Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 6
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

2 Bakonzi 6:1

Mitindami

  • +2Ba 2:3, 5; 9:1
  • +2Ba 4:38
  • +Yis 49:20

2 Bakonzi 6:2

Mitindami

  • +2Ko 9:8; 2Te 3:8

2 Bakonzi 6:4

Mitindami

  • +Mib 19:5

2 Bakonzi 6:5

Mitindami

  • +Yis 10:34
  • +2Ba 6:15
  • +Kob 22:14; 2Ba 4:7

2 Bakonzi 6:6

Mitindami

  • +Lk 18:27

2 Bakonzi 6:8

Mitindami

  • +1Ba 20:1, 34; 22:31
  • +1Ba 20:23; Mas 21:30
  • +Ne 4:11

2 Bakonzi 6:9

Mitindami

  • +1Ba 17:24; Yis 44:26
  • +Mas 20:18
  • +Am 3:7

2 Bakonzi 6:10

Mitindami

  • +Kob 9:20; Mas 27:12
  • +Ezk 3:18; Mt 2:12; Ebr 11:7

2 Bakonzi 6:11

Mitindami

  • +Yis 57:20
  • +1Sa 22:8

2 Bakonzi 6:12

Mitindami

  • +2Ba 5:3, 8; Am 3:7
  • +Da 2:28; 4:9
  • +Nz 139:2; Mos 10:20; Da 2:22

2 Bakonzi 6:13

Mitindami

  • +Nz 37:12
  • +Eb 37:17

2 Bakonzi 6:14

Mitindami

  • +2Ba 1:9; Mt 26:55

2 Bakonzi 6:15

Mitindami

  • +1Ba 19:21; 2Ba 3:11
  • +Mt 8:25

2 Bakonzi 6:16

Mitindami

  • +Kob 14:13; Nz 3:6; 11:1; 18:2; 118:11
  • +2Sa 22:31; 2Nt 32:7; Nz 27:3; 46:7; 55:18; Ro 8:31

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1998, nk. 12-13, 18

2 Bakonzi 6:17

Mitindami

  • +2Nt 20:12; Nz 91:15
  • +Mis 7:56
  • +2Ba 2:11; Nz 68:17; Zek 6:1
  • +Nz 34:7; Mt 26:53

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1998, nk. 12-13

2 Bakonzi 6:18

Mitindami

  • +Eb 19:11; Mas 4:19; Yis 59:10; Yn 9:39

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 71

2 Bakonzi 6:19

Mitindami

  • +1Ba 16:29

2 Bakonzi 6:20

Mitindami

  • +Lk 24:31

2 Bakonzi 6:21

Mitindami

  • +2Ba 2:12; 5:13; 13:14
  • +1Sa 24:19

2 Bakonzi 6:22

Mitindami

  • +Mib 20:11
  • +Mas 25:21; Mt 5:44; Lk 6:35; Ro 12:20

2 Bakonzi 6:23

Mitindami

  • +2Ba 5:2

2 Bakonzi 6:24

Mitindami

  • +Mib 28:52; 1Ba 20:1

2 Bakonzi 6:25

Mitindami

  • +Le 26:26; Mib 28:17; 2Ba 7:4; Bil 4:9
  • +Mib 14:3; Ezk 4:14; Mis 10:12
  • +Ezk 4:15

2 Bakonzi 6:26

Mitindami

  • +2Sa 14:4; Lk 18:3

2 Bakonzi 6:27

Mitindami

  • +Nz 60:11; 118:8; 146:3; Yis 2:22; Yir 17:5

2 Bakonzi 6:28

Mitindami

  • +Le 26:29; Mib 28:53; Yis 49:15; Ezk 5:10

2 Bakonzi 6:29

Mitindami

  • +Bil 4:10
  • +Mib 28:55, 57

2 Bakonzi 6:30

Mitindami

  • +Eb 37:29; 1Ba 21:27; 2Ba 19:1

2 Bakonzi 6:31

Mitindami

  • +Nz 105:15; Yir 38:4

2 Bakonzi 6:32

Mitindami

  • +Ezk 8:1; 14:1; 20:1
  • +1Ba 18:13; 21:10
  • +1Ba 14:6

2 Bakonzi 6:33

Mitindami

  • +Mas 19:3; Yis 8:21; Am 3:6
  • +Nz 27:14; Mas 14:29; 30:9; 2Pe 3:9; Em 16:9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 6:12Ba 2:3, 5; 9:1
2 Bak. 6:12Ba 4:38
2 Bak. 6:1Yis 49:20
2 Bak. 6:22Ko 9:8; 2Te 3:8
2 Bak. 6:4Mib 19:5
2 Bak. 6:5Yis 10:34
2 Bak. 6:52Ba 6:15
2 Bak. 6:5Kob 22:14; 2Ba 4:7
2 Bak. 6:6Lk 18:27
2 Bak. 6:81Ba 20:1, 34; 22:31
2 Bak. 6:81Ba 20:23; Mas 21:30
2 Bak. 6:8Ne 4:11
2 Bak. 6:91Ba 17:24; Yis 44:26
2 Bak. 6:9Mas 20:18
2 Bak. 6:9Am 3:7
2 Bak. 6:10Kob 9:20; Mas 27:12
2 Bak. 6:10Ezk 3:18; Mt 2:12; Ebr 11:7
2 Bak. 6:11Yis 57:20
2 Bak. 6:111Sa 22:8
2 Bak. 6:122Ba 5:3, 8; Am 3:7
2 Bak. 6:12Da 2:28; 4:9
2 Bak. 6:12Nz 139:2; Mos 10:20; Da 2:22
2 Bak. 6:13Nz 37:12
2 Bak. 6:13Eb 37:17
2 Bak. 6:142Ba 1:9; Mt 26:55
2 Bak. 6:151Ba 19:21; 2Ba 3:11
2 Bak. 6:15Mt 8:25
2 Bak. 6:16Kob 14:13; Nz 3:6; 11:1; 18:2; 118:11
2 Bak. 6:162Sa 22:31; 2Nt 32:7; Nz 27:3; 46:7; 55:18; Ro 8:31
2 Bak. 6:172Nt 20:12; Nz 91:15
2 Bak. 6:17Mis 7:56
2 Bak. 6:172Ba 2:11; Nz 68:17; Zek 6:1
2 Bak. 6:17Nz 34:7; Mt 26:53
2 Bak. 6:18Eb 19:11; Mas 4:19; Yis 59:10; Yn 9:39
2 Bak. 6:191Ba 16:29
2 Bak. 6:20Lk 24:31
2 Bak. 6:212Ba 2:12; 5:13; 13:14
2 Bak. 6:211Sa 24:19
2 Bak. 6:22Mib 20:11
2 Bak. 6:22Mas 25:21; Mt 5:44; Lk 6:35; Ro 12:20
2 Bak. 6:232Ba 5:2
2 Bak. 6:24Mib 28:52; 1Ba 20:1
2 Bak. 6:25Le 26:26; Mib 28:17; 2Ba 7:4; Bil 4:9
2 Bak. 6:25Mib 14:3; Ezk 4:14; Mis 10:12
2 Bak. 6:25Ezk 4:15
2 Bak. 6:262Sa 14:4; Lk 18:3
2 Bak. 6:27Nz 60:11; 118:8; 146:3; Yis 2:22; Yir 17:5
2 Bak. 6:28Le 26:29; Mib 28:53; Yis 49:15; Ezk 5:10
2 Bak. 6:29Bil 4:10
2 Bak. 6:29Mib 28:55, 57
2 Bak. 6:30Eb 37:29; 1Ba 21:27; 2Ba 19:1
2 Bak. 6:31Nz 105:15; Yir 38:4
2 Bak. 6:32Ezk 8:1; 14:1; 20:1
2 Bak. 6:321Ba 18:13; 21:10
2 Bak. 6:321Ba 14:6
2 Bak. 6:33Mas 19:3; Yis 8:21; Am 3:6
2 Bak. 6:33Nz 27:14; Mas 14:29; 30:9; 2Pe 3:9; Em 16:9
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Libongoli ya Mokili ya Sika
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 6:1-33

2 Bakonzi

6 Mpe bana+ ya basakoli babandaki koloba na Elisha: “Talá sikoyo! Esika+ oyo tozali kofanda liboso na yo ezali moke mingi,+ ezali kokoka biso te. 2 Tobondeli yo, tókende kino na Yordani, bongo tózwa kuna, moto na moto, nzete moko mpe tómisalela+ esika ya kofanda kuna.” Bongo alobaki: “Bókende.” 3 Mpe moto moko alobaki lisusu boye: “Tobondeli yo, yaká okende elongo na basaleli na yo.” Bongo ye alobaki ete: “Ɛɛ, nakokende.” 4 Boye akendaki elongo na bango, mpe nsukansuka bakómaki na Yordani mpe babandaki kokata banzete.+ 5 Mpe esalemaki boye: moko na bango azalaki kokata nzete na ye, mpe ebende ya sóka+ ekweaki na mai. Bongo abandaki koganga mpe koloba: “Mawa, nkolo na ngai,+ mpo nadefaki yango kodefa!”+ 6 Na nsima, moto ya Nzambe ya solo alobaki boye: “Ekwei wapi?” Bongo alakisaki ye esika yango. Na mbala moko, akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango wana mpe atepisaki ebende yango ya sóka.+ 7 Bongo alobaki: “Bimisá yango.” Na mbala moko, asembolaki lobɔkɔ mpe azwaki yango.

8 Mpe mokonzi ya Siri+ akɔtaki kobunda etumba na Yisraele. Na yango, asalaki likita elongo na basaleli na ye+ mpe alobaki: “Na esika boye mpe boye nde bokosala kaa elongo na ngai.”+ 9 Bongo moto ya Nzambe ya solo+ atindaki bato epai ya mokonzi ya Yisraele, na maloba oyo: “Kebá, koleka te na esika oyo boye,+ mpamba te ezali kuna nde bato ya Siri bazali kokita.”+ 10 Bongo mokonzi ya Yisraele atindaki bato na esika oyo moto ya Nzambe ya solo alobelaki ye.+ Mpe akebisaki+ ye, mpe akimaki esika yango, kaka mbala moko to mibale te.

11 Na yango, motema ya mokonzi ya Siri ekómaki na nkanda makasi mpo na likambo wana,+ bongo abengaki basaleli na ye mpe alobaki na bango: “Bokoyebisa ngai te nani kati na bato na biso azali mpo na mokonzi ya Yisraele?”+ 12 Na nsima, moko ya basaleli na ye alobaki: “Moto te, nkolo na ngai mokonzi, kasi mosakoli Elisha+ oyo azali na Yisraele nde azali koyebisa+ mokonzi ya Yisraele makambo oyo olobaka na shambrɛ na yo ya kati epai olalaka.”+ 13 Bongo alobaki boye: “Bókende mpe bómona esika azali, mpo natinda bato bázwa ye.”+ Na nsima, bapesaki ye nsango boye: “Talá ye wana na Dotane.”+ 14 Na mbala moko, atindaki kuna bampunda, makalo ya bitumba ná limpinga monene ya basoda;+ bayaki na butu mpe bazingaki engumba.

15 Ntango mosaleli+ ya moto ya Nzambe ya solo alamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na kotɛlɛma, abimaki libándá, mpe talá, limpinga ya basoda ezingi engumba na bampunda mpe makalo ya bitumba. Na mbala moko, mosaleli na ye alobaki na ye boye: “Mawa, nkolo na ngai!+ Tokosala nini?” 16 Kasi ye alobaki: “Kobanga te,+ mpo baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango.”+ 17 Bongo Elisha abandaki kobondela+ mpe koloba boye: “Ee Yehova, nabondeli yo, fungolá ye miso+ amona.” Na mbala moko, Yehova afungolaki miso ya mosaleli yango, bongo amonaki; mpe talá! etúká ya ngombangomba etondi na bampunda ná makalo ya bitumba+ ya mɔtɔ ezingi Elisha bipai nyonso.+

18 Ntango babandaki kokita epai na ye, Elisha abondelaki lisusu Yehova mpe alobaki boye: “Nabondeli yo, bomá bato oyo miso.”+ Bongo abomaki bango miso, ndenge Elisha alobaki. 19 Sikoyo, Elisha alobaki na bango boye: “Oyo ezali nzela yango te, oyo ezali mpe engumba yango te. Bólanda ngai, bongo namema bino epai ya moto oyo bozali koluka.” Nzokande, amemaki bango na Samaria.+

20 Mpe esalemaki boye: ntango kaka bakómaki na Samaria, Elisha alobaki: “Ee Yehova, fungolá bato oyo miso bámona.”+ Na mbala moko, Yehova afungolaki bango miso, mpe bakómaki komona; mpe talá, bazali na katikati ya Samaria. 21 Bongo ntango kaka mokonzi ya Yisraele amonaki bango, alobaki na Elisha: “Tata na ngai,+ naboma bango, naboma bango?”+ 22 Kasi, ye alobaki ete: “Koboma bango te. Bato oyo okangaka na mopanga na yo mpe na litimbo na yo, obomaka bango?+ Tyelá bango mampa ná mai mpo bálya mpe bámɛla,+ bongo bákende epai ya nkolo na bango.” 23 Na yango, asalelaki bango fɛti monene; mpe babandaki kolya mpe komɛla; nsima na yango, atikaki bango bákende epai ya nkolo na bango. Mpe bituluku ya bapunzi+ ya bato ya Siri ezongaki lisusu te na mokili ya Yisraele.

24 Mpe nsima na yango, esalemaki boye: Bene-hadade mokonzi ya Siri ayanganisaki kaa na ye mobimba mpe amataki kozinga+ Samaria. 25 Nsukansuka, nzala makasi ekɔtaki na Samaria;+ mpe talá! bazingaki yango kino motó ya mpunda+ ekómaki na ntalo ya shekele ya palata ntuku mwambe (80), mpe ndambo ya minei ya kabe ya nyɛi+ ya bibenga ezalaki na ntalo ya shekele ya palata mitano. 26 Mpe esalemaki boye: ntango mokonzi ya Yisraele azalaki koleka likoló ya efelo, mwasi moko boye abelelaki ye mpe alobaki: “Ee nkolo na ngai mokonzi, bikisá!”+ 27 Bongo ye alobaki boye: “Soki Yehova abikisi yo te, epai wapi ngai nakozwa eloko ya kobikisa yo?+ nakozwa yango nde na esika ya kotutatuta mbuma to na ekamwelo ya vinyo to ya mafuta?” 28 Mpe mokonzi alobaki na ye lisusu boye: “Likambo na yo nini?” Bongo ye alobaki ete: “Mwasi oyo alobaki na ngai: ‘Pesá mwana na yo ya mobali tólya ye lelo, mpe mwana na ngai ya mobali, tokolya ye lobi.’+ 29 Na yango, tolambaki+ mwana na ngai mpe tolei ye.+ Bongo na mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye ete: ‘Pesá mwana na yo, tólya ye.’ Kasi ye, abombaki mwana na ye.”

30 Mpe esalemaki boye: ntango kaka mokonzi ayokaki maloba ya mwasi wana, na mbala moko apasolaki+ bilamba na ye; mpe lokola azalaki koleka likoló ya efelo, bato bamonaki, mpe talá! alataki ngɔtɔ na nse ya bilamba na ye. 31 Bongo alobaki lisusu boye: “Tiká Nzambe asala ngai bongo mpe abakisa yango, soki motó ya Elisha mwana ya Shafate etikali na nzoto na ye lelo!”+

32 Mpe Elisha afandaki na ndako na ye, mikóló mpe bafandaki elongo na ye,+ ntango mokonzi atindaki moto. Liboso momemi-nsango akɔta epai na ye, ye alobaki na mikóló boye: “Bomoni ndenge mwana oyo ya mobomi-bato+ atindi moto mpo na kolongola motó na ngai? Bókeba: ntango kaka momemi-nsango yango akokóma, bókanga porte, mpe bótindika ye na porte. Lokito+ ya makolo ya nkolo na ye ezali nsima na ye te?” 33 Ntango azalaki naino koloba na bango, talá, momemi-nsango yango ye wana azali kokita epai na ye, mpe mokonzi alobaki boye: “Talá, oyo ezali mpasi monene euti na Yehova.+ Mpo na nini nazela lisusu Yehova?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto