12 Mpe alobaki lisusu ete: “Kosembola lobɔkɔ na yo epai ya mwana te mpe kosala ye ata eloko moko te,+ mpo sikoyo nayebi ete obangaka Nzambe na ndenge oboyeli ngai mwana na yo te, mwana na yo kaka moko.”+
31 Ya solo mpenza, lisangá+ na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria ekɔtaki na eleko moko ya kimya, ezalaki kotongama; mpe lokola ezalaki kotambola na kobanga Yehova+ mpe na libɔndisi ya elimo santu+ ekobaki kokola.