Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 53:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,+ mpe na bato ya nguya nde akokabola biloko oyo epunzami,+ mpamba te asopaki molimo na ye kino na liwa,+ mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko;+ mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele,+ mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.+

  • Yoane 1:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mokolo oyo elandaki, amonaki Yesu azali koya epai na ye, mpe alobaki ete: “Talá, Mwana-Mpate+ ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu+ ya mokili!+

  • Baroma 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo Kristo kutu amisepelisaki te;+ kasi kaka ndenge ekomamá: “Kosambwisa ya bato oyo bazalaki kosambwisa yo ekweli ngai.”+

  • Baefese 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila+ ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami+ mabunga na biso, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.+

  • Baebre 9:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Kristo mpe akabamaki mbala moko+ mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi;+ mpe mbala ya mibale+ oyo akobima+ ekozala te mpo na kolongola lisumu+ mpe bato oyo bazali koluka ye na mposa makasi mpo na lobiko na bango bakomona ye.+

  • 1 Petro 2:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ye moko amemaki masumu+ na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete,+ mpo tótika masumu+ mpe tózala na bomoi ya boyengebene. Mpe “mpo na bampota na ye bino bobiki.”+

  • 1 Yoane 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Boyebi mpe ete moto wana amonisamaki mpo na kolongola masumu na biso,+ mpe lisumu moko te+ ezali na kati na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto