Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 78
  • Nzambe azali?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Nzambe azalaka? Koyeba yango ezali mpenza na ntina?
    Lamuká!—2015
  • Nazali komona bomoi na ngai ntina te—Lingomba, Nzambe, to Biblia ekoki kosalisa ngai?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mozalisi akoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nani azali Moyoki ya mabondeli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 78
Moi na kati ya mapata

Nzambe azali?

Eyano ya Biblia

Ɛɛ, Biblia emonisi polele mpenza ete Nzambe azali. Elendisi biso tóndimela Nzambe; tóndima bindimela te makambo oyo mangomba elobaka, kasi tósalela nde ‘makoki na biso ya kokanisa’ mpe “mayele” na biso. (Baroma 12:1; 1 Yoane 5:20) Talá mwa makanisi oyo euti na Biblia:

  • Ndenge makambo ebongisamá malamu na molɔ́ngɔ́ mpe bomoi oyo ezali na molɔ́ngɔ́ emonisi ete Mozalisi azali. Biblia elobi boye: “Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Baebre 3:4) Likanisi wana ezali polele, mpe bato mingi ya mayele bamonaka ete ezali solo mpenza.a

  • Biso bato tokelamá na mposa ya koyeba ntina ya bomoi na biso mpe esika oyo tozali kokende. Tolukaka kaka koyeba yango ata soki tokokisi bamposa na biso ya mosuni. Yango nde Biblia ebengi ‘bobola ya elimo,’ oyo esɛngaka mpe koyeba Nzambe mpe kosambela ye. (Matai 5:3; Emoniseli 4:11) Mposa ya koyeba makambo wana emonisi ete Nzambe azali. Kasi emonisi mpe ete azali Mozalisi ya bolingo mpe alingi ete tósilisa bobola na biso ya elimo.​—Matai 4:4.

  • Bisakweli ya Biblia oyo elobelaki makambo ya sikisiki ekomamaki bambula ebele liboso, mpe ekokisamaki na makambo nyonso. Ndenge bisakweli wana ekokisamá ata na makambo ya mikemike emonisi mpenza ete ezali na moto oyo aleki bato na nguya.​—2 Petro 1:21.

  • Mabele na kati ya molɔ́ngɔ́

    Bato oyo bakomaki Biblia bayebaki makambo ya siansi malamu koleka bato ya ntango na bango. Na ndakisa, na ntango ya kala, bato mingi bazalaki kokanisa ete mabele efandá likoló ya nyama moko, lokola nzoku, nsombo ya zamba, to mpe ngɔmbɛ moko ya monene. Nzokande Biblia elobi ete Nzambe “akakisi mabele na eloko moko te.” (Yobo 26:7) Biblia emonisi mpe ndenge mabele ezalaka; elobi ete ezali “zolongano” to “libungutulu.” (Yisaya 40:22) Bato mingi bamonaka ete bakomi ya Biblia bayebaki makambo wana nyonso mpo Nzambe nde ayebisaki bango yango.

  • Biblia epesi biyano na mituna minene oyo bato bamitunaka, oyo soki moto ayebi biyano na yango te, akoki kokóma koloba ete Nzambe azalaka te. Na ndakisa: Soki Nzambe azali bolingo mpe na nguya nyonso, mpo na nini bampasi mpe makambo ya mabe etondi na mokili? Mpo na nini mangomba etindaka bato básala makambo ya mabe na esika etinda bango básala makambo ya malamu?​—Tito 1:16.

a Na ndakisa, Allan Sandage, oyo azalaki koyekola minzoto, alobá mpo na molɔ́ngɔ́ ete: “Nandimi te ete makambo ekoki kobongisama malamu kaka boye yango moko. Esalemá yango moko te. Ngai nayebi te soki Nzambe azali, kasi biloko nyonso oyo ezali emonisi ete Mozalisi azali, soki te eloko moko te elingaki kozala.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto