25 “Soki odefisi bato na ngai mbongo, moto ya mpasi oyo azali elongo na yo,+ osengeli te kokóma lokola modefisi oyo azali kosɛnga ye benefisi na lokoso. Bosengeli kosɛnga ye benefisi te.+
36 Kozwa epai na ye benefisi te mpe benefisi ya lokoso te,+ kasi osengeli kobanga Nzambe na yo;+ mpe ndeko na yo asengeli kotikala na bomoi elongo na yo.
8 soki apesaki eloko moko te mpo azwa benefisi+ mpe soki azwaki benefisi ya lokoso te;+ soki alongolaki lobɔkɔ na ye na makambo ya kozanga bosembo;+ soki akataki likambo kati na moto ná moninga na ye na bosembo ya solosolo;+
12 Epai na yo, bazwi kanyaka mpo na kosopa makila.+ Ozwi benefisi+ mpe benefisi ya lokoso,+ mpe na mobulu, ozali se kozwa litomba+ na kobuba baninga na yo,+ mpe obosani ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.