Yosua
16 Mpe libula+ ebimaki mpo na bana ya Yozefe,+ banda na Yordani+ pene na Yeriko tii na mai ya Yeriko na ɛsti, esobe oyo ematá banda na Yeriko tii na etúká ya ngombangomba ya Betele.+ 2 Mpe ebimaki banda na Betele ya Luze,+ elekaki na ndelo ya Baarake+ na Atarote, 3 mpe ekitaki na wɛsti tii na ndelo ya Bayafelete tii na ndelo ya Bete-horone+ ya Nse mpe Gezere,+ mpe nsuka na yango ezalaki na mbu.+
4 Mpe bana ya Yozefe:+ Manase ná Efraime,+ bazwaki mokili yango.+ 5 Mpe ndelo ya bana ya Efraime, na kolanda mabota na bango, ɛɛ, ndelo ya libula na bango na ɛsti ezalaki: Atarote-adare,+ tii na Bete-horone ya Likoló;+ 6 mpe ndelo yango ebimaki tii na mbu. Mikemetate+ ezalaki na nɔrdi, mpe ndelo yango ebalukaki na ngámbo ya ɛsti tii na Taanate-shilo, mpe ekatisaki na ɛsti tii na Yanoa. 7 Mpe ekitaki banda na Yanoa tii na Atarote mpe na Naara, ekómaki na Yeriko+ mpe ebimaki tii na Yordani. 8 Banda na Tapua,+ ndelo yango ekendaki na ngámbo ya wɛsti tii na lobwaku ya mokɛli ya Kana,+ mpe nsuka na yango ezalaki na mbu.+ Wana nde libula ya libota ya bana ya Efraime, na kolanda mabota na bango. 9 Bana ya Efraime bazalaki na bingumba oyo etyamá+ na kati ya libula ya bana ya Manase, bingumba nyonso mpe bamboka na yango.
10 Nde babenganaki te Bakanana+ oyo bazalaki kofanda na Gezere,+ mpe Bakanana yango bazali kofanda na kati ya Efraime tii na mokolo ya lelo,+ kasi bakómisaki bango bato oyo basalaka mosala makasi ya boombo.+