Yobo
5 “Bengá, nabondeli yo! Ezali nde na moto moko oyo akopesa yo eyano?
Mpe epai ya nani na kati ya basantu* okobaluka?
2 Mpamba te kosilika ekoboma zoba,
Mpe likunya ekoboma moto ya bilandalanda.
3 Ngai namoná zoba azali kobimisa misisa,+
Kasi na mbalakaka nabandaki kolakela esika na ye ya kofanda mabe.
5 Oyo ye azali kobuka, moto ya nzala azali kolya;
Mpe ata na bakroshɛ ya kokakisa misuni, moto moko azali kozwa yango,
Mpe motambo ezali mpenza koluka kokanga biloko na bango ya kobikela.
6 Mpe mpasi ebimaka yango moko na mabele te.
7 Mpo moto abotamá mpo na mpasi,
Kaka ndenge na mɔtɔ mintɛntɛi epumbwaka likoló.
9 Epai ya Oyo asalaka makambo minene oyo ekoki koyebana te,
Makambo ya kokamwa oyo ekoki kotángama te;+
11 Epai ya Oyo atyaka na esika oyo etombwani baoyo bazali na nse,+
Bongo baoyo bazali mawamawa bakómi likoló mpo na lobiko;
13 Epai ya Oyo akangaka bato ya bwanya na kati ya mayele mabe na bango moko,+
Bongo toli ya bato ya mayele epesamaka likolólikoló;+
14 Bazali kokutana na molili ata na moi,
Mpe bazali kosimbasimba epai na epai na midi lokola nde na butu;+
15 Mpe epai ya Oyo abikisaka na mopanga oyo ebimi na monɔkɔ na bango,
Mpe na lobɔkɔ ya moto ya makasi, mobola,+
17 Talá! Esengo na moto oyo Nzambe azali kopamela;+
Mpe koboya te disiplini ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso!
18 Mpo ye moko apesaka mpasi, kasi akangaka mpota;
Abukabukaka, kasi mabɔkɔ na ye moko ebikisaka.
22 Okosɛka kopunzama mpe nzala,
Mpe okobanga te nyama ya zamba ya mabele.
23 Mpamba te okosala kondimana ná mabanga ya esobe,
Mpe nyama ya zamba oyo efandaka na esobe ekofanda na kimya elongo na yo.+
24 Mpe okoyeba mpenza ete kimya ezali hema na yo,
Mpe ya solo okokende kotala esika na yo oyo baleisaka banyama matiti, mpe okozanga eloko te.
26 Okokóma na lilita na nzoto makasi,+
Kaka ndenge basangisaka maboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini na ntango na yango.
27 Talá! Yango nde oyo biso tomoni. Ezali bongo.
Yoká yango, mpe yo—yebá yango mpo na yo moko.”