31 Mpo Yehova Nzambe na yo azali Nzambe ya motema mawa.+ Akosundola yo te mpe akobebisa yo te mpe akobosana te kondimana+ ya bankɔkɔ na yo oyo alapelaki bango ndai.
23 Kasi Yehova amoniselaki bango boboto+ mpe ayokelaki bango mawa+ mpe atyelaki bango likebi mpo na kondimana+ na ye ná Abrahama,+ Yisaka+ ná Yakobo;+ mpe alingaki te kobebisa bango,+ mpe abwakaki bango mosika na elongi na ye te tii sikoyo.
2 Nzambe abwakaki bato na ye te, oyo ye andimaki libosoliboso.+ Kutu, boyebi nde te oyo Likomami elobi mpo na Eliya, ntango afundaki Yisraele epai ya Nzambe?+