Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.
21 Ee Yehova, mokonzi asepelaka na makasi na yo;+
Mpe alingaka mpenza kozala na esengo na lobiko na yo!+
3 Mpo opambolaki ye mpe opesaki ye biloko ya malamu,+
Mpe kotya na motó na ye motole ya wolo oyo epɛtolami.+
4 Asɛngaki yo bomoi. Opesaki ye yango,+
Bolai ya mikolo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+
6 Mpo okómisi ye moto oyo apambolami mingi mpo na seko;+
Osepelisi ye na esengo liboso ya elongi na yo.+
7 Mpo mokonzi azali kotyela Yehova motema,+
Ɛɛ motema boboto ya Oyo-Aleki-Likoló. Ye akotengatenga te.+
9 Okokómisa bango lokola litumbu ya mɔtɔ na ntango oyo etyamá, ntango oyo okoya kotala bango.+
Yehova na nkanda na ye akomɛla bango, mpe mɔtɔ ekozikisa bango.+