10 Mpe Arona asengeli kozipa masumu na maseke na yango mbala moko na mbula.+ Na mwa ndambo ya makila ya likabo mpo na lisumu+ na mokolo ya kozipa masumu, akozipa masumu na yango mbala moko na mbula na boumeli ya mabota na bino. Ezali etumbelo oyo eleki bosantu mpo na Yehova.”
7 kasi na eteni ya mibale kaka nganga-nzambe monene ye moko nde azalaki kokɔta mbala moko na mbula,+ azalaki kokɔta te soki azali na makila te,+ oyo azalaki kopesa mpo na ye moko+ mpe mpo na masumu oyo bato bazalaki kosala kozanga boyebi.+