Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Okomema bango mpe okolona bango na ngomba ya libula na yo,+

      Esika oyo obongisi mpo na kofanda libela,+ Ee Yehova,

      Esika mosantu,+ Ee Yehova, oyo mabɔkɔ na yo epiki.

  • Mitángo 19:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Kasi moto oyo azali mbindo mpe oyo akomipɛtola te, ɛɛ, molimo yango asengeli kolongolama+ na kati ya lisangá, mpo ezali esika mosantu ya Yehova nde ye akómisi mbindo. Mai ya kopɛtola emwangisamaki likoló na ye te. Azali mbindo.

  • Kolimbola Mibeko 23:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo Yehova Nzambe na yo azali kotambolatambola na kaa na yo mpo na kobikisa yo+ mpe mpo na kosundolela yo banguna na yo;+ mpe kaa na yo esengeli kozala mosantu,+ mpo amona eloko moko te ya nsɔni epai na yo mpe atika mpenza kokende elongo na yo.+

  • Ezekiele 5:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “‘Na yango, lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ya solo, lokola esika na ngai mosantu nde okómisi mbindo na makambo na yo nyonso ya bosɔtɔ+ mpe na makambo na yo nyonso oyo eyinamá,+ ngai moko Moto nakokitisa yo+ mpe liso na ngai ekoyoka mawa te,+ ngai moko mpe nakomonisa motema mawa te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto