Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Janvier nk. 26-31
  • Lobeláká solo na maloba kitoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lobeláká solo na maloba kitoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • EPAI WAPI TOKOKI KOZWA SOLO?
  • NTINA OYO TOLOBAKA SOLO
  • NDENGE YA KOLOBA SOLO
  • NTANGO YA KOLOBA SOLO
  • Oyebaka kokesenisa solo na lokuta?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Janvier nk. 26-31

30/03–05/04/2026

LOYEMBO 76 Oyokaka nini?

Lobeláká solo na maloba kitoko

“Yehova, Nzambe oyo alobaka solo.”—NZ. 31:5.

NA MOKUSE

Ndenge ya koyebisa basusu solo na ndenge oyo ekosalisa mpenza.

1. Tosengeli kosala nini mpo tózala na kati ya libota ya Yehova?

NTANGO tokutani mbala ya liboso na mosaleli moko ya Yehova, mbala mingi totunaka ye: “Ndenge nini oyebaki solo?” Basusu bayanolaka ete “babɔkwamá na kati ya solo.” Basusu balobaka ete eumeli te banda “nayebi solo.” Topesaka biyano wana mpo solo ya Liloba ya Nzambe nde etambwisaka bomoi na biso mobimba. Mpo na nini? Mpo toyebi ete tokozala na kati ya libota ya Yehova kaka soki tozali komonisa ete tolingaka mateya ya solo mpe tosalelaka yango na bomoi na biso. Yango esangisi kozala sembo na maloba mpe misala na biso.—Nz. 15:​1-3.

2. (a) Yesu ayebanaki lokola moto ya ndenge nini? (b) Yesu ayebaki ete mateya ya solo ekosala nini epai ya bato?

2 Yesu azalaki ntango nyonso koloba solo. Banguna na ye bayebaki ete alobaka na bosembo ata soki makambo oyo akoloba ekosepelisa bato nyonso te. (Mat. 22:16) Yesu amonisaki makambo oyo ekosalema mpo na solo oyo ateyaki; alobaki: “Nayaki kotya bokabwani, kati na mwana mobali ná tata na ye, mwana mwasi ná mama na ye, mpe mwasi ya libala ná mama-bokilo na ye.” (Mat. 10:35) Mposa ya Yesu ezalaki te ete bato báboya nsango oyo ye ná bayekoli na ye bazalaki kosakola, kasi ayebaki ete ekoki kosalema bongo. (Mat. 23:37) Ayebaki ete nsango na ye ekokabola mokili na bituluku mibale: baoyo bakolinga solo ya Biblia mpe baoyo bakolinga yango te.—2 Tes. 2:​9-11.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Ndenge moko na Yesu, tosalaka makasi tózala sembo, tólobaka ntango nyonso solo, ata soki bato mingi bakosepela na biso te. Lisusu tosakolaka mpe toteyaka solo ya Biblia, ata soki bato mosusu bakoki kosilika mpo na makambo oyo tolobi. Yango elingi nde koloba ete tosengeli kotya likebi te na lolenge na biso ya kolobela solo mpe ntango ya koloba yango? Ezali bongo te! Na lisolo oyo, tokoyanola liboso na motuna oyo: Epai wapi tokoki kozwa solo? Na nsima tokoyanola na motuna oyo: Mpo na nini, ndenge nini, mpe ntango nini tosengeli koloba solo? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tókolisa lisusu likoki na biso ya koyebisa basusu solo na maloba kitoko, elingi koloba, kozanga kobɛtisa bango libaku mpe na ntango oyo ebongi.

EPAI WAPI TOKOKI KOZWA SOLO?

4. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova nde Liziba ya solo?

4 Yehova nde Liziba ya solo. Makambo nyonso oyo alobaka ezali solo. Na ndakisa, makambo oyo alobi na oyo etali nini ezali malamu mpe nini ezali mabe ezali solo. (Nz. 19:9; 119:​142, 151) Makambo nyonso oyo alobi mpo na mikolo ezali koya ezali mpe solo. (Yis. 55:​10, 11) Akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Mit. 23:19) Kutu, akoki kobuka lokuta ata moke te! (Ebr. 6:18) Yango wana, Yehova abengami “Nzambe oyo alobaka solo.”—Nz. 31:5.

5. Mpo na nini ezali mpasi te kozwa to koyeba “Nzambe oyo alobaka solo”? Limbolá. (Misala 17:27)

5 Bato mosusu balobaka ete ezali mpasi koyeba Yehova, “Nzambe oyo alobaka solo,” kasi ezali bongo te. Biloko oyo akelá oyo ezali zingazinga na biso emonisi ete Yehova azali. (Rom. 1:20) Ntango ntoma Paulo alobaki na etuluku moko ya bato ya mayele ya Grɛki na Atene, alobaki ete Nzambe alingi bato “bázwa [to báyeba] ye” mpe ete “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Tángá Misala 17:27.) Kutu, Yehova abendaka epai na ye bato ya komikitisa oyo bazali koluka solo.—Yoa. 6:44.

6. Wapi mwa mateya ya solo oyo ezali na Biblia, mpe mpo na nini ozali na botɔndi ndenge oyebi mateya yango?

6 Lolenge moko oyo tokoki kozwa Yehova to koyeba ye ezali ya koyekola Biblia. Mibali oyo bakomaki buku yango basalaki yango na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. (2 Pe. 1:​20, 21) Na yango, makambo nyonso oyo ezali na kati ya Biblia ezali solo mpe ebongi tótyela yango motema. Na ndakisa, tokoki kotya motema ete makambo oyo Biblia elobi mpo na ndenge molɔ́ngɔ́ mpe bomoi na mabele ebandá ezali mpenza bongo. (Eba. 1:​1, 26) Tokoki kondima ndimbola oyo Biblia epesi mpo na ntina oyo biso nyonso tosalaka masumu, mpe ntina oyo mpasi ná liwa ezali na mokili. (Rom. 5:12; 6:23) Tokoki kotyela Biblia motema mobimba ntango elobi ete Yehova, na nzela ya Mwana na ye, akolongola mabe nyonso oyo Satana, “tata ya lokuta” abimisá. (Yoa. 8:44; Rom. 16:20) Mpe tokoki kondima elaka ya Biblia ete Yesu akoboma bato mabe, akosekwisa bakufi, akokómisa mabele paradiso, mpe akosalisa biso tókóma bato ya kokoka. (Yoa. 11:​25, 26; 1 Yoa. 3:8) Yehova apesi biso libaku malamu mpenza! Ateyi biso solo, mpe apesi biso libaku ya koteya yango bato mosusu.—Mat. 28:​19, 20.

NTINA OYO TOLOBAKA SOLO

7-8. Yehova atyaka likebi na ntina oyo tolobi solo? Pesá ndakisa. (Marko 3:​11, 12) (Talá mpe bililingi.)

7 Ndenge tomonaki yango liboso, tosengeli kolobaka solo soki tolingi kozala na kati ya libota ya Yehova. Kasi, mpo na kosepelisa ye, tosengeli kosuka kaka te na kolobaka na bosembo. Yehova atyaka likebi na ntina oyo tozali koloba solo. Tótalela likambo moko oyo esalemaki ntango Yesu azalaki awa na mabele. (Tángá Marko 3:​11, 12.) Mokolo moko ntango azalaki kosakola pene na Mbu ya Galile, ebele mpenza ya bato bayanganaki pene na ye. Kati na bango, bato mosusu oyo bazalaki na bademo bafukamaki liboso ya Yesu mpe bagangaki: “Ozali Mwana ya Nzambe.” Mpo na nini bademo yango balobaki likambo wana ya solo na oyo etali Yesu? Mbala mosusu mokano na bango ezalaki ete bato oyo bakoyoka bango bátyela bango motema, bongo na nsima bábenda bango mpo bátika kosalela Yehova. Bademo yango balobaki likambo ya solo, kasi bazalaki koluka nde litomba na bango moko. Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya moimi, mpe asepelaki na bango te. Kutu, apesaki bango mitindo ete básakola mpo na ye te.

8 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Yehova atyaka likebi na ntina oyo tozali koloba solo. Ebongi mpenza ete makanisi oyo etindi biso tóteya solo ezala malamu mpe soki bapesi biso nkembo, tóndima yango te, kasi tópesa yango epai ya Yehova!—Mat. 5:16; talá mpe Misala 14:​12-15.

Bililingi oyo emonisi makambo ekeseni oyo ndeko mwasi moko asali ntango azali koyekola Biblia na elenge mwasi moko. 1. Ndeko mwasi yango azali kolobela bomoi na ye moko mpe alalisi Biblia na mesa. 2. Ndeko mwasi yango afungoli Biblia mpe azali kolakisa moyekoli na ye vɛrsɛ.

Ntango oteyaka solo, obendaka likebi epai ya nani? (Talá paragrafe 7-8)


9. Likambo nini tosengeli koboya, mpe mpo na nini?

9 Tótalela libaku mosusu oyo tosengeli koboya koluka nkembo na biso moko. Kanisá ete ndeko moko oyo azali na mikumba ayebisi biso mwa makambo ya nkuku mpe na nsima toyebisi yango basusu. Soki bato oyo toyebisaki bayei komona ete makambo oyo toyebisaki bango ezali solo, bakoki kokamwa biso ete toyebaka makambo mpe bakoki kokanisa ete toyebi makambo mosusu mingi ya nkuku. Yango ekoki kosala ete bato bámona ete tozali na ntina mingi, kasi yango ekomatisa te lokumu na biso na miso ya Nzambe. (Mas. 11:13) Mpo na nini? Mpo tobimisaki makambo ya nkuku, mpe lisusu makanisi oyo etindaki biso tóloba solo ezalaki ya malamu te.

NDENGE YA KOLOBA SOLO

10. Maloba “kitoko” elakisi nini? (Bakolose 4:6)

10 Tángá Bakolose 4:6. Ntoma Paulo akundwelaki bakristo ya Kolose ete maloba na bango esengeli kozala “ntango nyonso kitoko.” Yango elakisi nini? Maloba ya Grɛki oyo esalelami na vɛrsɛ yango epesaka likanisi ete maloba na biso esengeli kaka te kosalisa moto oyo ayoki yango, kasi esengeli mpe kozala ya boboto mpe ya kosepelisa.

11-12. Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali koteya solo? Pesá ndakisa. (Talá mpe bililingi.)

11 Tosengeli kosalela toli ya Paulo ya kozala na maloba kitoko ntango tozali koteya basusu solo. Biblia yango moko ekokanisi mateya na yango na mopanga ya mino makasi oyo ekoki kokabola molimo ná elimo. Na maloba mosusu, ekoki komonisa mayoki mpe makanisi na biso ya kati mpenza. (Ebr. 4:12) Kasi soki tosaleli Biblia malamu te, tokoki kopesa moto mpasi mpe kobimisa kowelana kaka mpamba. Ndenge nini ekoki kosalema?

12 Kanisá likambo oyo. Na mosala ya kosakola, tokutani na mobali moko ya motema sembo oyo asambelaka bikeko, mpe tomoni ete asepelaka kosala fɛti ya Noele mpe ya Pasika elongo na libota na ye. Tokoki kosalela Biblia mpo na komonisa mobali yango ete ezali bozoba kosambela bikeko mpo ezangá bomoi mpe tokoki komonisa ye polele ete Noele ná Pasika ezali bafɛti ya bapakano. (Yis. 44:​14-20; 2 Ko. 6:​14-17) Kasi soki tosali bongo kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na ye, toyebisi ye solo, kasi tosaleli Liloba ya Nzambe malamu te.

Bililingi oyo emonisi makambo ekeseni oyo ndeko moko ná mwasi na ye basali ntango basololi na mobali moko oyo bato ya libota na ye bazali kobongisa nzete mpo na fɛti ya Noele na kati ya ndako. 1. Ndeko yango alakisi mobali yango lisolo oyo ezali na jw.org “Biblia elobi nini mpo na fɛti ya Noele?” Mobali yango akangi mabɔkɔ azali koyoka bango, akangi elongi. 2. Ndeko yango ná mwasi na ye bazali kolakisa mobali yango lisolo oyo ezali na jw.org “Ndenge ya kozala tata ya malamu.” Mobali yango azali koyoka mpe kosɛka mwa moke.

Ndenge nini okoki koteya solo na ndenge oyo ebongi? (Talá paragrafe 11-12)a


13. Ndenge nini tokoki koyeisa maloba na biso elɛngi na mungwa?

13 Paulo alobaki mpe ete tosengeli koyeisa makambo oyo tozali koloba elɛngi na mungwa. Alingaki koloba te ete tosengeli kobongola solo to kobomba yango. Kasi, azalaki kolendisa biso ete tósalelaka maloba oyo ‘eyeisami elɛngi na mungwa’ mpo tóteya solo na ndenge oyo ekosepelisa baoyo ‘bameki’ to bayoki yango. (Yobo 12:11) Kosala bongo ekoki kozala mpasi. Na oyo etali biloko ya kolya, mbala mingi tokanisaka ete basusu mpe bakosepela ete bilei na bango ezala na elɛngi oyo biso tolingaka. Ndenge moko mpe, tokoki kokanisa ete ndenge oyo tolobaka esepelisaka moto nyonso. Kasi ezali bongo te. Na ndakisa, na mimeseno ya bamboka mosusu, mbala mingi bato babimisaka makanisi na bango polelepolele, ata ntango bazali koloba na mikóló. Nzokande na mimeseno mosusu, bato bamonaka ete koloba bongo ezali mabe, to kutu emonanaka lokola kofinga. Paulo alobaki ete tosengeli koyeba ndenge oyo ‘tosengeli kopesa moto mokomoko eyano.’ Yango elimboli ete tosengeli koyeisa maloba na biso elɛngi na kolanda elobeli to mimeseno ya mboka na biso te, kasi na kolanda moto oyo akoyoka biso.

NTANGO YA KOLOBA SOLO

14. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ateyaki bayekoli na ye makambo nyonso oyo ayebaki? Limbolá.

14 Yesu azalaki ntango nyonso koloba na bayekoli na ye maloba kitoko, mpe ateyaki bango makambo mingi na boboto. (Mrk. 6:34) Kasi bazalaki naino na makambo mingi ya koyekola. Yesu alukaki te koteya bango makambo nyonso oyo ayebaki. Atalelaki makoki na bango. Amonaki ete ezalaki te ntango oyo ebongaki mpo na koteya bango makambo mosusu. Kutu, alobaki ete bakokoka kokanga ntina ya mateya yango te. (Yoa. 16:12) Yango ezali koteya biso nini?

15. Tosengeli koteya bayekoli ya Biblia makambo nyonso oyo toyebi na mbala moko? Limbolá. (Masese 25:11) (Talá mpe elilingi.)

15 Ndakisa ya Yesu emonisi ete lokola toyebi solo elakisi te ete tosengeli koteya moto na mbala moko makambo nyonso oyo toyebi. Ndenge nini tokoki komekola Yesu? Tosengeli kotalela makambo ya bomoi ya bato. Kanisá lisusu mobali oyo asepelaka kosala fɛti ya Noele mpe ya Pasika elongo na libota. Toyebi ete bafɛti yango euti na mimeseno ya bapakano mpe Nzambe andimaka yango te. Kasi kanisá ete obandi koyekola Biblia na mobali yango pɔsɔ moko to mibale liboso ya fɛti ya Noele. Maloba na biso ekozala mpenza kitoko soki tolakisi ye makambo oyo Biblia elobi mpo na bafɛti ya bapakano mpe tozali kozela ete atika mbala moko kosala fɛti ya Noele? Ya solo, bayekoli mosusu bakoki kosalela mbala moko makambo oyo bayekoli na Biblia. Kasi basusu bazalaka na mposa ya ntango mingi liboso bábongola makanisi mpe misala na bango. Tokoki kosalisa bayekoli na biso ya Biblia bákola na elimo soki tozali koyebisa bango makambo oyo basengeli koyeba na ntango oyo basengeli koyeba yango, elingi koloba, ntango oyo bakokoka kokanga ntina na yango.—Tángá Masese 25:11.

Ndeko mobali wana na mwasi na ye bazali koyekola mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” elongo na mobali yango na ndako na ye. Nzete ya Noele ezali pembeni wana.

Landá ndakisa ya Yesu mpo oyeba ntango ya koloba solo mpe makambo boni okoloba (Talá paragrafe 15)


16. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli na biso ya Biblia ‘bákoba kotambola na kati ya solo’?

16 Makambo moke kaka nde epesaka biso esengo lokola libaku ya kosalisa basusu báyeba solo oyo etali Yehova. Tokoki kosalisa bango ‘bákoba kotambola na kati ya solo’ soki tozali kosala likambo oyo: Tokobi kopesa bango ndakisa malamu. (3 Yoane 3, 4) Salá makasi mpo bomoi na yo emonisa ete ondimaka ete bilaka oyo ezali na Liloba ya Nzambe ekokokisama solo. Zalá na makanisi ya malamu ntango ozali koloba solo. Lobáká maloba ya kitoko, ya boboto, mpe ya elɛngi na ntango oyo ebongi ntango ozali koteya solo. Mpe soki bapesi yo lokumu, zongisá yango epai ya Yehova. Soki osali bongo, okomonisa ete ozali na libota ya Yehova, Nzambe oyo alobaka solo.

BAVƐRSƐ OYO ELANDI ETEYI YO NINI?

  • Misala 17:27

  • Bakolose 4:6

  • Masese 25:11

LOYEMBO 160 “Nsango malamu”!

a NDIMBOLA YA ELILINGI: Na elilingi ya liboso, ndeko mobali moko amoni nzete ya Noele na ndako ya moto mpe alakisi ye lisolo moko oyo emonisi ete fɛti ya Noele eutá na mimeseno ya bapakano. Na elilingi ya mibale, ndeko mobali yango azali kolakisa nkolo-ndako yango lisolo oyo ezali na batoli ya malamu mpo na batata. Wapi lolenge eleki malamu ya kosalisa nkolo-ndako yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto