LIKANISI MPO NA KOYEKOLA
Monáká na makanisi masolo ya Biblia
Biblia ezali na masolo ya bomoi ya bato ebele oyo ezali na mateya ya ntina. Soki tozali komeka komona na makanisi ndenge makambo elekaki, tokokanga ntina malamu ya makambo oyo tozali kotánga mpe ekosalisa biso. Tótalela mwa batoli oyo ekoki kosalisa yo omona na makanisi masolo ya Biblia.
Tángá na mongongo makasi. Kotánga Biblia na mongongo makasi ekoki kosalisa yo omona makambo yango polele lisusu mingi na makanisi. Ntango bozali kotánga Biblia na libota, moto na moto akoki kotánga maloba ya moto mokomoko oyo lisolo yango elobeli.
Kanisá ndenge makambo elekaki. Meká kokanga ntina ya makanisi mpe mayoki ya bato oyo lisolo elobeli. Na ndakisa, omituna: ‘Mpo na nini moto yango alobaki to asalaki likambo bongo? Nalingaki kokanisa to kosala nini soki ezalaki ngai?’
Salá bililingi to mayemi. Kosala bililingi to mayemi ya masolo ya Biblia ekoki kosalisa yo omona na makanisi masolo yango mpe obosana yango te, ata soki mayemi oyo okosala ekozala kitoko te.