Yisaya 24:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Mokili ekómi kolela,+ ebebibebi. Mabele oyo ebotaka ekaukikauki, ebebibebi. Bato ya lokumu kati na bato balɛmbilɛmbi.+ Matai 24:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 “Mpo ekólo ekobunda na ekólo+ mpe bokonzi ekobunda na bokonzi,+ mpe nzala+ ekozala mpe mabele ekoningana+ na bisika ndenge na ndenge. Misala 7:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Kasi nzala ekwelaki Ezipito mobimba mpe Kanana, ɛɛ bolɔzi moko monene; mpe bankɔkɔ na biso bazalaki kozwa biloko te.+ Misala 11:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Moko na bango nkombo na ye Agabusi+ atɛlɛmaki mpe abandaki kolakisa na nzela ya elimo ete nzala moko monene ekokwela mabele mobimba oyo bato bafandi;+ nzala oyo ekweaki na ntango ya Klode.
4 Mokili ekómi kolela,+ ebebibebi. Mabele oyo ebotaka ekaukikauki, ebebibebi. Bato ya lokumu kati na bato balɛmbilɛmbi.+
7 “Mpo ekólo ekobunda na ekólo+ mpe bokonzi ekobunda na bokonzi,+ mpe nzala+ ekozala mpe mabele ekoningana+ na bisika ndenge na ndenge.
11 Kasi nzala ekwelaki Ezipito mobimba mpe Kanana, ɛɛ bolɔzi moko monene; mpe bankɔkɔ na biso bazalaki kozwa biloko te.+
28 Moko na bango nkombo na ye Agabusi+ atɛlɛmaki mpe abandaki kolakisa na nzela ya elimo ete nzala moko monene ekokwela mabele mobimba oyo bato bafandi;+ nzala oyo ekweaki na ntango ya Klode.