7 Batyaki ye mpanzi likoló mingi,+ mpe atikaki bámonisa ye mpasi;+ kasi afungolaki monɔkɔ te. Bamemaki ye lokola mpate oyo ekei kobomama,+ mpe lokola mpate ya mwasi oyo elelaka te liboso ya bakati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ te.+
14 bongo makila+ ya Kristo, oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki+ epai ya Nzambe na litɔnɔ te, ekopɛtola+ lisosoli na biso koleka te na misala oyo ezali kobota mbuma te+ mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?+