Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 29:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Mpe bilamba mosantu+ ya Arona ekozala mpo na bana na ye ya mibali+ nsima na ye mpo na kotya bango mafuta+ ntango balati yango mpe kotondisa lobɔkɔ na bango na nguya ntango balati yango.+

  • Balevi 8:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe bosengeli te kobima na monɔkɔ ya hema ya kokutana na boumeli ya mikolo nsambo,+ tii na mokolo oyo mikolo na bino ya kotyama na mosala ekokoka, mpamba te yango ekozwa mikolo nsambo mpo na kotondisa lobɔkɔ na bino na nguya.*+

  • Baebre 5:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ndenge moko mpe Kristo amipesaki nkembo ye moko te+ mpo akóma nganga-nzambe monene,+ kasi azwaki nkembo+ nde epai ya moto oyo alobelaki ye ete: “Yo ozali mwana na ngai; lelo ngai nakómi tata na yo.”+

  • Baebre 5:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpo Nzambe abengaki ye mpenzampenza nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke.+

  • Baebre 7:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yango wana, soki ezaleli ya kokoka+ eyaka mpenza na lisalisi ya bonganga-nzambe ya Balevi,+ (mpo bonganga-nzambe wana eyaki nzela moko na Mibeko+ oyo bapesaki bato mpe ezalaki likambo ya ntina mpenza,) mbɛlɛ ntina ezalaki lisusu+ ete nganga-nzambe mosusu abima lokola Melekisedeke+ mpe báloba ete azali lokola Arona?

  • Baebre 7:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 oyo akómi bongo, na kolanda te makambo oyo ekomami na kati ya mibeko oyo etali makambo oyo ezali na mabele,+ kasi nde na kolanda nguya ya bomoi moko oyo ekoki te kobebisama,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto