Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe bosengeli kobatela yango tii na mokolo ya zomi na minei ya sanza oyo,+ mpe lisangá mobimba ya liyangani ya Yisraele esengeli koboma yango na mpokwa, liboso molili ekɔta.*+

  • Balevi 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango,+ na mpokwa, liboso molili ekɔta* ezali elekeli+ mpo na Yehova.

  • Mitángo 28:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “‘Mpe na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango, ekozala elekeli ya Yehova.+

  • Kolimbola Mibeko 16:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Kanisá sanza ya Abibe,+ mpe osengeli kosala elekeli mpo na Yehova Nzambe+ na yo, mpamba te na sanza ya Abibe, Yehova Nzambe na yo abimisaki yo na Ezipito na butu.+

  • Yosua 5:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe bana ya Yisraele bakobaki kofanda na kaa na Gilgale, mpe basalaki elekeli na mpokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza yango,+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko.

  • Marko 14:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nzokande na mokolo ya liboso ya bagato ezangi levire,+ ntango bapesaka mbeka ya elekeli na ndenge ya momeseno, bayekoli na ye+ balobaki na ye ete: “Epai wapi olingi tókende kobongisela yo esika ya kolya elekeli?”+

  • 1 Bakorinti 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bólongola levire ya kala, mpo bózala pɔtɔpɔtɔ ya sika ya farini,+ lokola nkisi ya kovimbisa ezali te na kati na bino. Mpo, ya solo, Kristo+ elekeli+ na biso apesami mbeka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto