Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 14:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe Nzambe Oyo-Aleki-Likoló apambolama,+

      Ye oyo akabi banyokoli na yo na lobɔkɔ na yo!”+

      Na yango, Abrama apesaki ye moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso.+

  • Ebandeli 28:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe libanga oyo natɛlɛmisi lokola likonzí ekokóma ndako ya Nzambe,+ mpe eloko nyonso oyo okopesa ngai, nakozanga te kopesa yo moko ya bandambo zomi na yango.”+

  • Mitángo 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Mpe talá! napesi bana ya Levi moko ya bandambo zomi+ nyonso na Yisraele ezala libula mpo na mosala na bango oyo bazali kosala, mosala ya hema ya kokutana.

  • Mitángo 18:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Okoloba na Balevi, mpe osengeli koyebisa bango ete: ‘Bokozwa epai ya bana ya Yisraele moko ya bandambo zomi oyo napesi bino uta na bango mpo ezala libula na bino,+ mpe bosengeli kopesa likabo uta na yango lokola likabo mpo na Yehova, moko ya bandambo zomi uta na moko ya bandambo zomi.+

  • Kolimbola Mibeko 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe kuna bosengeli komema makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino mpe moko ya bandambo zomi+ na bino mpe likabo ya lobɔkɔ+ na bino mpe makabo na bino ya elako+ mpe makabo na bino ya bolingo+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+

  • Kolimbola Mibeko 14:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Osengeli mpenza kopesa moko ya bandambo zomi ya mbuma nyonso ya milona na yo, oyo ebimaka na elanga na yo mbula na mbula.+

  • 2 Ntango 31:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ntango kaka liloba ebimaki, bana ya Yisraele+ babakisaki mbuma ya liboso ya mbuma ya kosala farini,+ ya vinyo ya sika,+ mpe ya mafuta+ mpe ya mafuta ya nzoi+ mpe ya biloko nyonso oyo euti na bilanga,+ mpe moko ya bandambo zomi ya eloko nyonso, bayaki na yango ebele.+

  • Nehemia 13:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe Yuda mobimba, ɛɛ bango, bayaki na moko ya bandambo zomi+ ya mbuma,+ ya vinyo ya sika+ mpe ya mafuta+ na bandako ya kobomba biloko.+

  • Malaki 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bóya na moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso+ na ndako ya kobomba biloko, mpo bilei ezala na ndako na ngai;+ mpe nabondeli bino, bómeka ngai na likambo oyo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló+ te mpe soki nakosopela bino lipamboli te kino bosɛnga ekozala lisusu te.”+

  • Luka 11:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Kasi mawa na bino Bafarisai, mpamba te bopesaka moko ya bandambo zomi+ ya manti mpe ya peganono mpe ya ndunda mosusu nyonso,* kasi bozali koleka pembeni ya bosembo mpe bolingo ya Nzambe! Bosengelaki kosala makambo oyo, mpe kobosana te makambo mosusu wana.+

  • Baebre 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ya solo, bana ya Levi+ oyo bazali kozwa mosala na bango ya bonganga-nzambe bazwi mitindo ya kokɔngɔla epai ya bato+ moko ya bandambo zomi+ na kolanda Mibeko, elingi koloba, epai ya bandeko na bango, atako bautaki na bangei ya Abrahama;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto