8Nsima na yango, Nzambe akanisaki+ Noa mpe nyama nyonso ya zamba mpe nyama nyonso ya mboka oyo ezalaki elongo na ye na masuwa,+ mpe Nzambe alekisaki mopɛpɛ likoló ya mabele, mpe mai ebandaki kokita.+
21 Sikoyo Moize asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu,+ mpe Yehova abandaki kozongisa mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti butu mobimba mpe kosala ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki,+ mpe mai ezalaki kokabwana.+