Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 29:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe osengeli kosala ete mpate-mobali yango mobimba ebimisa milinga likoló ya etumbelo. Ezali likabo ya kotumba+ mpo na Yehova, nsolo moko ya kokitisa motema.+ Ezali likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.

  • Balevi 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe misɔpɔ+ na yango ná makolo na yango ekosukolama na mai; mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango nyonso ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola likabo ya kotumba, likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+

  • Balevi 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe bana mibali+ ya Arona basengeli kosala ete yango ebimisa milinga+ likoló ya etumbelo, likoló ya likabo ya kotumba oyo ezali likoló ya nkoni+ oyo ezali likoló ya mɔtɔ, mpo ezala likabo oyo etumbami na mɔtɔ, likabo ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+

  • Balevi 8:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe asukolaki misɔpɔ ná makolo na mai, mpe na nsima Moize asalaki ete mpate-mobali yango mobimba ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+ Yango ezalaki likabo ya kotumba mpo ezala nsolo ya kokitisa motema.+ Yango ezalaki likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

  • Ezera 6:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpo bápesaka Nzambe ya likoló makabo ya nsolo kitoko+ ntango nyonso+ mpe bábondelaka mpo na bomoi ya mokonzi mpe ya bana na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto