Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwfq lisolo 34
  • Batatoli ya Yehova bazalaka na Biblia na bango moko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bazalaka na Biblia na bango moko?
  • Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolamá malamu?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
ijwfq lisolo 34
Moto moko azali kotánga Biblia

Batatoli ya Yehova bazalaka na Biblia na bango moko?

Batatoli ya Yehova basalelá mabongoli ndenge na ndenge na boyekoli na bango ya Biblia. Kasi, soki Biblia—​Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na monɔkɔ moko boye, tosepelaka mingimingi kosalela yango mpo esalelaka nkombo ya Nzambe, ebongolami malamu, mpe ezali polele.

  • Esaleli nkombo ya Nzambe. Babongoli mosusu ya Biblia bapesi nkolo-Biblia lokumu te. Na ndakisa, libongoli moko ya Biblia etángi nkombo ya bato 70 oyo bapesaki mabɔkɔ mpo na kobimisa yango. Kasi, etángi te nkombo ya nkolo Biblia—​Yehova Nzambe!

    Nzokande, Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi nkombo ya Nzambe na bisika mingi oyo nkombo yango ezalaki na makomi ya libosoliboso, atako etángi te nkombo ya babimisi na yango.

  • Ebongolami malamu. Mabongoli nyonso te nde ebongoli Biblia ndenge mpenza ekomamaki na ebandeli. Na ndakisa, libongoli moko ebongoli Matai 7:13 boye: “Bókɔta na porte ya moke, mpamba te porte ya lifelo ezali monene, mpe nzela oyo ememaka bato kuna ezali mpasi te.” Nzokande, makomi ya libosoliboso esaleli liloba “libebi,” kasi “lifelo” te. Mbala mosusu babongoli yango bakɔtisaki liloba “lifelo” mpo bakanisaki ete bato mabe bakonyokwama libela na libela na lifelo. Kasi Biblia elobaka bongo te. Na yango, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli yango boye: “Bókɔta na porte ya moke; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi.”

  • Ezali polele. Libongoli ya malamu esengeli kaka te kozala sikisiki kasi mpe polele, pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. Tózwa ndakisa. Na Baroma 12:11, ntoma Paulo asaleli maloba oyo elimboli mpenzampenza “na elimo oyo ezali kotoka.” Lokola na lingala maloba yango eyokani mpenza malamu te, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli yango na ndenge oyo ezali pɛtɛɛ mpo moto akanga ntina. Elobi ete bakristo basengeli ‘kopela na elimo.’

Longola kosalela nkombo ya Nzambe, kobongolama malamu, mpe kozala polele, Libongoli ya Mokili ya Sika ezali mpe na eloko mosusu oyo ekesenisi yango na Babiblia mosusu: ekabolamaka ofele. Yango esali ete bamilio ya bato bákoka kotánga Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango; ata baoyo bazangi makoki ya kosomba Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto