36 Mpe okopesa ngɔmbɛ-mobali ya likabo mpo na lisumu mokolo na mokolo mpo na kozipa masumu,+ mpe osengeli kopɛtola etumbelo na lisumu na kozipáká masumu na yango, mpe osengeli kotya yango mafuta+ mpo na kosantisa yango.
11 Mpo molimo ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila,+ mpe ngai moko natye yango likoló ya etumbelo mpo na bino mpo na kozipa masumu+ ya milimo na bino, mpamba te makila+ nde ezipaka masumu+ mpo molimo ezali na kati na yango.
17 Yango wana asengelaki kokóma lokola “bandeko” na ye na makambo nyonso,+ mpo akóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo ya Nzambe,+ mpo apesa mbeka ya kozipa+ masumu ya bato.+