Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 32:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe esalemaki boye: na mokolo oyo elandaki mpenza, Moize alobaki na bato ete: “Bino—bosali lisumu, lisumu moko monene,+ mpe sikoyo nakomata epai ya Yehova. Mbala mosusu nakoki kozongisa boyokani oyo ebebaki mpo na lisumu na bino.”+

  • Balevi 12:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Soki azali na makoki ya kozwa mpate te, asengeli kozwa bipopo mibale to bana mibale ya bibenga,+ moko mpo na likabo ya kotumba mpe moko mpo na likabo mpo na lisumu, mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye, mpe asengeli kozala pɛto.’”

  • Balevi 16:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpe moto mosusu te asengeli kozala na kati ya hema ya kokutana banda ntango ye akokɔta mpo na kozipa masumu na esika mosantu tii ntango ye akobima; mpe asengeli kozipa masumu na ye moko+ mpe ya ndako na ye mpe ya lisangá mobimba ya Yisraele.+

  • Mitángo 15:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ ya liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, mpe basengeli kolimbisa bango yango; mpamba te ezalaki libunga,+ mpe bango, ɛɛ bango, bamemaki lokola likabo na bango likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ mpe likabo na bango mpo na lisumu liboso ya Yehova mpo na libunga na bango.

  • Baefese 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila+ ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami+ mabunga na biso, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.+

  • 1 Timote 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo ezali na Nzambe kaka moko,+ mpe moyokanisi+ kaka moko na kati ya Nzambe+ ná bato,+ moto moko, Kristo Yesu,+

  • Baebre 2:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Yango wana asengelaki kokóma lokola “bandeko” na ye na makambo nyonso,+ mpo akóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo ya Nzambe,+ mpo apesa mbeka ya kozipa+ masumu ya bato.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto