Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 32:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Na yango, Moize apesaki bango, elingi koloba, bana ya Gade+ mpe bana ya Rubene+ mpe ndambo ya libota ya Manase+ mwana ya Yozefe, bokonzi ya Sihone+ mokonzi ya Baamore mpe bokonzi ya Oge+ mokonzi ya Bashane, mokili ya bingumba na yango na bateritware, mpe bingumba ya mokili zingazinga.

  • Kolimbola Mibeko 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe na ntango yango, tozwaki mokili yango; longwa na Aroere,+ oyo ezali pene na lobwaku ya mokɛli ya Arnone, mpe etúká ya ngombangomba ya Gileade kabolá na mibale, mpe bingumba na yango, napesi yango Barubene mpe Bagade.+

  • Kolimbola Mibeko 3:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ndambo oyo etikalaki ya Gileade+ mpe Bashane+ mobimba ya bokonzi ya Oge, napesi yango na ndambo moko ya libota ya Manase. Etúká mobimba ya Argobe+ ya Bashane mobimba, yango ebengami mokili ya Barefaime,+ boye te?

  • Yosua 13:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Barubene mpe Bagade, elongo na ndambo mosusu ya libota ya Manase, bazwaki libula na bango, oyo Moize apesaki bango na ngámbo mosusu ya Yordani, na ɛsti, ndenge Moize, mosaleli ya Yehova, apesaki bango,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto