotɛlɛma mpo bisika ya kofanda ekokaki te mpo na bato nyonso.

Bapesaki epai ya bato nyonso oyo bayaki kolanda lisukulu, papye moko oyo bakomaki bavɛrsɛ mibale oyo Dustin azalaki kolinga mingi: Matai 24:14 mpe 2 Timote 4:7. Kondima makasi oyo Dustin azalaki na yango mpe bosembo na ye elendisaki bato nyonso oyo bayebaki ye. Tozali kozela koyamba ye ntango akosekwa.​—Ekomami na ndeko mwasi oyo ayekolaki Biblia na Dustin.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]

“Nasili kobunda etumba ya malamu mingi, nasili kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka, nabateli kondima.”​—2 Timote 4:7

[Elilingi na lokasa 26]

Na likoló: Dustin, ntango azalaki naino nzoto kolɔngɔnɔ

[Elilingi na lokasa 26]

Na nse: Dustin azali kozwa batisimo; na mbula 12 na ndambo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto