Kolimbola Mibeko 4:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 mpo bóbebisa makambo+ te mpe bómisalela te ekeko oyo eyemami, elilingi ya elembo nyonso, elilingi ya mobali to mwasi,+ Kolimbola Mibeko 9:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, longwá awa, kitá nokinoki, mpamba te bato na yo oyo obimisaki na Ezipito babebisi makambo.+ Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo. Bamisaleli ekeko ya ebende oyo enyangwisami.’+ Kolimbola Mibeko 32:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Bango moko nde babebisi makambo;+Bazali bana na ye te, mbeba ezali ya bango moko.+Libota moko oyo etɛngamá mpe egumbamá!+ Basambisi 2:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Mpe ezalaki kosalema boye: soki mosambisi yango akufi, bazalaki kobaluka mpe kobebisa makambo koleka batata na bango na kolandáká banzambe mosusu mpo na kosalela bango mpe kogumbamela bango.+ Batikaki te misala na bango mpe etamboli na bango ya motó makasi.+
16 mpo bóbebisa makambo+ te mpe bómisalela te ekeko oyo eyemami, elilingi ya elembo nyonso, elilingi ya mobali to mwasi,+
12 mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, longwá awa, kitá nokinoki, mpamba te bato na yo oyo obimisaki na Ezipito babebisi makambo.+ Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo. Bamisaleli ekeko ya ebende oyo enyangwisami.’+
5 Bango moko nde babebisi makambo;+Bazali bana na ye te, mbeba ezali ya bango moko.+Libota moko oyo etɛngamá mpe egumbamá!+
19 Mpe ezalaki kosalema boye: soki mosambisi yango akufi, bazalaki kobaluka mpe kobebisa makambo koleka batata na bango na kolandáká banzambe mosusu mpo na kosalela bango mpe kogumbamela bango.+ Batikaki te misala na bango mpe etamboli na bango ya motó makasi.+