Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 52
  • Bomoi ezali na ntina nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ezali na ntina nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Motuna 1: Bomoi na ngai ezali mpenza na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nini esalaka ete bomoi ezala mpenza na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 52

Bomoi ezali na ntina nini?

Eyano ya Biblia

Motuna oyo etali ntina ya bomoi ekoki kotunama na bandenge ebele, na ndakisa, Mpo na nini tozali awa na mabele? to Bomoi na ngai ezali na ntina nini? Biblia emonisi ete mpo bomoi na biso ezala na ntina tosengeli kozala baninga ya Nzambe. Talá mwa mateya minene oyo ezali Biblia.

  • Nzambe azali Mozalisi na biso. Biblia elobi ete Nzambe “nde asalaki biso, kasi biso moko te.”​—Nzembo 100:3; Emoniseli 4:11.

  • Eloko nyonso oyo Nzambe asalá, ata mpe biso bato, asalaki yango na ntina.​—Yisaya 45:18.

  • Nzambe asalá biso na mposa ya koyeba makambo na ye, ata mpe mposa ya koyeba ntina ya bomoi. (Matai 5:3) Mpe alingi ete tókokisa mposa yango.​—Nzembo 145:16.

  • Mpo tókokisa mposa na biso ya koyeba makambo ya Nzambe, tosengeli kokóma baninga na ye. Bato mosusu bakanisaka ete moto akoki kokóma moninga ya Nzambe te, nzokande Biblia elobi na biso ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8; 2:23.

  • Mpo tókóma baninga ya Nzambe, bomoi na biso esengeli koyokana na mokano na ye mpo na biso. Biblia elobeli mokano yango na Mosakoli 12:13 na maloba oyo: “Kumisá Nzambe, mpe tosá mibeko na ye, mpamba te ezali mpo na ntina yango nde tokelamaki.”​—Good News Translation.

  • Na mikolo ezali koya, Nzambe akolongola bampasi mpe akopesa bomoi ya seko na baninga na ye, elingi koloba baoyo bazali kosambela ye. Na ntango wana, tokosepela mpenza na makambo oyo Nzambe akanaki mpo na moto ntango akelaki ye.​—Nzembo 37:10, 11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto