Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 7:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Kasi, Farao mpe abengaki bato ya bwanya mpe banganga-nkisi;+ mpe banganga-nzambe ya Ezipito oyo basalelaka maji, bango mpe basalaki kaka bongo na misala na bango ya maji.+

  • Kobima 8:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nzokande, banganga-nzambe ya maji basalaki kaka bongo na misala na bango ya molili mpe basalaki ete mbemba emata na mokili ya Ezipito.+

  • Danyele 1:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe likambo nyonso ya bwanya mpe ya mayele+ oyo mokonzi azalaki kotuna bango, amonaki ete bango baleki mbala zomi banganga-nzambe nyonso ya maji+ mpe bato oyo babelelaka bilimo+ oyo bazalaki na bokonzi na ye mobimba.

  • Misala 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Nzokande na engumba yango, mobali moko azalaki, nkombo na ye Simo, oyo, liboso ya makambo wana, azalaki kosala misala ya maji+ mpe azalaki kokamwisa ekólo ya Samaria, azalaki koloba ete ye azali moto moko monene.+

  • 2 Bakorinti 11:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe likambo ya kokamwa ezali te, mpo Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.+

  • 2 Timote 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nzokande kaka ndenge Yanesi ná Yambresi+ batɛmɛlaki Moize, bato yango mpe bazali kokoba kotɛmɛla solo,+ babebá mpenza na makanisi,+ Nzambe aboyá bango na kotalela makambo ya kondima.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto