Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g17 No. 2 nk. 12-13
  • Mobembo moko na Espagne

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Espagne
  • Lamuká!—2017
Lamuká!—2017
g17 No. 2 nk. 12-13
Toledo, engumba ya Espagne oyo baturiste mingi bakendaka kotala

Istware mpe mimeseno ya Espagne efandi nde na Tolède. Na 1986 bakómaki kotánga yango na kati ya biloko ya motuya na mokili mpe baturiste bakendaka mingi kuna

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Espagne

Espagne na karte

ESPAGNE ezali ekólo oyo ezali na makambo ndenge na ndenge, ezala mokili yango moko to bato. Eteni monene ya mabele na yango ezali na bilanga ya blé, ya vinyo mpe banzete ya olive. Na sudi, kaka bakilomɛtrɛ soki 14 ya mai nde ekaboli yango na Afrika.

Bato mingi, na ndakisa bato ya Fenisia, Bagrɛki mpe bato ya Carthage bakendaká kofanda na ekólo yango oyo ezali na sudi-wɛsti ya Mpoto. Ntango Baroma bazwaki mboka yango na siɛklɛ ya misato liboso ya ntango na biso, babengaki yango Hispania. Na nsima, Ba-Wisighoth ná Ba-Maure bayangelaká mpe mboka yango mpe mimeseno na bango etikalá kuna.

Na mbula moko oyo euti koleka, bato koleka milio 68 bakendaki Espagne. Mingi na bango bakendaki kuna mpo na kotala kongɛnga ya moi, bisika ya kitoko oyo ezalaka pembenipembeni ya ebale (plage) mpe bandako na yango ya kala oyo etongamá kitoko mpenza. Bapaya mingi basepelaka na bilubu ya Espagne. Na restora, na mwa mbongo moke bakoki kotyela yo mbisi, jambɔ, ndunda balambá ná misuni, salade mpe ndunda balambá to batyá yango mafuta ya olive. Maki bakalingá, paella mpe tapas ya Espagne, ekendá nsango mokili mobimba.

Mariscada, elubu moko ya mbisi oyo bato ya Espagne balambaka

Mariscada ezali elubu ya mbisi

Bato mibale oyo bazali kobina mabina ya flamenco

Mabina babengi flamenco

Bato ya Espagne bazalaka nsɔninsɔni te mpe na boboto. Atako mingi na bango balobaka ete bazali bandimi ya lingomba ya Katolike, kasi kaka bato moke nde bakendaka misa. Na bambula oyo euti koleka bato bautaki na Afrika, Azia mpe na Amérique Latine mpe bakendaki kofanda na Espagne. Mingi na bango basepelaka kolobela mateya ya lingomba mpe mimeseno na bango. Batatoli ya Yehova basololaki na bango mpe basalisaki bango báyeba makambo mingi oyo Biblia eteyaka.

Na 2015, Batatoli ya Yehova koleka 10 500 bapesaki mabɔkɔ na kotonga mpe kobongisa bandako 70 ya losambo, babengaka yango bandako ya Bokonzi. Leta epesaki bango mabele ofele mpo na kotonga bandako yango mosusu. Longola monɔkɔ ya Espagnole, Batatoli ya Yehova basalaka mpe losambo na bango na minɔkɔ koleka 30 mpo na kosalisa bapaya. Na 2016, bato koleka 186 000 bayanganaki na molulu ya ntina mingi oyo Batatoli ya Yehova basalaki mpo na kokanisa liwa ya Yesu Kristo.

OYEBAKI YANGO?

Espagne esalaka mafuta ya olive koleka bikólo nyonso na mokili.

Ngomba Teide ezali na molai ya bamɛtrɛ 3 718 ezalaka na bisanga ya Canaries, ezali ngomba oyo eleki molai na Espagne. Soki bazwi yango mezire kobanda na nse tii likoló, ezali volcan ya misato oyo eleki molai na mokili.

  • MINƆKƆ OYO ELOBAMAKA MINGI: ESPAGNOLE, BASQUE, CATALAN, GALICIEN, MPE VALENCIEN

  • BATO: 46 439 000

  • MBOKA-MOKONZI: MADRID

  • KLIMA: NTANGO MOSUSU MOLUNGE MAKASI TO MALILI MAKASI

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto