Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 7:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Ntango namonaki+ na biloko ya kopunza elamba moko ya lokumu oyo euti na Shinare,+ elamba moko ya kitoko, mpe shekele nkama mibale (200) ya palata mpe eteni ya wolo, oyo ezali na kilo ya shekele ntuku mitano (50), bongo nalulaki yango+ mpe nazwaki yango;+ mpe talá! ebombami na mabele na katikati ya hema na ngai, ná mbongo na nse na yango.”+

  • Mika 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe baluli bilanga mpe babɔtɔli yango;+ ná bandako lokola, mpe bazwi yango; mpe babubi mobali makasi ná bato ya ndako na ye,+ moto ná libula na ye.+

  • Luka 12:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo alobaki na bango ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela,+ mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”+

  • Baroma 7:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo tokoloba nini? Mibeko ezali nde lisumu?+ Te, ata moke te! Ya solo mpenza mbɛlɛ nayebi lisumu te+ soki Mibeko ezalaka te; mpe, na ndakisa, mbɛlɛ nayebi bilulela+ te soki Mibeko elobaka te ete: “Osengeli kolula eloko ya moto te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto