8 Mpe nakopesa yo mpe momboto na yo, oyo ekoya nsima na yo, mokili ya bisika oyo ofandaki mopaya,+ ɛɛ mokili mobimba ya Kanana, mpo ezala ya bino mpo na ntango oyo etyami ndelo te; mpe nakomonisa ete nazali Nzambe na bango.”+
9 Na kondima afandaki mopaya na mokili ya elaka lokola nde na mokili ya bopaya,+ mpe afandaki na bahema+ elongo na Yisaka+ ná Yakobo,+ bazwi-ya-libula ya elaka moko wana elongo na ye.+