Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 4 nk. 12-13
  • Mobembo moko na Kirghizstan

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Kirghizstan
  • Lamuká!—2016
Lamuká!—2016
g16 No. 4 nk. 12-13
Yourtes na lobwaku ya Tash Rabat na Kirghizstan

Mwa bandako oyo babengi yourtes na lobwaku ya Tash Rabat

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Kirghizstan

Karte ya Kirghizstan

KIRGHIZSTAN ezali ekólo oyo ezwami na Azia ya ntei mpe ezingami na bangomba oyo ezipamá na baglasi; ekaboli ndelo ná Kazakhstan, Ouzbékistan, Tadjikistan mpe Chine. Eteni monene ya mboka yango (90 %) ezali bangomba. Ngomba oyo eleki molai (mɛtrɛ 7 439) na bangomba ya Tianshan na kotalela nivo ya mbu, ezali nde na Kirghizstan. Mwa eteni ya mabele ya ekólo yango (4 %) ezali zamba. Simbá ete na bazamba nyonso ya mokili, banzete oyo ebotaka ndika ebotaka mingi nde na zamba ya Kirghizstan.

Motatoli ya Yehova azali koyekola na mwasi moko Biblia na Kirghizstan

Batatoli ya Yehova bazali koteya ebele ya bato Biblia na Kirghizstan

Bato ya ekólo yango bayebani na bizaleli lokola koyamba bapaya mpe limemya. Na Kirghizstan, ezalaka mabe te kosalela liloba “bino” ntango ozali kosolola na mokóló mpe olingi otikela ye esika ya kofanda na bisi ata mpe kiti ya malamu na mesa.

Na libota, bana bazalaka mingimingi misato to koleka. Mbala mingi, mwana-mobali ya nsuka afandaka na baboti ata nsima ya kobala mpo na kobatela bango ntango bakómi mibange.

Balakisaka bilenge basi ndenge ya kobongisa ndako ntango bazali naino bana mike. Soki bakokisi mbula soki 15, bayebaka mpenza misala ya ndako. Mbala mingi babongisaka biloko ya libala mpo na mwana-mwasi. Biloko yango ekoki kozala bolangiti ya ndenge nyonso, bilamba ya ndenge na ndenge mpe tapi oyo basali na mabɔkɔ. Mobali apesaka mbongo ya libala mpe bibwɛlɛ.

Na milulu wana, babomaka mpate to mpunda. Na matánga mpe basalaka bongo. Bakataka nyama yango bitenibiteni mpe eteni mokomoko ezali na moto oyo akolya yango. Bapesaka yango na kotalela mbula to lokumu oyo moto azali na yango; basalaka bongo mpo na komonisa limemya. Na nsima bakabolaka elubu ya mboka yango oyo babengi beshbarmak. Balyaka yango na mabɔkɔ.

Elenge mobali moko azali kobɛta komuz

Komuz ezali ebɛtɛli ya miziki oyo eyebani mingi

NA MOKUSE

Biblia eteyaka mpenza nini?

Buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na monɔkɔ ya Kirghiz mpe ezali na Internet na www.pr418.com

  • Motángo ya bato: 5 776 000

  • Mboka-mokonzi: Bichkek

  • Minɔkɔ: Kirghiz, Russe

  • Biloko oyo ekólo yango ebimisaka: Coton, lɛnɛ, wolo, mercure, uranium

  • Lingomba: Mizilma (80 %)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto