23 Na yango, mobali+ na ye Elekana alobaki na ye ete: “Salá oyo ezali malamu na miso na yo.+ Tikalá na ndako tii okokilisa ye mabɛlɛ. Nde tiká Yehova akokisa liloba na ye.”+ Bongo mwasi yango atikalaki na ndako mpe amɛlisaki mwana na ye tii ntango akilisaki ye mabɛlɛ.+