Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Mbote.
Awa ezali esika ya kosala bolukiluki na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka na minɔkɔ ndenge na ndenge.
Mpo na kozwa mikanda, kende na jw.org.
Liyebisi
Monɔkɔ ya sika: Dendi
  • Lelo

Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 8

Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe akoba kolanda ngai.—Luka 9:23.

Mbala mosusu okutani na botɛmɛli oyo euti na bandeko ya libota, to mbala mosusu otiká mosala ya mbongo mpo otya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Soki ezali bongo, yebá ete Yehova amoni misala na yo ya sembo. (Ebr. 6:10) Na ntembe te, omoni bosolo ya maloba ya Yesu oyo: “Moto moko te oyo atiki ndako, to bandeko mibali, to bandeko basi, to mama, to tata, to bana, to bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu, akozanga kozwa mbala 100 sikoyo na eleko oyo—bandako, bandeko mibali, bandeko basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko—mpe na mokili oyo ezali koya, bomoi ya seko.” (Mrk. 10:​29, 30) Mapamboli oyo ozwi eleki mosika mpenza eloko nyonso oyo omipimelaki.—Nz. 37:4. w24.03 9 par. 5

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025

Mwalomingo, 10 sanza ya 8

Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.—Mas. 17:17.

Ntango nzala makasi ekómelaki bakristo ya Yudea. Bakristo ya Antiokia ya Siri “bazwaki mokano ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi, moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango.” (Mis. 11:​27-30) Atako bandeko yango oyo nzala ebɛtaki engumba na bango bazalaki mosika, bakristo ya Antiokia bazwaki mokano ya kosalisa bango. (1 Yoa. 3:​17, 18) Lelo oyo, biso mpe tokoki komonisa motema mawa ntango toyoki ete bandeko na biso bakristo bakutani na makama oyo ebimaka yango moko. Tomonisaka ete tozali na mposa ya kosalisa ntango toyebisaka bankulutu ete tolingi kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa, kotya makabo mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe kobondela mpo na baoyo bakutani na makama yango. Bandeko na biso bakoki mpe kozala na mposa ya lisalisi mpo bázwa biloko ya kobikela. Tiká ete ntango Mokonzi na biso, Yesu Kristo akoya kopesa lisambisi akuta biso tozali komonisa motema mawa mpe apesa biso “libula ya Bokonzi.”—Mat. 25:​34-40. w23.07 4 par. 9-10; 6 par. 12

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025

Mwayambo, 11 sanza ya 8

Bato nyonso báyeba ete bozalaka makambo makasimakasi te.—Flp. 4:5.

Yesu amekolaki Yehova na likambo etali kozala makambo makasimakasi te. Atindamaki awa na mabele mpo na kosakwela “bampate oyo ebungá ya ndako ya Yisraele.” Kasi amonisaki ete azalaki makambo makasimakasi te ntango azalaki kosakwela bato. Mokolo moko, mwasi moko oyo azalaki Moyisraele te asɛngaki ye abikisa mwana na ye ya mwasi oyo azalaki “konyokwama mpo demo akɔtelá ye.” Na boboto nyonso, Yesu asalaki likambo oyo mwasi yango asɛngaki ye mpe abikisaki mwana mwasi yango. (Mat. 15:​21-28) Tótalela ndakisa mosusu. Na ebandeli mpenza ya mosala na ye, Yesu alobaki: “Moto oyo awangani ngai . . . , ngai mpe nakowangana ye.” (Mat. 10:33) Kasi, Yesu awanganaki Petro, oyo awanganaki ye mbala misato mobimba? Te. Yesu ayebaki ete Petro ayokaki mawa mpenza na makambo oyo asalaki mpe azalaki na kondima. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki Petro mpe andimisaki ye mpenza ete alimbisaki ye mpe alingaka ye. (Luka 24:​33, 34) Yehova mpe Yesu Kristo bazalaka makambo makasimakasi te. Bongo biso? Yehova asɛngi biso mpe tózalaka makambo makasimakasi te. w23.07 21 par. 6-7

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
Mbote.
Awa ezali esika ya kosala bolukiluki na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka na minɔkɔ ndenge na ndenge.
Mpo na kozwa mikanda, kende na jw.org.
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto